Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 31 lok. 76-lok. 77 par. 2
  • Babuki mbuma ya blé na Sabata

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Babuki mbuma ya blé na Sabata
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Babuki mbuma na mokolo na sabata
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Bakristo basengeli kozala na mokolo moko mpo na Sabata?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Sabata
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Baklisto basengeli kotosa mokolo ya bopemi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 31 lok. 76-lok. 77 par. 2
Bayekoli ya Yesu bazali kobuka mpe kolya mbuma ya blé mokolo ya Sabata

MOKAPO 31

Babuki mbuma ya blé na Sabata

MATAI 12:1-8 MARKO 2:23-28 LUKA 6:1-5

  • BAYEKOLI BABUKI MBUMA YA BLÉ NA SABATA

  • YESU AZALI “NKOLO YA SABATA”

Yesu ná bayekoli na ye bakei sikoyo na nɔrdi ya Galile. Ezali eleko ya prɛnta, mpe blé eteli na bilanga. Lokola bayekoli bazali na nzala, babuki mwa blé mpe balei. Kasi, ezali mokolo ya Sabata, mpe Bafarisai bamoni likambo oyo basali.

Kobosana te ete mwa mikolo euti koleka, Bayuda mosusu na Yerusaleme balingaki koboma Yesu mpe bafundaki ye ete atosi Sabata te. Sikoyo, Bafarisai bayebisi ye likambo oyo bayekoli na ye basali. “Talá! Bayekoli na yo bazali kosala likambo oyo esengeli kosala te na sabata.”​—Matai 12:2.

Bafarisai balobi ete kobuka mbuma mpe konika yango na mabɔkɔ mpo na kolya ekokani na kobuka mbuma mpe kotutatuta yango. (Kobima 34:21) Lokola bazalaki kolimbola mabe mosala oyo esengeli kosalema mokolo ya Sabata, yango ekómisaki mokolo yango mpasi, nzokande Sabata ezalaki nde mokolo ya esengo mpe ya kolendisama na elimo. Mpo na kosembola bango, Yesu asaleli bandakisa oyo emonisi ete Yehova Nzambe mpe alingaki soki moke te ete mobeko ya Sabata esalelamaka ndenge wana.

Ndakisa ya liboso oyo Yesu apesi ezali ya Davidi ná bato na ye. Ntango bazalaki na nzala, bakɔtaki na tabernakle mpe balyaki mampa ya kolakisa. Lokola balongolaki mampa yango liboso ya Yehova mpe batye oyo ya sika, esengelaki banganga-nzambe bálya yango. Nzokande, na kotalela makambo oyo Davidi ná bato na ye bakutanaki na yango, bamemaki ngambo te ndenge balyaki yango.​—Balevi 24:5-9; 1 Samwele 21:1-6.

Na ndakisa ya mibale, Yesu alobi: “Botángá te na Mibeko ete na basabata, banganga-nzambe, na tempelo, basalaka mosala mpe bazalaka na ngambo te?” Na ndakisa oyo, Yesu alingi komonisa ete ata na mokolo ya Sabata, banganga-nzambe babomaka banyama ya kopesa mbeka mpe basalaka misala mosusu na tempelo. Yesu alobi: “Kasi nazali koyebisa bino ete eloko oyo eleki tempelo ezali awa.”​—Matai 12:5, 6; Mitángo 28:9.

Yesu abendi lisusu likebi na bango na Makomami mpo na kobimisa liteya oyo: “Soki bókangaka ntina ya likambo oyo: ‘Nalingi motema mawa, kasi mbeka te,’ bolingaki te kokweisa bato oyo bazali na ngambo te.” Asukisi na maloba oyo: “Mpo Mwana ya moto azali Nkolo ya sabata.” Yesu azali kolobela Boyangeli na ye ya kimya, oyo ekoumela mbula nkóto na mikolo ezali koya.​—Matai 12:7, 8; Hosea 6:6.

Bato banyokwami mingi na boombo na mokili ya Satana, oyo etondi na mobulu mpe bitumba. Boyangeli ya Kristo ekozala Sabata monene oyo ekopesa biso bopemi oyo tozali kozela mpe oyo tosengeli na yango!

  • Bafarisai bafundi bayekoli ya Yesu na likambo nini, mpe mpo na nini bafundi bango?

  • Ndenge nini Yesu asemboli Bafarisai?

  • Na ndenge nini Yesu azali “Nkolo ya Sabata”?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto