Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yc liteya 12 nk. 26-27
  • Mwana ya ndeko ya Paulo azalaki na mpiko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mwana ya ndeko ya Paulo azalaki na mpiko
  • Teyá bana na yo
  • Masolo mosusu
  • Mwana ya ndeko ya Paulo abikisaki noko na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • “Bóyoka kosamba na ngai”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Zalá na mpiko mpo Yehova azali mosungi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Tosakola bokonzi ya Jehovah na molende nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Teyá bana na yo
yc liteya 12 nk. 26-27
Mwana ya ndeko ya Paulo azali koloba na komanda ya basoda

LITEYA 12

Mwana ya ndeko ya Paulo azalaki na mpiko

Na lisolo oyo tokolobela elenge mobali moko oyo abikisaki bomoi ya nɔkɔ na ye. Nɔkɔ yango ezalaki ntoma Paulo. Toyebi nkombo ya elenge yango te, kasi toyebi ete asalaki likambo moko oyo emonisaki ete azalaki na mpiko mpenza. Olingi koyeba likambo oyo asalaki?​—

Paulo azalaki na bolɔkɔ na Yerusaleme. Bakangaki ye mpo azalaki koteya bato makambo ya Yesu. Bato mosusu ya mabe bazalaki koyina Paulo, yango wana bayokanaki ete báboma ye. Balobaki ete: ‘Tósɛnga komanda atinda basoda na ye bámema Paulo na tribinale. Tokobombana na nzela, mpe ntango Paulo akoleka wana, tokoboma ye!’

Na bolɔkɔ, ntoma Paulo azali koyoka bansango ya mwana ya ndeko na ye

Mwana ya ndeko ya Paulo ayebisaki ye mpe mokonzi ya basoda likambo oyo bato mabe balingi kosala

Mwana ya ndeko ya Paulo ayokaki likambo oyo bato wana bakanaki kosala. Asalaki nini? Akendaki na bolɔkɔ mpe ayebisaki Paulo likambo yango. Na mbala moko, Paulo atindaki ye ayebisa komanda ya basoda likambo yango. Okanisi ete ezalaki pɛtɛɛ mpo elenge wana asolola na komanda ya basoda?​— Ezalaki pɛtɛɛ te, mpo komanda azali mokonzi monene. Kasi, mwana ya ndeko ya Paulo azalaki na mpiko mpe asololaki na ye.

Komanda ayebaki likambo oyo asengeli kosala. Aponaki basoda soki 500 bábatela Paulo! Ayebisaki bango bámema ye na Kaisaria kaka na butu wana. Paulo abikaki na liwa?​— Ɛɛ, bato oyo bazalaki kokanela ye basalaki ye eloko te. Likambo oyo bakanaki kosala esimbaki te.

Lisolo yango ekoki koteya yo nini?​— Yo mpe okoki kozala na mpiko lokola mwana ya ndeko ya Paulo. Tosengeli kozala na mpiko mpo na koteya bato makambo ya Yehova. Okozala na mpiko mpe okotika te koyebisa bato makambo ya Yehova?​— Soki osali bongo, okoki kobikisa moto na liwa.

TÁNGÁ NA BIBLIA

  • Misala 23:12-24

  • Matai 24:14; 28:18-20

  • 1 Timote 4:16

MITUNA:

  • Bato mabe bakanaki kosala Paulo likambo nini?

  • Mwana ya ndeko ya Paulo asalaki nini? Mpo na nini yango emonisi ete azalaki na mpiko?

  • Ndenge nini yo mpe okoki komonisa mpiko lokola ye?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto