Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • hf eteni 8 biteni 1-3
  • Ntango likambo ya mawa esalemi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango likambo ya mawa esalemi
  • Okoki kozala na libota ya esengo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • 1 TYELÁ YEHOVA MOTEMA
  • 2 MIBATELÁ MPE BATELÁ LIBOTA NA YO
  • 3 LUKÁ LISUNGI OYO OSENGELI NA YANGO
  • Oyo okoki kosala soki obɛli maladi moko ya mbalakaka
    Makambo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Tyeláká Yehova motema ntango nyonso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Yehova abatelaka mpe atyelaka basaleli na ye likebi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Okoki kozala na libota ya esengo
hf eteni 8 biteni 1-3
Mwasi ná mobali bazali kolela mwana na bango akufi

ETENI 8

Ntango likambo ya mawa esalemi

“Bozali kosepela mingi, atako sikoyo, esengeli bóyoka mawa na komekama ndenge na ndenge mpo na mwa ntango moke.”​—1 Petro 1:6

Ata soki bosali nyonso mpo bózala na libala mpe libota ya esengo, makambo oyo ekanami te esalemaka, mpe mpo na yango, ekoki kozala mpasi bóbatela esengo na bino. (Mosakoli 9:11) Na bolingo na ye, Nzambe ayebisi biso oyo tokoki kosala ntango tokutani na mikakatano. Soki osaleli batoli ya Biblia oyo elandi, yo ná libota na yo bokolonga ata makambo ya mabe koleka.

1 TYELÁ YEHOVA MOTEMA

OYO BIBILA ELOBI: ‘Bóbwakela ye mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.’ (1 Petro 5:7) Kobosanaka te ete osengeli te kopesa Nzambe foti mpo na mikakatano oyo ezali kokómela yo. (Yakobo 1:13) Soki opusani penepene na ye, akosalisa yo na lolenge ya malamu koleka. (Yisaya 41:10) Biblia elobi ete: “Bósopa motema na bino liboso na ye.”​—Nzembo 62:8.

Okozwa mpe libɔndisi na kotánga mpe koyekola Biblia mokolo na mokolo. Soki ozali kosala yango, okomona ndenge Yehova “abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.” (2 Bakorinti 1:3, 4; Baroma 15:4) Alaki kopesa yo “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”​—Bafilipi 4:6, 7, 13.

Moto na mbeto ya lopitalo azali kobondela elongo na libota na ye

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Bondelá Yehova asalisa yo ozala kimya mpe okanisaka malamu

  • Talelá makambo nyonso oyo ekoki kosalisa yo mpe poná oyo ezali malamu koleka mpo na yo

2 MIBATELÁ MPE BATELÁ LIBOTA NA YO

OYO BIBLIA ELOBI: “Motema ya moto ya mayele ezwaka boyebi, mpe litoi ya bato ya bwanya elukaka kozwa boyebi.” (Masese 18:15) Luká koyeba makambo nyonso. Luká koyeba mposa ya moto mokomoko ya libota na yo. Sololá na bango. Yoká bango.​—Masese 20:5.

Bongo soki moto moko ya libota akufi? Kobanga te komonisa ndenge ozali komiyoka. Yebá ete ata Yesu “alelaki, abimisi mpisoli.” (Yoane 11:35; Mosakoli 3:4) Kopema mpe kolala mwa mingi ezali na ntina. (Mosakoli 4:6) Yango ekosalisa yo mpo ozala mawamawa koleka ndelo te.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Zalá na momeseno ya kosolola na bato ya libota na yo ata soki likambo ezali te. Ntango mikakatano ekobima, bakobanga te kosolola na yo

  • Sololá na bato mosusu oyo bakutaná mpe na likambo ya ndenge wana

3 LUKÁ LISUNGI OYO OSENGELI NA YANGO

OYO BIBLIA ELOBI: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17) Baninga na yo bakoki kozala na mposa ya kosalisa yo, kasi mbala mosusu bayebi te nini básala. Kobanga te koyebisa bango mposa na yo. (Masese 12:25) Lisusu, luká lisalisi epai ya bato oyo bayebi Biblia malamu. Toli ya Biblia oyo bakopesa yo ekosalisa yo.​—Yakobo 5:14.

Okozwa lisungi oyo osengeli na yango ntango ozali koyangana mbala na mbala na bato oyo bandimelaka mpenza Nzambe mpe bilaka na ye. Okolendisama mingi mpe ntango ozali kosalisa basusu oyo bazali na mposa ya kolendisama. Yebisá bango mateya ya Yehova mpe bilaka na ye. Salisáká bato oyo bazali na bosɛnga, mpe kokimaka te bato oyo balingaka yo mpe bakipaka yo.​—Masese 18:1; 1 Bakorinti 15:58.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Sololá na moninga moko ya motema mpe ndimá asalisa yo

  • Lobelá mpenza bamposa na yo polele

MONÁKÁ MOSIKA

Soki omoni ete osuki, tyá makanisi na yo epai ya Nzambe. Ntango Yobo akutanaki na makambo ya mpasi, alobaki boye: “Nkombo ya Yehova ekoba kokumisama.” (Yobo 1:21, 22) Ndenge moko na Yobo, tyá nkombo ya Yehova mpe mokano na ye liboso ya mitungisi na yo. Soki makambo esalemi te ndenge ozalaki kokanisa, kobungisa elikya te. Tyelá Yehova motema mobimba. “‘Ngai nayebi malamu makanisi oyo nazali kokanisa mpo na bino,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘makanisi ya kimya, kasi ya mpasi te, mpo na kopesa bino bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe elikya.’”​—Yirimia 29:11.

OMITUNA BOYE . . .

  • Natyelaka Yehova motema mobimba ata na makambo mike?

  • Bantina nini nazali na yango ya kopesa Yehova matɔndi mpo na bolamu na ye?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto