Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 47 lok. 118-lok. 119 par. 6
  • Elenge mwasi moko azongi lisusu na bomoi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elenge mwasi moko azongi lisusu na bomoi!
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Kolela ebongwani esengo
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yesu asekwisi bakufi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Tokoki kolamuka na liwa!
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Yesu asali makamwisi ebele
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 47 lok. 118-lok. 119 par. 6
Yesu asekwisi mwana mwasi ya Yairuse

MOKAPO 47

Elenge mwasi moko azongi lisusu na bomoi!

MATAI 9:18, 23-26 MARKO 5:22-24, 35-43 LUKA 8:40-42, 49-56

  • YESU ASEKWISI MWANA MWASI YA YAIRUSE

Yairuse amoni ndenge Yesu abikisi mwasi oyo azalaki kotanga makila. Ntembe ezali te ete Yesu akoki mpe kosalisa mwana na ye, atako amoni ete ‘sikoyo ekoki kozala ete mwana na ye akufi.’ (Matai 9:18) Likoki ya kosalisa mwana yango ezali?

Ntango Yesu azali naino kosolola na mwasi oyo auti kobikisa, mibali moko bauti na ndako ya Yairuse mpe bayebisi ye boye: “Mwana na yo ya mwasi akufi!” Babakisi boye: “Mpo na nini kotungisa moteyi lisusu?”​—Marko 5:35.

Oyo nde nsango mabe mpenza! Mobali yango, oyo bato ya mboka na ye bamemyaka mingi, asili mpenza makasi. Mwana na ye kaka moko akufi. Kasi, Yesu ayoki nsango yango mpe atali Yairuse mpe abɔndisi ye na maloba oyo: “Kobanga te, monisá kaka kondima.”​—Marko 5:36.

Bato bazali kolela pembeni ya ebembe ya mwana ya Yairuse oyo ezali na mbeto

Na nsima, Yesu akei elongo na Yairuse na ndako na ye. Ntango bakómi kuna, bakuti yikiyiki makasi. Baoyo bayaki wana bazali kolela mpe koganga na mawa. Yesu akɔti wana mpe alobi maloba oyo ya kokamwa: “Mwana moke oyo akufi te, kasi alali nde mpɔngi.” (Marko 5:39) Ntango bato bayoki bongo, babandi kosɛka Yesu. Bayebi ete mwana yango akufi mpenza. Ata bongo, na nguya oyo Nzambe apesá ye, Yesu akomonisa bango ete ekoki kosalema ete moto oyo akufi azonga lisusu na bomoi, kaka ndenge bakoki kolamwisa moto oyo alali mpɔngi makasi.

Yesu abimisi bato nyonso libándá, longola kaka Petro, Yakobo, Yoane mpe baboti ya mowei. Yesu akɔti elongo na bango epai balalisaki elenge mwasi yango. Asimbi ye na lobɔkɔ mpe alobi: “‘Talita kumi,’ oyo, soki babongoli, elakisi: ‘Elenge mwasi, nalobi na yo: “Tɛlɛmá!”’” (Marko 5:41) Mbala moko atɛlɛmi mpe abandi kotambola. Kanisá naino esengo makasi oyo Yairuse ná mwasi na ye bayoki ntango bamoni likambo yango! Mpo na komonisa ete elenge mwasi yango azongi mpenza na bomoi, Yesu alobi bápesa ye mwa eloko ya kolya.

Na makamwisi oyo Yesu asalaki liboso, apekisaki baoyo abikisaki bápanza nsango yango; asali mpe bongo na baboti oyo. Ata bongo, esengo etindi baboti yango mpe bato mosusu bápanza nsango yango “na etúká wana mobimba.” (Matai 9:26) Soki omoni ndeko to moninga na yo oyo akufaki asekwisami, okolobela likambo yango na esengo mpenza! Oyo ezali mbala ya mibale Yesu asekwisa moto.

  • Yairuse azwi nsango nini, mpe ndenge nini Yesu abɔndisi ye?

  • Ntango Yesu ná Yairuse bakómi na ndako, bakuti likambo nini?

  • Mpo na nini Yesu alobi ete mwana yango oyo akufi alali nde mpɔngi?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto