Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yc liteya 11 nk. 24-25
  • Bato oyo bakomaki makambo ya Yesu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato oyo bakomaki makambo ya Yesu
  • Teyá bana na yo
  • Masolo mosusu
  • Bato oyo bakomaki na ntina na Yesu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Ayekolaki kolimbisa epai ya Nkolo na ye
    Mekolá kondima na bango
  • Ayekolaki kolimbisa epai ya Nkolo na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • “Bato batángá kelasi te mpe bato mpamba”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
Makambo mosusu
Teyá bana na yo
yc liteya 11 nk. 24-25
Bato oyo bakomaki makambo ya Yesu: Matai, Marko, Luka, Yoane, Petro, Yakobo, Yuda, ná Paulo

LITEYA 11

Bato oyo bakomaki makambo ya Yesu

Omoni bato oyo bazali na elilingi oyo?​— Ezali Matai, Marko, Luka, Yoane, Petro, Yakobo, Yuda, ná Paulo. Bato yango bazalaki na bomoi na eleko moko na Yesu, mpe bakomaki makambo ya Yesu. Tólobela naino bato yango.

Mibali oyo ezali banani?

Na kati ya bato yango, misato bazalaki bantoma ya Yesu oyo bazalaki kosakola elongo na Yesu. Oyebi nkombo na bango?​— Matai, Yoane, ná Petro. Matai ná Yoane bazali bantoma oyo bayebaki Yesu malamu, mpe mokomoko na bango akomaki mokanda oyo elobeli bomoi ya Yesu. Ntoma Yoane akomaki mpe mokanda ya Emoniseli, Mokanda ya 1 Yoane, 2 Yoane, mpe 3 Yoane. Ntoma Petro akomaki mikanda mibale: 1 Petro mpe 2 Petro. Na Mokanda ya 2 Petro, akomaki ete mokolo moko mongongo ya Yehova eyokanaki na likoló mpe elobaki mpo na Yesu ete: ‘Oyo azali mwana na ngai. Nalingaka ye, mpe asepelisaka ngai.’

Bato mosusu oyo bazali na elilingi wana balobelaki mpe makambo ya Yesu na mikanda oyo bakomaki. Moko na bango ezali Marko. Ekoki kozala ete azalaki ntango bakangaki Yesu mpe amonaki makambo nyonso oyo elekaki. Mobali mosusu ezali Luka. Luka azalaki monganga mpe mbala mosusu akómaki mokristo nsima ya liwa ya Yesu.

Bato mosusu mibale oyo bakomaki Biblia, oyo ozali komona na elilingi ezali baleki ya Yesu. Oyebi nkombo na bango?​— Ezali Yakobo ná Yuda. Na ebandeli, bazalaki kondimela Yesu te. Kutu, bakanisaki ete abɛli motó. Kasi na nsima, bandimelaki ye mpe bakómaki bakristo.

Moto mosusu oyo ozali komona na elilingi ezali Paulo. Liboso akóma mokristo, nkombo na ye ezalaki Saulo. Azalaki kolinga bakristo ata moke te mpe azalaki konyokola bango. Oyebi mpo na nini Paulo andimaki kokóma mokristo?​— Mokolo moko, Paulo azalaki na mobembo; na nzela, ayokaki moto moko azali koloba na ye na likoló. Ezalaki Yesu! Atunaki Paulo: ‘Mpo na nini ozali konyokola bato na ngai?’ Na nsima, Paulo abongwanaki mpe akómaki mokristo. Paulo akomaki mikanda ya Biblia 14, banda na mokanda ya Baroma tii na mokanda ya Baebre.

Totángaka Biblia mokolo na mokolo, boye te?​— Ntango totángaka Biblia, toyekolaka makambo mingi oyo etali Yesu. Olingi koyeba makambo mosusu oyo etali Yesu?​—

TÁNGÁ NA BIBLIA

  • 2 Petro 1:16-18

  • Marko 3:21; 14:51

  • Yuda 1

  • Misala 9:1-18

MITUNA:

  • Bantoma nini bakomaki makambo ya Yesu?

  • Baleki mibale ya Yesu oyo bakomaki mikanda ya Biblia nkombo na bango banani?

  • Ndenge nini Paulo akómaki mokristo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto