MOKAPO 13
“Bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe”
LOKOLA tozali basaleli ya Nzambe mpe tomipesá na ye, tozali na mokumba ya komonisa nkembo ya Yehova na makambo nyonso oyo tolobaka mpe tosalaka. Ntoma Paulo apesaki etinda moko oyo tosengeli kolanda; akomaki boye: “Ezala bozali kolya to komɛla to kosala eloko nini mosusu, bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.” (1 Ko. 10:31) Yango ezali kosɛnga ete tókangama na mitinda ya boyengebene ya Yehova, oyo emonisaka bomoto na ye ya kokoka. (Kol. 3:10) Lokola tozali ekólo moko mosantu, tosengeli kokóma bamekoli ya Nzambe.—Ef. 5:1, 2.
2 Mpo na kobenda likebi ya bakristo na likambo yango, ntoma Petro akomaki boye: “Lokola bana ya botosi, bótika kolanda bamposa oyo bozalaki na yango kala ntango bozalaki na boyebi te, kasi, na boyokani na Mosantu oyo abengaki bino, bino mpe bókóma basantu na etamboli na bino mobimba, mpo ekomamá ete: ‘Bosengeli kozala basantu, mpamba te ngai nazali mosantu.’” (1 Pe. 1:14-16) Kaka ndenge ezalaki na Yisraele ya kala, bandeko nyonso na lisangá ya bokristo basengeli kobatela ezaleli ya bosantu. Yango elimboli ete basengeli kozala na litɔnɔ te, komibatela ete masumu mpe elimo ya mokili ebebisa bango te. Na ndenge yango, batyami pembeni mpo na mosala mosantu.—Kob. 20:5.
3 Mpo na kobatela ezaleli ya bosantu, esengeli kotosa mibeko mpe mitinda ya Yehova, oyo emonisami polele na kati ya Makomami Mosantu. (2 Tim. 3:16) Na nzela ya boyekoli ya Biblia, basalisaki biso tóyeba Yehova mpe banzela na ye, mpe topusanaki penepene na ye. Boyekoli na biso ya Biblia emonisaki biso ntina ya koluka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe kosala ete mokano ya Yehova ezala likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso. (Mat. 6:33; Rom. 12:2) Yango esɛngaki ete tólata bomoto ya sika.—Ef. 4:22-24.
BOPƐTO NA ELIMO MPE NA BIZALELI
4 Kotosa mitinda ya boyengebene ya Yehova ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Monguna na biso, Satana Zabolo, alukaka kolongola biso na nzela ya solo. Ntango mosusu, ekómaka mpasi mingi mpo tofandi na mokili oyo mabe mpe nzoto na biso etindaka biso na kosala masumu. Mpo tókokisa elako oyo tosalaki epai ya Nzambe, tosengeli kobunda etumba ya elimo. Biblia eyebisi biso ete, ntango tokutani na botɛmɛli to na komekama, tókamwa te. Tokonyokwama mpo na boyengebene. (2 Tim. 3:12) Tokoki kozala na esengo ntango tomekami, mpo yango elakisi ete tozali kosala mokano ya Nzambe.—1 Pe. 3:14-16; 4:12, 14-16.
5 Atako Yesu azalaki moto ya kokoka, ayekolaki botosi na bampasi oyo akutanaki na yango. Ata mbala moko te akweaki na komekama ya Satana to akómaki na mposa ya lokumu ya mokili. (Mat. 4:1-11; Yoa. 6:15) Kutu, ata mbala moko te Yesu akanisaki kobuka mobeko ya Nzambe. Atako bosembo na ye esalaki ete mokili eyina ye, akangamaki na mitinda ya boyengebene ya Yehova. Mwa moke liboso akufa, akebisaki bayekoli na ye ete mokili ekoyina bango. Banda wana, bayekoli ya Yesu bakutanaka na minyoko, kasi koyeba ete Yesu alongaki mokili epesaka bango mpiko.—Yoa. 15:19; 16:33; 17:16.
6 Mpo na kozala bato ya mokili te, tosengeli kotosa mitinda ya boyengebene ya Yehova, ndenge Nkolo na biso asalaki. Longola koboya kokɔta na makambo ya politiki mpe milende ya koluka kobongisa bomoi ya bato, tosengeli mpe kotɛmɛla bizaleli ya bato ya mokili oyo esili kobeba. Tozwaka na lisɛki te toli oyo ezali na Yakobo 1:21 ete: “Bóbwaka mbindo nyonso mpe ezaleli oyo ezangi ntina: mabe, mpe bóndima na boboto liloba oyo ekoki kobikisa milimo na bino mpe efanda mpenza na kati na bino.” Boyekoli ya Biblia mpe koyangana na makita ekosala ete liloba ya solo efanda na makanisi mpe na mitema na biso, mpe tokolinga ata moke te kobendama na biloko ya mokili. Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Boyebi te ete kozala moninga ya mokili ezali nde kozala monguna ya Nzambe? Yango wana, moto nyonso oyo alingi kozala moninga ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.” (Yak. 4:4) Na yango, Biblia ezali mpenza kolendisa biso makasi tókangama na mitinda ya boyengebene ya Yehova mpe tókabwana na mokili.
7 Liloba ya Nzambe ezali kokebisa biso ete tósangana te na etamboli ya nsɔni mpe ya mbindo. Eyebisi biso ete: “Pite mpe mbindo ya ndenge nyonso to lokoso etángama ata kotángama te na kati na bino, ndenge mpenza ebongi na basantu.” (Ef. 5:3) Na yango, tosengeli koboya kotya makanisi na biso na makambo ya mbindo, ya nsɔni to ya mabe, mpe tokotika te ete makambo yango ekɔta ata moke na masolo na biso. Soki tosali bongo, tokomonisa ete tolingi kokangama na mitinda ya pɛto mpe ya boyengebene ya Yehova oyo etali bizaleli malamu.
BOPƐTO YA NZOTO MPE YA BILOKO NA BISO
8 Longola kozala pɛto na elimo mpe na bizaleli, bakristo bayebaka mpe ete nzoto na bango mpe biloko na bango esengeli kozala pɛto. Na Yisraele ya kala, Nzambe ya bosantu asɛngaki ete kaa na bango ezala pɛto. Biso mpe tosengeli kozala pɛto mpo Yehova ‘amona eloko moko te ya nsɔni epai na biso.’—Mib. 23:14.
9 Na Biblia, bosantu ná bopɛto etambolaka nzela moko. Na ndakisa, ntoma Paulo akomaki boye: “Bandeko ya bolingo, tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo, tómonisaka ete tozali kobanga Nzambe mpo bosantu na biso ekóma ya kokoka.” (2 Ko. 7:1) Na yango, bakristo nyonso basengeli kosala makasi básukolaka mbala na mbala nzoto na bango mpe bilamba na bango. Atako mboka na mboka ezali na makambo na yango, mbala mingi tozalaka na sabuni mpe na mai oyo esengeli mpo na kosukola nzoto na biso mpe bana na biso mpo biso nyonso tózala pɛto.
10 Lokola topesaka bato nyonso litatoli, mbala mingi bato bayebaka biso malamu na bisika tofandi. Soki ndako na biso ebongisami malamu, ezali pɛto mpe na molɔngɔ, ezala na kati mpe na libándá, yango epesaka litatoli epai ya bato oyo bafandaka pene na biso. Libota mobimba ekoki kopesa mabɔkɔ na likambo yango. Bandeko mibali basengeli kotyaka mpenza likebi ndenge ndako na bango ezali na kati mpe na libándá. Basengeli koyeba ete soki ndako ezali pɛto na kati mpe na libándá, yango ekosala ete bato báloba malamu mpo na yango. Soki bazali kosala bongo mpe soki bazali kozwa esika ya liboso na makambo ya Nzambe, yango ekomonisa ete bazali kokamba mabota na bango ná bandako na bango malamu. (1 Tim. 3:4, 12) Bandeko basi bazali mpe na mokumba ya kotalela makambo mosusu, mingimingi na kati ya ndako. (Tito 2:4, 5) Soki bana bateyami malamu, bakosala oyo esengeli mpo bázala pɛto mpe bábongisa malamu bashambrɛ na bango. Na ndenge yango, libota mobimba ekosala elongo mpo na komesana na bopɛto oyo ebongi na mokili ya sika oyo ekotambwisama na Bokonzi ya Nzambe.
11 Lelo oyo, na bisika mosusu, basaleli ya Yehova mingi bakendaka na makita na motuka. Na bisika mosusu, esengeli kozala na motuka mpo na kosakola malamu. Motuka yango esengeli kozala ntango nyonso pɛto mpe malamu. Bandako mpe mituka na biso esengeli komonisa ete tozali basaleli ya Yehova oyo bazali pɛto mpe basantu. Ndenge moko mpe sakosi na biso ya mosala ya kosakola mpe Biblia na biso esengeli kozala pɛto.
12 Molato mpe monzɛlɛ na biso esengeli koyokana na mitinda ya Biblia. Tokoki ata moke te kokanisa kokende kokutana na mokonzi moko soki bilamba na biso ezali salite to ebongi te. Tosengeli kotya likebi koleka ntango tozali komonisa Yehova na mosala ya kosakola to ntango tozali kosala lisolo na estrade. Monzɛlɛ mpe molato na biso ekoki kotinda bato bándima losambo ya Yehova to báboya yango. Ebongi te kolekisa ndelo to kozala mafumafu. (Mika 6:8; 1 Ko. 10:31-33; 1 Tim. 2:9, 10) Na yango, ntango tozali komibongisa mpo na kobima na mosala ya kosakola to kokende na makita, na mayangani ya zongazonga mpe ya etúká, tosengeli kobosana te oyo Biblia elobi mpo na bopɛto ya nzoto mpe kolekisa ndelo te na monzɛlɛ mpe molato. Tolingi ntango nyonso kokumisa Yehova mpe kopesa ye nkembo.
Lokola tozali basaleli ya Nzambe oyo bamipesá na ye, tozali na mokumba ya komonisa nkembo ya Yehova na makambo nyonso oyo tolobaka mpe tosalaka
13 Tosengeli mpe kosalela mitinda yango ntango tokei kotala biro monene to biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova. Tóbosana te ete nkombo Betele elimboli “Ndako ya Nzambe.” Yango wana, molato na biso mpe etamboli na biso esengeli kozala kaka ndenge ezalaka ntango tokendaka na makita na Ndako ya Bokonzi.
14 Ata soki tozali kominanola, tosengeli kotalela molato na biso mpe monzɛlɛ na biso. Tosengeli komituna boye: ‘Molato na ngai mpe monzɛlɛ na ngai ekopesa ngai nzela napesa litatoli ya libaku malamu?’
MASANO MPE KOMINANOLA YA MALAMU
15 Kopema mpe kominanola ezali na ntina mpo tóbatela esengo mpe tózala nzoto kolɔngɔnɔ. Mokolo moko, Yesu abengaki bayekoli na ye bákende na esika oyo bato bazalaki te mpo ‘bápema mwa moke.’ (Mrk. 6:31) Kopema mwa moke, kosala masano to kominanola ekoki kosepelisa biso mwa moke. Ekoki kopesa biso makasi mpo tókoba kosala mosala na biso.
16 Lokola kominanola ezalaka ndenge na ndenge lelo oyo, bakristo basengeli kosalela bwanya oyo euti na Nzambe mpo na kopona oyo ya malamu. Atako kominanola ezali mabe te, yango ezali te likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso. Biblia ekebisi biso ete na “mikolo ya nsuka,” bato bakolinga “bisengo na esika ya kolinga Nzambe.” (2 Tim. 3:1, 4) Masano mingi to kominanola mosusu ebongi te na baoyo balingi kokangama na mitinda ya boyengebene ya Yehova.
17 Bakristo ya liboso basengelaki koboya makambo mabe ya bato ya ntango na bango oyo balingaki bisengo mingi. Na masano ya cirque oyo ezalaki kosalema na Roma, bato oyo bazalaki kotala bazalaki kosepela na mpasi ya baninga. Masano ya bato ya ekólo yango etondaki na mobulu, bazalaki kosopa makila, kosala pite mpe ekobo, kasi bakristo ya liboso bazalaki kokima makambo yango. Lelo oyo, mitindo mingi ya kominanola etondi na makambo yango mpe ezali kolamusa bamposa mabe ya nzoto. Tosengeli ‘kokeba mpenza na ndenge na biso ya kotambola,’ tókima kominanola oyo ekoki kobebisa biso. (Ef. 5:15, 16; Nz. 11:5) Mpe ata soki ndenge moko boye ya kominanola ezali mabe te, makambo mingi oyo esalemaka wana ekoki kozala mabe.—1 Pe. 4:1-4.
18 Ezali na masano mpe na mitindo ya kominanola oyo ekoki kosepelisa bakristo. Bato mingi bazwi matomba mpo balandaki toli ya Biblia mpe makanisi ya malamu oyo ezali na mikanda ya Batatoli ya Yehova.
19 Mbala mosusu, mabota ya bakristo ekoki kokutana epai ya libota moko mpo na kolekisa ntango esika moko. To bakoki kobenga bandeko mibali mpe basi na fɛti moko ya libala to mpe bakoki kokutana esika mosusu mpo na kosepela. (Yoa. 2:2) Baoyo bazwi ebongiseli yango, basengeli koyeba ete makambo oyo ezali kosalema wana ezali na motó na bango. Ezali polele ete, esengeli kozala ekɛngɛ ntango bato ebele bakutani esika moko. Loyenge oyo ezalaka na bisika ya ndenge wana etindaki bandeko mosusu básala makambo oyo ebongi te na bakristo, bálekisa ndelo na kolya mpe komɛla, mpe básala kutu masumu. Yango wana, bakristo oyo bazali na bososoli bamonaka ete ezali malamu bábenga bato ebele te mpe bálekisa bangonga mingi te na bokutani ya ndenge wana. Soki masanga ekozala, bakomɛla kasi bakolekisa ndelo te. (Flp. 4:5) Soki basali nyonso ete kokutana na kati ya bakristo ezala malamu mpe elendisa na elimo, bakopesa motuya koleka te na biloko ya kolya mpe masanga.
20 Kozala moyambi-bapaya ezali malamu. (1 Pe. 4:9) Soki tobengi bakristo mosusu epai na biso mpo na kolya, komɛla mwa moke, kominanola, mpe kosolola, tóbosana te kobengisa bandeko ya lisangá oyo bazali na makoki te. (Luka 14:12-14) Soki babengisi biso na esika ya ndenge wana, etamboli na biso esengeli koyokana na toli oyo ezali na Marko 12:31. Ezalaka malamu komonisa botɔndi mpo na boboto oyo basusu bamoniseli biso.
21 Bakristo basepelaka na ebele ya makabo ya Nzambe mpe bayebi ete bakoki ‘kolya mpe komɛla mpenza mpe komona malamu mpo na mosala na bango nyonso ya makasi.’ (Mos. 3:12, 13) Soki tosali “makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe,” baoyo bayambaki bandeko mpe bandeko oyo bayambamaki, ntango bakokanisa bokutani yango, lisosoli na bango ekotungisama te, kasi bakosepela ndenge balendisanaki na elimo.
MAKAMBO OYO ESALEMAKA NA KELASI
22 Bana ya Batatoli ya Yehova bazwaka litomba na kelasi oyo batángaka. Ntango bazali na kelasi, basalaka makasi báyeba kotánga mpe kokoma malamu. Makambo mosusu oyo bateyaka bango na kelasi ekoki kozala na ntina mpo na bilenge oyo bamityeli mikano na mosala ya Nzambe. Ntango bazali naino kokende kelasi, basengeli kosala makasi ‘bákanisa Mozalisi na bango Monene’ mpe bátya makambo ya Nzambe na esika ya liboso.—Mos. 12:1.
23 Soki ozali elenge mokristo oyo akendaka kelasi, osengeli kolekisa ntango na bilenge ya mokili kaka soki esengeli, kasi mpambampamba te. (2 Tim. 3:1, 2) Lokola Yehova apesá biso likoki ya komibatela, ezali na makambo mingi oyo tokoki kosala mpo mokili ebebisa biso te. (Nz. 23:4; 91:1, 2) Na yango, mpo na komibatela, tosá bibongiseli oyo Yehova azwi.—Nz. 23:5.
24 Mpo bákɔta na makambo ya mokili te ntango bazali na kelasi, bilenge Batatoli mingi bazwá ekateli ya kokende te na masano oyo esalemaka nsima ya kelasi. Ekoki kozala mpasi mpo baninga ya kelasi mpe balakisi bákanga ntina ya ekateli yango. Kasi, kosepelisa Nzambe nde eleki ntina. Yango elimboli ete okosalela lisosoli na yo oyo eteyami na Biblia mpe okozwa ekateli ya komikɔtisa te na kowelana ya mokili to na makambo oyo emonisaka bolingo ya ekólo. (Gal. 5:19, 26) Soki bino bilenge bozali kolanda toli ya Biblia oyo baboti na bino bakristo bapesaka bino mpe soki bozali kotambola na baninga ya malamu na lisangá, yango ekosalisa bino bókangama na mitinda ya boyengebene ya Yehova.
MOSALA MPE BANINGA
25 Biblia elobi ete batata ya mabota bazali na mokumba ya kokokisa bamposa ya bato ya ndako na bango. (1 Tim. 5:8) Kasi, basaleli ya Nzambe bayebi ete koluka Bokonzi esengeli kozala liboso ya mosala ya mosuni. (Mat. 6:33; Rom. 11:13) Soki bazali kokangama na Nzambe mpe kosepela na biloko ya kolya mpe bilamba oyo bazali na yango, bakokima mitungisi mpe mitambo ya konduka biloko ya mokili.—1 Tim. 6:6-10.
26 Bakristo nyonso oyo bamipesá na Nzambe oyo basalaka mosala basengeli kobosana te mitinda ya Biblia. Kozwa na bosembo biloko oyo tosengeli na yango elimboli koboya kosala misala oyo ezali kobuka mobeko ya Nzambe to ya mboka. (Rom. 13:1, 2; 1 Ko. 6:9, 10) Tosengeli mpe kokeba na baninga ya mabe. Lokola tozali basoda ya Kristo, tokoboya komikɔtisa na mimbongo oyo ebukaka mitinda ya Biblia, oyo ekokɔtisa biso na makambo ya mokili to ekobebisa boyokani na biso na Nzambe. (Yis. 2:4; 2 Tim. 2:4) Toboyaka mpe misala oyo ezali na boyokani na “Babilone Monene,” mangomba oyo Nzambe ayiná.—Em. 18:2, 4; 2 Ko. 6:14-17.
27 Soki tozali kotosa mitinda ya boyengebene ya Nzambe, tokosalela te mabaku ya koyangana na bandeko na biso bakristo mpo na kolakisa biloko ya kotɛka to mpo na koluka matomba na biso moko. Ntina oyo toyanganaka na makita, na mayangani ya mike mpe ya minene ezali kaka mpo na kosambela Yehova. Tolyaka na mesa na ye ya elimo mpe tosepelaka ‘kolendisana.’ (Rom. 1:11, 12; Ebr. 10:24, 25) Mayangani ya ndenge wana esengeli kosuka kaka na makambo ya Nzambe.
TÓBATELA BOMOKO YA BAKRISTO
28 Mitinda ya boyengebene ya Yehova esɛngi mpe na basaleli na ye ‘bábatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.’ (Ef. 4:1-3) Na esika ya koluka komisepelisa, mokomoko na biso asalaka makasi mpo na koluka bolamu ya basusu. (1 Tes. 5:15) Na ntembe te, ezali elimo yango nde omonaka epai ya bandeko ya lisangá na bino. Tózala mindɛlɛ to baindo, bazwi to babola, bato batángá mingi to te, to bato ya ekólo nini, biso nyonso tozali kotambwisama na mitinda ya boyengebene kaka moko. Ata mpe bato oyo bazali Batatoli te bamonaka ete basaleli ya Yehova bazalaka na bomoko.—1 Pe. 2:12.
29 Ntoma Paulo amonisaki eloko oyo esimbi bomoko na biso, akomaki boye: “Nzoto ezali kaka moko, mpe elimo kaka moko, ndenge mpe bobengamaki na elikya kaka moko oyo bobengamaki na yango; Nkolo kaka moko, kondima kaka moko, batisimo kaka moko; Nzambe kaka moko mpe Tata ya bato nyonso, oyo azali likoló ya nyonso mpe azali kosala na nzela ya nyonso mpe na kati ya nyonso.” (Ef. 4:4-6) Yango ezali kosɛnga ete biso nyonso tózala na bomoko na boyebi na biso ya mateya ya moboko ya Biblia mpe mateya mozindo ya Biblia; yango ekomonisa ete tozali kondima boyangeli ya Yehova. Ya solo, Yehova apesi basaleli na ye monɔkɔ ya pɛto, elingi koloba solo, mpo epesa bango likoki ya kosalela ye na bomoko.—Sef. 3:9.
30 Bomoko mpe kimya oyo ezali na lisangá ya bokristo ezali mpenza kobɔndisa baoyo nyonso bazali kosambela Yehova. Tomoni mpenza kokokisama ya elaka oyo ya Yehova: “Nakotya bango na bomoko lokola bibwɛlɛ na lopango.” (Mika 2:12) Tokobatela kimya mpe bomoko yango soki tokangami na mitinda ya boyengebene ya Yehova.
31 Esengo na baoyo bandimami na lisangá ya Yehova, oyo ezali pɛto! Ebongi mpenza tósala nyonso oyo tokoki mpo na komema nkombo ya Yehova. Wana tozali kobatela boyokani na biso na Yehova, tosengeli kosala makasi tókangama na mitinda na ye ya boyengebene mpe tólendisa bato mosusu básala mpe bongo.—2 Ko. 3:18.