Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 27 lok. 68-lok. 69 par. 6
  • Abengi Matai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Abengi Matai
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Yesu abengi Matai
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Tomekola motema mawa na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 27 lok. 68-lok. 69 par. 6
Bafarisai bazali kotala ntango Yesu azali kolya na bakɔngɔli-mpako mpe basumuki na ndako ya Matai

MOKAPO 27

Abengi Matai

MATAI 9:9-13 MARKO 2:13-17 LUKA 5:27-32

  • YESU ABENGI MATAI, MOKƆNGƆLI-MPAKO

  • KRISTO ALEI MPE AMƐLI ELONGO NA BASUMUKI MPO NA KOSALISA BANGO

Mwa moke nsima ya kobikisa mokatatali, Yesu atikali na Kapernaume, pene na Mbu ya Galile. Ebele ya bato bayei lisusu epai na ye, mpe abandi koteya bango. Ntango azali kotambola, amoni Matai, oyo nkombo na ye mosusu Levi, afandi na biro ya mpako. Yesu abengi ye, alobi: “Landá ngai.”​—Matai 9:9.

Lokola Petro, Andre, Yakobo ná Yoane, emonani ete Matai mpe amesani mwa moke na mateya ya Yesu mpe na makambo oyo asali na engumba na bango. Lokola bango, Matai andimi mbala moko kolanda Yesu. Matai alobeli likambo yango na Evanzile na ye: “Bongo [Matai] atɛlɛmaki mpe alandaki” Yesu. (Matai 9:9) Na mbala moko, Matai atiki mosala na ye ya kokɔngɔla mpako, akómi moyekoli ya Yesu.

Yesu amoni Matai na esika na ye ya mosala mpe abengi ye alanda ye

Mokolo moko, mbala mosusu mpo na komonisa ete asepeli ndenge Yesu abengi ye, Matai asalisi fɛti moko monene na ndako na ye. Longola Yesu ná bayekoli na ye, banani mosusu abengisi na fɛti yango? Baninga na ye ya kala ya mosala, bakɔngɔli-mpako mosusu. Bakɔngɔlaka mpako yango mpo na bakonzi ya Roma; mpako ya masuwa oyo ezali kosɛma na libongo, ya bato oyo basalaka mibembo na banzela ya minene, to ya biloko oyo euti na mboka mopaya, atako balingaka bakonzi yango te. Ndenge nini Bayuda batalelaka bakɔngɔli-mpako? Bayinaka bango mpo, mbala mingi, basɛngaka mbongo ya mpako mingi koleka oyo esengeli. Na fɛti yango ezali mpe na ‘basumuki,’ elingi koloba, bato oyo bayebani ete basalaka makambo ya mabe.​—Luka 7:37-39.

Ntango Bafarisai, oyo bazali komimona ete bazali sembo, bamoni Yesu ná bato ya ndenge wana na fɛti, batuni bayekoli na ye: “Mpo na nini moteyi na bino azali kolya elongo na bakɔngɔli-mpako ná basumuki?” (Matai 9:11) Ntango Yesu ayoki bango, alobi: “Bato ya nzoto kolɔngɔnɔ bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla. Boye bókende koyekola ntina ya maloba oyo: ‘Nalingi motema mawa, kasi mbeka te.’ Mpo nayaki kobenga bayengebene te, kasi basumuki.” (Matai 9:12, 13; Hosea 6:6) Ntango Bafarisai babengi Yesu “moteyi,” basali yango na bosembo te, na yango bayekoli te epai ya Yesu moto oyo akoki koteya bango ndenge ya kozala sembo.

Emonani ete Matai abengisi bakɔngɔli-mpako ná basumuki na ndako na ye mpo báyoka Yesu mpe bábikisama na elimo, “mpo bazalaki mingi mpe babandaki kolanda ye.” (Marko 2:15) Yesu alingi kosalisa bango bákóma na boyokani malamu na Nzambe. Yesu akeseni na Bafarisai, oyo bazali komimona bato ya sembo, yango wana atyoli bato yango te. Lokola ayokelaka bato mawa mpe alimbisaka, akómi monganga ya elimo mpo na bato nyonso oyo bazali na maladi na elimo.

Soki Yesu ayokeli bakɔngɔli-mpako mpe basumuki mawa, ezali te mpo andimi mabe na bango, kasi amoniseli bango nde boboto oyo azali komonisela bato oyo bazali na maladi. Na ndakisa, kanisá ntango ayokelaki moto ya maba mawa mpe asimbaki ye alobi: “Nalingi. Kómá pɛto.” (Matai 8:3) Biso mpe tosengeli komonisela bato oyo bazali na bosɛnga mawa mpe kosalisa bango, mingimingi na elimo.

  • Matai azali kosala nini ntango Yesu amoni ye?

  • Mpo na nini Bayuda mosusu bayinaka bakɔngɔli-mpako?

  • Mpo na nini Yesu alei mpe amɛli elongo na basumuki?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto