Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 83 lok. 194-lok. 195 par. 2
  • Nzambe abengisi banani mpo na kolya?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe abengisi banani mpo na kolya?
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Abyangami epai na Mofalisai
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Olingaka ntango nyonso kozala na esika ya liboso?
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Lisese ya elambo na libala
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 83 lok. 194-lok. 195 par. 2
Babola, bibɔsɔnɔ, batɛngumi ná bato oyo bakufá miso bayei na fɛti mpo na kolya bilei ya mpokwa

MOKAPO 83

Nzambe abengisi banani mpo na kolya?

LUKA 14:7-24

  • LITEYA OYO ETALI KOMIKITISA

  • BATO OYO BABENGISAMI BASƐNGI BOLIMBISI MPO BÁYA TE

Nsima ya kobikisa moto oyo azalaki na maladi oyo evimbisaka nzoto na mai, Yesu azali kaka na ndako ya Mofarisai yango. Amoni ndenge bato mosusu oyo babengisami bazali kowela kofanda na bisika ya lokumu na ntango ya kolya, mpe asaleli libaku yango mpo na koteya bango ezaleli ya komikitisa.

Alobi: “Ntango moto moko abengisi yo na fɛti ya libala, kofanda na esika oyo eleki lokumu te. Mbala mosusu abengisi moto mosusu oyo aleki yo na lokumu na fɛti yango, mpe moto oyo abengisaki yo ná ye akoya mpe akoloba na yo ete: ‘Tikelá moto oyo esika wana.’ Bongo okokende na nsɔni kofanda na esika ya nsuka mpenza.”​—Luka 14:8, 9.

Na nsima, Yesu alobi: “Ntango babengisi yo, kende kofanda na esika ya nsuka mpenza, mpo ntango moto oyo abengisaki yo akoya akoloba na yo ete: ‘Moninga, matá na esika ya lokumu.’ Bongo okozala na lokumu na miso ya baninga na yo nyonso oyo babengisamaki elongo na yo.” Kosala bongo ezali kaka te mpo na komonisa bizaleli malamu. Yesu alimboli: “Mpo moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama mpe moto oyo azali komikitisa akotombwama.” (Luka 14:10, 11) Na maloba oyo, Yesu alendisi bayoki na ye báyekola komikitisa.

Na nsima, Yesu apesi liteya mosusu mpo na Mofarisai oyo abengisaki ye: ndenge oyo ebongi na miso ya Nzambe mpo na kobengisa bato na fɛti. “Ntango obongisi bilei ya midi to bilei ya mpokwa, kobenga te baninga na yo to bandeko na yo to bato ya libota na yo to bazwi oyo bafandi penepene na yo. Mpo mokolo mosusu bango mpe bakoki kobengisa yo mpe wana bakozongisela yo bolamu oyo osalaki. Kasi ntango osali fɛti, bengisá babola, bibɔsɔnɔ, batɛngumi, bato oyo bakufá miso; mpe okozala na esengo, mpo bazali na eloko ya kozongisela yo te.”​—Luka 14:12-14.

Mbala mingi, bato babengisaka baninga, bandeko ya libota, to bato oyo bafandaka pene na bango, mpo na kolya; mpe Yesu alobi te ete ezali mabe. Kasi, amonisi nde ete kopesa bilei na bato oyo bazali kokelela, na ndakisa babola, bibɔsɔnɔ, to bato oyo bakufá miso ekoki komemela moto ebele ya mapamboli. Yesu ayebisi moto oyo ayambi ye: “Okofutama na lisekwa ya bayengebene.” Moto mosusu oyo abengisami andimi likambo yango, mpe alobi: “Esengo na moto oyo azali kolya mampa na bokonzi ya Nzambe.” (Luka 14:15) Amoni ete ezali libaku malamu. Kasi, bato nyonso batalelaka makambo bongo te, ndenge Yesu amonisi yango na ndakisa oyo elandi:

“Moto moko asalaki fɛti moko monene, mpe abengisaki bato mingi. Mpe atindaki moombo na ye . . . koloba na bato oyo babengisamaki ete: ‘Bóya, mpo basili kolɛngɛla biloko.’ Kasi bango nyonso babandaki kosɛnga bolimbisi ndenge moko. Ya liboso alobaki na ye ete: ‘Nasombi elanga mpe esengeli nakende kotala yango; nasɛngi yo olimbisa ngai.’ Mpe mosusu alobaki ete: ‘Nasombi ngɔmbɛ zomi oyo ekangisami mibalemibale mpe nazali kokende kotala yango malamumalamu; nasɛngi yo olimbisa ngai.’ Mosusu mpe alobaki ete: ‘Nauti kobala mwasi kaka sikoyo, yango wana nakoki koya te.’”​—Luka 14:16-20.

Ntina oyo bapesi mpo báya te esimbi te! Moto akendaka kotala elanga to etonga liboso ya kosomba yango, kasi te nsima ya kosomba yango. Moto ya misato azali komilɛngɛla te mpo na libala. Asili kobala, yango wana asengeli te koboya kokende esika ya ntina mingi oyo babengi ye. Ntango nkolo-ndako ayoki ntina oyo bapesi mpo báya te, ayoki nkanda mpe ayebisi moombo na ye:

“Bimá nokinoki na babalabala ya minene mpe na babalabala ya mike ya engumba mpe yaká na babola ná bibɔsɔnɔ ná bato oyo bakufá miso ná batɛngumi.” Moombo yango asali bongo, kasi bisika ezali naino. Bongo nkolo-ndako alobi na moombo na ye: “Bimá na banzela mpe na bisika oyo ezingami na lopango, mpe sɛngisá bango bákɔta, mpo ndako na ngai etonda. Mpo nazali koloba na bino ete: Moko te na kati ya bato oyo babengisamaki akoyoka ata nsolo ya bilei ya fɛti na ngai.”​—Luka 14:21-24.

Ndakisa oyo Yesu auti kopesa emonisi ndenge Yehova Nzambe atindaki Yesu Kristo abengisa bato oyo bakoyangela na Bokonzi ya likoló. Bato ya liboso oyo babengisamaki ezalaki Bayuda, mingimingi bakonzi ya mangomba. Mingi na bango baboyaki libyangi ya Yesu ntango azali kosakola. Kasi bato mosusu mpe babengisamaki. Yesu amonisi polele ete na mikolo ezali koya, libyangi ya mibale ekopesama, epai ya Bayuda oyo bazangi lokumu mpe baprozelite. Na nsima, libyangi ya misato mpe ya nsuka ekopesama epai ya bato oyo Bayuda bazalaki komona ete babongi te na miso ya Nzambe.​—Misala 10:28-48.

Ya solo, makambo oyo Yesu alobi endimisi maloba ya moto mosusu oyo abengisamaki, oyo alobaki: “Esengo na moto oyo azali kolya mampa na bokonzi ya Nzambe.”

  • Ndenge nini Yesu apesi liteya oyo etali komikitisa?

  • Na miso ya Nzambe, ebongi kobenga bato ya ndenge nini na fɛti, mpe mpo na nini yango ekomemela moto esengo?

  • Liteya nini Yesu abimisi na ndakisa na ye ya bilei ya mpokwa?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto