MOKAPO 12
Kopesa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi na esika tozali mpe na mokili mobimba
ESAKWELI oyo Yesu apesaki mpo na mikolo ya nsuka ezali kokokisama na ndenge Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8; Mat. 24:14) Mpo na kosala yango, bapesaka ntango mpe makasi na bango mpo na koyebisa bato makambo ya Nzambe. Lokola batyaka motema ete Yehova asungaka bato oyo bazali kosala elongo na ye, bazali kokoba kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na bango. (Mat. 6:25-34; 1 Ko. 3:5-9) Matomba oyo bazwi emonisi mpenza ete Yehova azali kondima bango mpe azali kopambola bango.
MAKABO MPO NA MOSALA YA BOKONZI NA MOKILI MOBIMBA
2 Ntango bato bamonaka ndenge tosakolaka mpe tokabolaka ofele Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia, bato bamitunaka soki tosalaka ndenge nini mpo na kosala bongo. Ya solo, konyata mpe kobimisa Babiblia ná mikanda oyo elimbolaka Biblia esɛngaka mbongo mingi. Kotonga mpe kobatela Babetele, esika bandeko oyo basalaka na bamasini ya kobimisa mikanda bafandaka, ná baoyo bakambaka mosala ya kosakola mpe baoyo basalaka misala mosusu mpo nsango malamu eyebana na bisika mingi esɛngaka mpe mbongo mingi. Longola yango, bapesaka mwa lisalisi ya mbongo na bakɛngɛli ya zongazonga, bamisionɛrɛ, babongisi-nzela monene mpe bandeko mosusu oyo bazali kaka na mosala ya ntango nyonso mpo na kosalisa bango bákoba na mosala na bango. Emonani polele ete mpo mosala ya kosakola nsango malamu esalema lelo oyo na esika tozali to na mokili mobimba, ezali kosɛnga mbongo mingi. Mbongo yango eutaka wapi?
3 Bato mingi oyo basepelaka na mosala ya koteya bato mateya ya Biblia, oyo Batatoli ya Yehova basalaka, bapesaka makabo mpo mosala yango ekende liboso na mokili mobimba. Kasi, mosala na biso esimbami libosoliboso na Batatoli bango moko; basusu kati na bango batindaka mbala moko makabo na bango na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na ekólo oyo bazali. Bamonisaka elimo ya komipesa ndenge moko na basaleli ya Nzambe na ntango ya kala, oyo bapesaki makabo mpo na kotonga esika ya losambo ya Yehova. (Kob. 35:20-29; 1 Nt. 29:9) Bato mosusu bapesaka ebongiseli ya Yehova biloko na bango ya motuya to mbongo ebele. Kasi mbala mingi makabo mosusu ya mikemike eutaka epai ya moto mokomoko, masangá mpe bazongazonga. Soki basangisi makabo yango nyonso, epesaka mbongo oyo esengeli mpo mosala ya kosakola ekoba.
Batatoli ya Yehova bamonaka ete kosalela mbongo mpe biloko na bango mosusu mpo mosala ya kosakola ekende liboso ezali libaku malamu
4 Batatoli ya Yehova bamonaka ete kosalela mbongo mpe biloko na bango mosusu mpo mosala ya kosakola ekende liboso ezali libaku malamu. Yesu ná bayekoli na ye bazalaki na kɛsi ya mbongo, oyo bazalaki kosalela mpo na makambo mosusu oyo ezalaki kosɛnga mbongo. (Yoa. 13:29) Biblia elobeli basi oyo bazalaki kosalisa Yesu ná bayekoli na ye na mosala na bango. (Mrk. 15:40, 41; Luka 8:3) Ntoma Paulo azalaki kondima mpe kopesa matɔndi mpo na lisalisi ya bato oyo balingaki ete nsango malamu eyebana na bisika mingi mpe oyo bazalaki na mposa ya kopesa ye mabɔkɔ na mosala na ye. (Flp. 4:14-16; 1 Tes. 2:9) Batatoli ya Yehova balandaka ndakisa ya bakristo wana ya molende mpe oyo bazalaki kokaba. Na ndenge yango, bato ya mitema sembo na bisika nyonso bakoki kozwa “mai ya bomoi ofele.”—Em. 22:17.
MAKABO MPO NA BAMPOSA YA LISANGÁ
5 Bamposa ya lisangá mokomoko ekokisamaka mpe na makabo ya bolingo oyo bandeko bapesaka. Bakɔngɔlaka mabonza te, bakataka te motuya ya mbongo oyo moto asengeli kopesa, mpe basɛngasɛngaka mbongo te. Bakɛsi ya makabo ezalaka na bisika oyo makita esalemaka mpo moto akoka kopesa “ndenge akani na motema na ye.”—2 Ko. 9:7.
6 Basalelaka mbongo ya makabo libosoliboso mpo na makambo oyo etali Ndako ya Bokonzi mpe kobatelama na yango. Lisangani ya bankulutu ekoki kozwa ekateli ya kotindaka ndambo ya mbongo yango na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya ekólo oyo bazali mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Mpo na kosala yango, esengeli lisangá endima ekateli yango. Na ndenge yango, masangá mingi etindaka makabo mbala na mbala mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Soki bandeko nyonso ya lisangá bazali kotya likebi na bamposa oyo ezali kobima na lisangá, ekozala na ntina te ya kopesaka mayebisi etali makabo mbala na mbala.
NDENGE YA KOBOMBA MAKABO
7 Nsima ya makita nyonso, bandeko mibale bakobimisa mbongo nyonso oyo bandeko batye na bakɛsi ya makabo mpe bakokoma motángo na yango. (2 Bak. 12:9, 10; 2 Ko. 8:20) Lisangani ya bankulutu ezwaka bibongiseli oyo esengeli mpo na kobatela mbongo yango tii ntango bakotinda yango na biro ya filiale to bakosalela yango mpo na bamposa ya lisangá. Ndeko oyo atalelaka kɔnti ya lisangá abongisaka lapolo sanza na sanza mpo na koyebisa lisangá, mpe nsima ya sanza misato nyonso, mokambi-misala ya bankulutu azwaka bibongiseli mpo ete kɔnti ya lisangá etalelama.
KOBIMISA MBONGO MPO NA BAMPOSA YA ZONGAZONGA
8 Mbongo oyo ebimaka mpo na kobongisa mayangani ya zongazonga, mpe mpo na kokokisa bamposa mosusu ya zongazonga, eutaka na mbongo ya makabo oyo bandeko ya zongazonga yango batye. Na mayangani yango, ezalaka na bakɛsi ya makabo mpo bandeko bákoka kotya makabo mpo na zongazonga. Lisusu, mpo na kokokisa bamposa mosusu ya zongazonga, masangá ekoki kopesa makabo na bantango mosusu.
9 Eleki malamu ete mbongo ya makabo oyo masangá ya zongazonga ezali kotya ekokisa bamposa nyonso oyo esengeli, mpe mbongo mosusu oyo etikali etindama lokola makabo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Soki mbongo ya kɛsi ya zongazonga ekoki te mpo na kozongisa mbongo nyonso oyo ebimaki mpo na liyangani, to mpo na kobongisa liyangani oyo ekolanda, na ndakisa kofutela esika ya kosala liyangani, mokɛngɛli ya zongazonga akoki kosɛnga báyebisa masangá ete ezali na libaku ya kopesa makabo. Lisangani ya bankulutu ya lisangá mokomoko ekotalela likambo yango mpe ekokata motángo ya mbongo oyo lisangá ekoki kotinda na kɛsi ya zongazonga. Na nsima, basengeli koyebisa lisangá, na nzela ya ekateli, motángo ya mbongo oyo bakotinda.
10 Ntango likambo ya mbongo ebimi mpe esɛngi bankulutu ya zongazonga bátyela yango likebi, esengeli kosala likita ya bankulutu na mokolo ya liyangani ya zongazonga. Longola mbongo oyo esengeli kosalelama mpo na misala ya zongazonga oyo bankulutu bayokaná, soki esengeli kobimisa mbongo ya zongazonga bankulutu nyonso basengeli kondima ekateli yango. Esengeli kokoma bikateli yango ná mitángo ya sikisiki mpe kolakisa ekateli yango mpo na kozwa ndingisa, mbala nyonso oyo mbongo ya zongazonga ebimi.
11 Nsima ya ntango, bankulutu oyo baponamá batalelaka ndenge mbongo ya zongazonga ezali kosalelama.
KOSALISA BABOLA
12 Mbongo oyo Yesu ná bayekoli na ye bazalaki kobomba na kɛsi ezalaki mpe mpo na kosalisa babola. (Mrk. 14:3-5; Yoa. 13:29) Mokumba wana ya bokristo ezali kokoba tii lelo, mpo Yesu alobaki: “Bozali na babola ntango nyonso.” (Mrk. 14:7) Ndenge nini Batatoli ya Yehova bazali kokokisa mokumba yango lelo oyo?
13 Ntango mosusu, bandeko ya lisangá oyo bazali sembo bakómaka na mposa ya lisungi mpo bakómi mibange, bazali na maladi, bakómi bibɔsɔnɔ, to likambo moko ya mbalakaka ebimeli bango. Bato ya libota mpe bandeko mosusu oyo bayebi ete bosɛnga ya ndenge wana ezali bakoki koyoka mposa ya kosalisa bango. Yango eyokani na maloba oyo ya ntoma Yoane: “Moto nyonso oyo azali na biloko ya kobikela ya mokili oyo mpe amoni ndeko na ye azali kokelela mpe atako bongo akangeli ye mpenza motema, ndenge nini bolingo ya Nzambe ekoki kofanda na kati na ye? Bana, tólingaka, na maloba te mpe na lolemo te, kasi na misala mpe na solo.” (1 Yoa. 3:17, 18; 2 Tes. 3:6-12) Kosalisa bandeko ya sembo oyo bakoki kozala na mposa ya lisungi ya biloko ya mosuni ezali mpe na kati ya losambo ya solo.—Yak. 1:27; 2:14-17.
14 Na mokanda ya liboso oyo ntoma Paulo akomelaki Timote, amonisaki ndenge lisungi ya biloko ya mosuni ekoki kopesama epai ya bandeko oyo babongi kozwa yango. Okoki kotánga toli na ye na 1 Timote 5:3-21. Libosoliboso, mokristo mokomoko nde azali na mokumba ya kokokisa bamposa ya bato ya ndako na ye. Bakristo oyo bakómi mibange to oyo bazali na maladi to bakómi bibɔsɔnɔ basengeli kozwa lisungi epai ya bana na bango, bankɔkɔ na bango to bandeko mosusu ya libota na bango. Ntango mosusu, Leta to bibongiseli mosusu ekoki kopesa lisungi ya biloko ya mosuni; yango wana, bandeko ya libota to bato mosusu bakoki kosalisa moto oyo azali na bosɛnga azwa mikanda oyo ebongi mpo na kozwa lisungi yango. Likambo moko ekoki kobima, oyo esɛngi ete lisangá etala soki ekoki kosunga bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bazali kosalela Yehova na bosembo nyonso banda bambula ebele kasi bazali kokelela. Soki bandeko yango bazali na bato ya libota te to na bandeko mosusu oyo bakoki kosalisa bango, to soki Leta to bibongiseli mosusu ezali te mpo na kosalisa bango, lisangani ya bankulutu ekoki koyebisa likambo yango na lisangá mpo esalisa. Bakristo bamonaka ete kokabela baoyo bazali na bosɛnga biloko na bango ya kobikela ezali libaku malamu.
15 Minyoko, bitumba, koningana ya mabele, mai oyo ezindisi mboka, nzala, to makambo mosusu ya mabe oyo ezali kosalema mingi na mikolo oyo ya mpasi ekoki kosala ete bandeko na biso mingi bákelela. (Mat. 24:7-9) Bandeko ya masangá ya bisika yango bakoki kozala na eloko te mpo na kosalisana; yango wana, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekambaka bandeko ya mikili ndenge na ndenge oyo bazali kosala milende mpo na kosunga bandeko oyo bakómi na bosɛnga. Ezali ndenge wana nde bakristo ya Azia Moke basalaki; batindelaki bandeko ya Yudea biloko ya kolya ntango nzala ekɔtaki kuna. (1 Ko. 16:1-4; 2 Ko. 9:1-5) Soki tolandi ndakisa na bango, tokomonisa ete tolingaka bandeko na biso mpe tozali mpenza bayekoli ya Yesu Kristo.—Yoa. 13:35.
KOKABOLA MIKANDA
16 Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia esalisaka mingi mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi. Mbala mingi, mosaleli na misala moko oyo lisangani ya bankulutu eponá nde atalelaka mikanda ya lisangá. Bandeko oyo baponami mpo na mikumba wana bazwaka mikumba yango na lisɛki te. Bakomaka motángo ya mikanda nyonso oyo ezali, mpo na koyeba soki lisangá ezangi te mikanda oyo bandeko basengeli na yango.
17 Biso bakristo oyo tomipesá na Nzambe toyebi ete ntango na biso, mayele na biso, makasi na biso, makoki na biso mpe biloko na biso ya kobikela, ata mpe bomoi na biso ezali makabo oyo euti na Nzambe mpe alingi tósalela yango na mosala na ye. (Luka 17:10; 1 Ko. 4:7) Soki tozali kosalela malamu biloko nyonso oyo tozali na yango, tokomonisa ete tolingaka Yehova mingi. Tolingi kosalela Yehova na biloko na biso ya motuya, mpo toyebi ete asepelaka na makabo nyonso oyo topesaka ye mpo na komonisa ete tokangami na ye na molimo na biso mobimba. (Mas. 3:9; Mrk. 14:3-9; Luka 21:1-4; Kol. 3:23, 24) Yesu alobaki: “Bozwi ofele, bópesa ofele.” (Mat. 10:8) Soki topesi bomoi na biso mpe biloko na biso na mosala ya Yehova, tokozwa esengo mingi.—Mis. 20:35.