Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 129 lok. 294-lok. 295 par. 3
  • Pilate alobi: “Talá! Moto!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Pilate alobi: “Talá! Moto!”
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • “Botala moto ye wana!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • “Botala moto ye wana!”
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Ponsi Pilato azalaki nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye.
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 129 lok. 294-lok. 295 par. 3
Pilate abimisi Yesu libándá, balatisi ye motole ya banzubɛ mpe elamba ya motane makasi

MOKAPO 129

Pilate alobi: “Talá! Moto!”

MATAI 27:15-17, 20-30 MARKO 15:6-19 LUKA 23:18-25 YOANE 18:39–19:5

  • PILATE ALUKI KOTIKA YESU

  • BAYUDA BASƐNGI BÁBIMISA NDE BARABASI

  • BASƐKI YESU MPE BANYOKOLI YE

Pilate ayebisi ebele ya bato oyo balingi Yesu akufa ete: “Namoni moto oyo na eloko moko te oyo ezali kondimisa bifundeli oyo bozali kofunda ye na yango. Kutu, Erode mpe amoni bongo.” (Luka 23:14, 15) Sikoyo, mpo na koluka kotika Yesu, Pilate asaleli mayele mosusu, alobi na bato: “Bozalaka na momeseno ete nabimisela bino moto moko na Elekeli. Na yango, bolingi nabimisela bino mokonzi ya Bayuda?”​—Yoane 18:39.

Pilate ayebi ete na bolɔkɔ, ezali na moto moko na nkombo Barabasi, oyo azali moyibi, atindaka bato bátomboka, mpe abomaka bato. Na yango Pilate atuni: “Bolingi nabimisela bino nani, Barabasi to Yesu oyo babengi Kristo?” Banganga-nzambe bakonzi batindi bato básɛnga bábimisela bango Barabasi, kasi Yesu te. Pilate atuni lisusu: “Kati na bango mibale bolingi nabimisela bino nani?” Bato yango bagangi: “Barabasi”!​—Matai 27:17, 21.

Pilate azwi mobulu na makanisi; atuni: “Bongo nasala nini na Yesu oyo babengi Kristo?” Bato yango babeleli ete: “Abakama na nzete!” (Matai 27:22) Bazali ata na nsɔni te; bazali kosɛnga liwa ya moto oyo asali eloko te. Pilate atuni bango: “Mpo na nini, mabe nini moto oyo asali? Namoni ye na eloko moko te oyo ebongi na liwa; yango wana, nakobɛta ye fimbo mpe nakotika ye.”​—Luka 23:22.

Atako Pilate asali nyonso mpo na kotika Yesu, ebele ya bato wana oyo bazali na nkanda bagangi: “Abakama na nzete!” (Matai 27:23) Bakonzi ya mangomba nde batindi bato básilika makasi mpo makila esopama. Makila yango ezali te ya mosali-mabe to ya mobomi-bato moko boye. Ezali nde makila ya moto oyo asali eloko te, oyo mikolo mitano liboso bayambaki ye na Yerusaleme lokola Mokonzi. Ata soki bayekoli ya Yesu bazali wana, bafandi kaka nyɛɛ, moko te amimonisi.

Pilate amoni ete nyonso oyo azali kosala ezali kolonga te. Lokola yikiyiki ezali kokóma makasi, akamati mai mpe asukoli mabɔkɔ na ye na miso ya ebele ya bato. Alobi na bango: “Ngai nazali na ngambo te na makila ya moto oyo. Yango etali bino moko.” Atako asali bongo, ebele ya bato yango babongoli makanisi te. Balobi: “Makila na ye ekwela biso ná bana na biso.”​—Matai 27:24, 25.

Guvɛrnɛrɛ yango aluki kokokisa mposa na bango na esika asala likambo oyo ezali sembo. Kaka ndenge ebele ya bato yango basɛngi, Pilate abimiseli bango Barabasi. Atindi bálongola Yesu bilamba mpe bábɛta ye fimbo.

Nsima ya kobɛta Yesu mabe ndenge wana, basoda bakɔtisi Yesu na ndako ya guvɛrnɛrɛ. Bayanganisi etuluku mobimba ya basoda mpe babandi lisusu kofinga ye. Batongi motole ya nzubɛ mpe balatisi ye yango na motó. Basoda yango basimbisi ye mongendu na lobɔkɔ ya mobali mpe balatisi ye kazaka moko ya motane, lokola oyo mokonzi alataka. Bazali kotyola ye, balobi: “Mbote, yo Mokonzi ya Bayuda!” (Matai 27:28, 29) Lisusu, babwakeli ye nsoi mpe babɛti ye bambata na elongi. Bazwi mongendu oyo basimbisaki ye mpe babandi kobɛta ye yango na motó, bongo banzubɛ ya “motole” oyo balatisaki ye mpo na kotyola ye ekɔti lisusu makasi na motó na ye.

Ndenge Yesu abateli lokumu na ye mpe amonisi mpiko liboso ya minyoko wana ekamwisi Pilate mpe aluki mayele mosusu mpo alongwa na ngambo, alobi: “Talá! Namemi ye epai na bino na libándá mpo bóyeba ete nazwi ye ata na mabe moko te.” Ntango mosusu Pilate akanisi ete soki abimisi Yesu libándá mpe ebele ya bato bamoni ndenge azoki mpe makila ezali kotanga bakozongisa motema nsima! Ntango Yesu atɛlɛmi liboso ya ebele ya bato yango ya mitema mabe, Pilate alobi: “Talá! Moto!”​—Yoane 19:4, 5.

Atako babɛtaki Yesu mpe bazokisaki ye, abateli lokumu na ye mpe atikali kimya, kutu ata Pilate andimi yango, mpo emonani ete alobaki na limemya mpe na mawa.

KOBƐTA FIMBO

Nsinga mpo na kobɛta moto

Na buku moko (The Journal of the American Medical Association), monganga William Edwards amonisi ndenge bato ya Roma bazalaki kobɛta fimbo:

“Bazalaki kosalela fimbo moko ya mokuse (flagrum to flagellum) oyo ezalaki nsinga moko basalá na mposo ya nyama to bakangá yango lokola nsuki, oyo na katikati na yango batyá bibende ya mikemike to biteni ya mikuwa ya mpate oyo ekoki kozokisa. . . . Ntango basoda ya Roma bazali kobɛtabɛta moto na mokɔngɔ na makasi na bango nyonso, bibende yango ezalaki kovimbisa moto yango makasi, mpe bansinga ya mposo ya nyama mpe mikuwa ya mpate ezalaki kopanza misuni. Lokola bazali kaka kobɛta ye, bampota ezali kokóma minene mpe misuni ya kati oyo ekangami na mikuwa ezali komonana, mpe ezali kobimisa makila ebele.”

  • Pilate asali nini mpo na koluka kotika Yesu mpe komilongola na ngambo?

  • Kobɛta oyo babɛtaki Yesu ezalaki ya ndenge nini?

  • Nsima ya kobɛta Yesu, ndenge nini banyokoli ye lisusu?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto