Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 7 lok. 22-lok. 23 par. 6
  • Banganga-minzoto bayei kotala Yesu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Banganga-minzoto bayei kotala Yesu
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Yesu mpe banganga-minzoto
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • “Mibali misato ya bwanya” bazalaki banani? Balandaki “monzoto” ya Beteleme?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Nani atindaki “monzoto”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Monzoto ya ndenge nini etambwisaki “banganga oyo batalaka minzoto” tii epai ya Yesu?
    Lamuká!—2010
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 7 lok. 22-lok. 23 par. 6
Banganga-minzoto bazali kolanda monzoto tii epai Yozefe, Maria, mpe Yesu bazali kofanda

MOKAPO 7

Banganga-minzoto bayei kotala Yesu

MATAI 2:1-12

  • BANGANGA-MINZOTO BALANDI “MONZOTO” TII NA YERUSALEME, MPE NA NSIMA EPAI YESU AZALI

Bato moko bauti na ɛsti. Bazali banganga-minzoto, elingi koloba, bato oyo bayekolaka ndenge minzoto ezali, mpe balobaka ete kosala bongo epesaka bango likoki ya kolimbola makambo oyo ekómelaka bato. (Yisaya 47:13) Ntango bazalaki na mboka na bango na ɛsti, bamonaki “monzoto” moko mpe basalaki bankama ya bakilomɛtrɛ mpo na kolanda yango tii na Beteleme te, kasi nde tii na Yerusaleme.

Ntango banganga-minzoto yango bakómi kuna, batuni ete: “Wapi moto oyo abotami mokonzi ya Bayuda? Mpo tomonaki monzoto na ye ntango tozalaki na ɛsti, mpe toyei kogumbamela ye.”​—Matai 2:1, 2.

Banganga-minzoto bazali kogumbamela Mokonzi Erode

Ntango Erode, Mokonzi ya Yerusaleme ayoki nsango yango, asiliki makasi. Na yango, abengisi banganga-nzambe bakonzi mpe bakonzi mosusu ya lingomba ya Bayuda mpe atuni bango esika nini Kristo asengeli kobotama. Bataleli Makomami mpe bayanoli ye ete: “Na Beteleme.” (Matai 2:5; Mika 5:2) Ntango bayebisi ye bongo, abengisi banganga-minzoto na kobombana mpe ayebisi bango ete: “Bókende koluka mwana yango malamumalamu, mpe soki bomoni ye, bóyebisa ngai, mpo ngai mpe nakende kogumbamela ye.” (Matai 2:8) Kasi, Erode azali nde na mposa ya komona mwana yango mpo aboma ye!

Ntango banganga-minzoto bakei, likambo moko ya kokamwa esalemi. “Monzoto” oyo bamonaki ntango bazalaki na ɛsti, bamoni yango ekómi kotambola liboso na bango. Emonani polele ete ezali monzoto lokola minzoto nyonso te, kasi ebimi kaka mpo na kolakisa bango nzela. Banganga-minzoto balandi yango tii ntango etɛlɛmi likoló ya ndako oyo Yozefe ná Maria, bazali kofanda ná mwana na bango ya moke.

Banganga-minzoto oyo balandaki monzoto tii na Beteleme bazali kopesa Maria ná Yesu makabo

Ntango banganga-minzoto bakɔti na ndako, bakuti Maria elongo na mwana na ye ya moke, Yesu. Banganga-minzoto yango bagumbameli ye. Mpe bapesi ye makabo ya wolo, olibana ná mire. Na nsima, ntango balingi kozonga epai ya Erode, Nzambe akebisi bango na ndɔtɔ ete básala bongo te. Yango wana bazongi na mboka na bango na nzela mosusu.

Okanisi ete nani nde abimisaki “monzoto” wana oyo ezalaki kotambwisa banganga-minzoto? Kobosana te, monzoto yango ememaki bango mbala moko te epai Yesu azalaki na Beteleme. Kasi, ememaki bango naino na Yerusaleme, epai bakutanaki na Mokonzi Erode, oyo alingaki koboma Yesu. Mpe alingaki kosala bongo soki Nzambe akebisaka te banganga-minzoto wana mpe apekisaka bango te koyebisa Erode esika Yesu azalaki. Emonani polele ete, ezalaki Satana, monguna ya Nzambe nde alingaki koboma Yesu, mpe asalelaki mayele wana mpo na koluka kokokisa mokano na ye.

  • Ndenge nini toyebi ete “monzoto” oyo banganga-minzoto bamonaki ezalaki lokola monzoto nyonso te?

  • Esika nini Yesu oyo azali naino mwana moke azalaki kofanda ntango banganga-minzoto bayei kotala ye?

  • Mpo na nini tokoki koloba ete Satana nde azalaki kotambwisa banganga-minzoto?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto