Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 1 lok. 10-lok. 11 par. 8
  • Nsango mibale oyo euti na Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsango mibale oyo euti na Nzambe
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Nsango euti na likolo
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Elizabeti aboti mwana
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Bazwaki mbano mpo ete batambolaki na bosembo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Moto oyo akobongisa nzela abotami
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 1 lok. 10-lok. 11 par. 8
Anzelu Gabriele abimeli Zekaria; Elizabeti azali na zemi

MOKAPO 1

Nsango mibale oyo euti na Nzambe

LUKA 1:5-33

  • ANZELU GABRIELE ASAKOLI KOBOTAMA YA YOANE MOBATISI

  • ANZELU GABRIELE AYEBISI MARIA ETE AKOBOTA YESU

Tokoki kotalela Biblia mobimba ete ezali nsango oyo euti na Nzambe. Tata na biso ya likoló akomisá yango mpo eteyaka biso. Tótalela naino nsango mibale ya ntina mingi oyo esakolamaki esili koleka mbula 2 000. Anzelu Gabriele, oyo ‘atɛlɛmaka liboso ya Nzambe’ nde asakolaki nsango yango. (Luka 1:19) Makambo ezalaki ndenge nini ntango anzelu wana asakolaki bansango wana ya ntina mingi?

Tozali na mobu soki 3 L.T.B. Epai wapi anzelu Gabriele ayebisi nsango ya liboso? Na bangomba ya Yudea, mosika te na Yerusaleme. Nganga-nzambe moko na nkombo Zekaria afandaka kuna. Ye ná mwasi na ye Elizabeti bakómi mikóló mpe babotá te. Ekómi ngala ya Zekaria ya kosala mosala ya bonganga-nzambe na tempelo ya Yerusaleme. Ntango Zekaria azali na tempelo, anzelu Gabriele abimeli ye na mbalakaka pene na etumbelo ya mpaka ya malasi.

Kozanga ntembe, likambo yango ebangisi Zekaria. Kasi anzelu akitisi ye motema na maloba oyo: “Kobanga te, Zekaria, mpo lilɔmbɔ na yo eyokami mpe endimami, mpe mwasi na yo Elizabeti akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye nkombo Yoane.” Anzelu Gabriele abakisi lisusu boye: “Akozala moto monene na miso ya Yehova” mpe ‘akolɛngɛlɛla Yehova bato oyo babongisami.’​—Luka 1:13-17.

Zekaria azali kosala bajɛstɛ na mabɔkɔ na ye

Kasi Zekaria amoni ete likambo yango ekoki kosalema ata moke te. Mpo na nini? Mpo ye ná Elizabeti bakómi mikóló. Yango wana anzelu Gabriele alobi na ye ete: “Okokoka koloba te mpe okofanda nyɛɛ tii mokolo makambo wana ekosalema, mpo ondimi maloba na ngai te, oyo ekokokisama na ntango na yango oyo etyamá.”​—Luka 1:20.

Na ntango yango, bato oyo bazali libándá bazali komituna mpo na nini Zekaria aumeli mingi kuna. Nsukansuka abimi, kasi azali kokoka koloba te. Zekaria akómi kaka kosala bajɛstɛ na mabɔkɔ na ye. Emonani polele ete amonaki emonaneli moko ntango azalaki na tempelo.

Ntango Zekaria asilisi mosala na ye na tempelo, azongi na ndako na ye. Mwa moke na nsima, Elizabeti azwi zemi! Elizabeti afandaki ye moko na ndako sanza mitano, wana azali kozela abota mwana na ye.

Anzelu Gabriele abimeli Maria

Na nsima anzelu Gabriele amonani lisusu mpo na mbala ya mibale. Abimeli nani? Abimeli elenge mwasi moko oyo abali naino te, nkombo na ye Maria; afandaka na nɔrdi na etúká moko na nkombo Galile, na engumba Nazarete. Anzelu Gabriele ayebisi Maria likambo nini? Ayebisi ye ete: “Nzambe amoniseli yo boboto.” Abakisi lisusu boye: “Talá! okozwa zemi mpe okobota mwana mobali, mpe okopesa ye nkombo Yesu.” Alobi na Maria lisusu ete: “Ye akozala moto monene mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló, . . . mpe akoyangela ndako ya Yakobo libela na libela, mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.”​—Luka 1:30-33.

Na ntembe te, anzelu Gabriele asepeli mpenza na libaku oyo azwi ya koyebisa nsango mibale wana. Wana tozali kotánga makambo mingi oyo etali Yoane mpe Yesu, tokomona polele mpo na nini bansango wana oyo eutaki likoló ezali mpenza na ntina mingi.

  • Nani ayebisi nsango mibale ya ntina oyo eutaki na likoló?

  • Ayebisi banani nsango yango?

  • Mpo na nini okanisi ete ezalaki mpasi kondima bansango oyo eutaki na likoló?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto