Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 91 lok. 214-lok. 215 par. 4
  • Lazare asekwi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lazare asekwi
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Lazare asekwi
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Nganga-nzambe monene oyo akatelaki Yesu etumbu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Bamemi Yesu epai ya Anasi, na nsima epai ya Kaifa
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu asekwisi Lazare
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 91 lok. 214-lok. 215 par. 4
Marta ná Maria bazali kotala ndenge Yesu azali kosekwisa ndeko na bango Lazare

MOKAPO 91

Lazare asekwi

YOANE 11:38-54

  • LISEKWA YA LAZARE

  • SANEDRINA ESALI MWANGO MABE MPO NA KOBOMA YESU

Nsima ya kokutana naino na Marta mpe na nsima Maria pene ya Betania, Yesu akei elongo na bango esika bakundaki Lazare. Nkunda yango ezali na libanga moko oyo ezipi yango. Yesu alobi ete: “Bólongola libanga.” Lokola Marta ayebi te likambo Yesu alingi kosala, apesi mpe makanisi na ye. Alobi: “Nkolo, sikoyo asengeli kolumba nsolo, mpo esali mikolo minei.” Kasi Yesu ayebisi ye ete: “Nayebisaki yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe?”​—Yoane 11:39, 40.

Na yango balongoli libanga. Na nsima Yesu atomboli miso na ye likoló mpe abondeli ete: “Tata, natɔndi yo na ndenge oyoki ngai. Ya solo, nayebi ete oyokaka ngai ntango nyonso; kasi mpo na ebele ya bato oyo batɛlɛmi awa nalobi, mpo bákoka kondima ete yo otindaki ngai.” Libondeli oyo Yesu asali na miso ya bato nyonso emonisi baoyo bazali wana ete alingi kosala likambo moko na nguya ya Nzambe. Na nsima Yesu agangi na mongongo makasi ete: “Lazare, bimá!” Mpe Lazare abimi, mabɔkɔ ná makolo elíngami na bilamba ya kozinga mpe elongi na ye ekangami na elamba. Yesu alobi na bango ete: “Bófungola ye mpe bótika ye akende.”​—Yoane 11:41-44.

Ebele ya Bayuda oyo bayaki kobɔndisa Maria ná Marta bamoni likamwisi wana mpe bandimeli Yesu. Kasi basusu bakei koyebisa Bafarisai likambo Yesu asali. Bafarisai mpe banganga-nzambe bakonzi basali likita na Sanedrina to tribinale monene ya Bayuda. Nganga-nzambe monene Kaifa azali mpe na likita yango. Basusu na bango balobi ete: “Tósala nini, mpo moto oyo azali kosala bilembo mingi? Soki totiki ye kaka boye, bango nyonso bakondimela ye, mpe Baroma bakoya kobɔtɔla esika na biso mpe ekólo na biso.” (Yoane 11:47, 48) Atako bayoki litatoli ya bato oyo bamonaki Yesu azali “kosala bilembo mingi,” mibali yango basepeli te na makambo oyo Nzambe azali kosala na nzela na ye. Likambo eleki ntina mpo na bango ezali nde mikumba mpe bokonzi na bango.

Bayuda bayebisi Bafarisai ete Lazare asekwi

Lisekwa ya Lazare ezali mpenza kokweisa Basadukai, oyo bandimelaka lisekwa te. Sikoyo Kaifa oyo azali Mosadukai azwi maloba, alobi na bango boye: “Bozali koyeba ata eloko moko te, mpe bozali kososola te ete ezali mpo na litomba na bino moto moko akufa mpo na bato na esika ete ekólo mobimba ebomama mpo na moto moko.”​—Yoane 11:49, 50; Misala 5:17; 23:8.

Na kotalela mosala mosantu ya Kaifa, Nzambe nde atindi ye aloba bongo, asali yango “na ndenge na ye moko te.” Kaifa alingi koloba ete Yesu asengeli kobomama mpo lokumu mpe bokonzi ya bakonzi ya mangomba ya Bayuda ebeba te. Kasi, esakweli ya Kaifa ezali komonisa ete na nzela ya liwa ya Yesu, akopesa lisiko kaka mpo na Bayuda te, kasi mpe mpo na ‘bana nyonso ya Nzambe oyo bapalanganá.’​—Yoane 11:51, 52.

Kaifa andimisi Sanedrina mobimba mpo esala mwango mabe ya koboma Yesu. Mbala mosusu Nikodeme, moko ya basambisi ya Sanedrina oyo asepelaka na Yesu, ayebisi ye mwango mabe wana? Ezala ndenge nini, Yesu alongwe mbala moko na zingazinga ya Yerusaleme, na ndenge yango bakoki te koboma ye liboso ya ntango oyo Nzambe atyaki.

  • Baoyo bamoni lisekwa ya Lazare basali nini?

  • Nini emonisi motema mabe ya basambisi ya Sanedrina?

  • Atako Kaifa azali na makanisi mabe, kasi likambo nini Nzambe ayebisi ye asakola?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto