Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • od mok. 15 nk. 157-161
  • Kotosa ebongiseli ya Teokrasi epesaka bolamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotosa ebongiseli ya Teokrasi epesaka bolamu
  • Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NA MAKAMBO NINI TOSENGELI KOTOSA EBONGISELI YA TEOKRASI?
  • Oyo botosi epai na Nzambe ezali kosenga na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Botosi epai na Nzambe: mpo na nini mpe nani asengeli kotosa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Kozala na botósi kati na libala elimboli nini? kosala mabongwani mingi.
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Kozala mokonzi ya libota elimboli mpenza nini?
    Lamuká!—2008
Makambo mosusu
Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
od mok. 15 nk. 157-161

MOKAPO 15

Kotosa ebongiseli ya Teokrasi epesaka bolamu

SOKI tolingi kobongisama mpo na kosala mokano ya Yehova, Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, tosengeli kotosaka ye. Tondimaka ete Mwana na ye azali mokonzi ya lisangá ya bokristo mpe totosaka ebongiseli ya bokonzi na makambo mosusu ya bomoi na biso. Soki tozali kotosa ebongiseli ya Teokrasi ndenge wana, biso nyonso tokozwa bolamu.

2 Mbala ya liboso oyo bato bayokaki likambo ya kotosa bokonzi oyo etyami ezalaki na elanga ya Edene. Emonisamaki na mitinda oyo Nzambe apesaki na Ebandeli 1:28 mpe 2:16, 17. Banyama esengelaki kotosa bato, mpe Adama ná Eva basengelaki kotosa mokano ya Nzambe mpe bokonzi na ye. Soki bátosaka bokonzi yango, mbɛlɛ kimya ezali mpe makambo nyonso elingaki kotambola na molɔngɔ. Na nsima, ebongiseli ya bokonzi emonisamaki na 1 Bakorinti 11:3. Ntoma Paulo akomaki boye: “Nalingi bóyeba ete mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo; mpe mokonzi ya mwasi ezali mobali; mpe mokonzi ya Kristo ezali Nzambe.” Maloba yango emonisi ete moto nyonso azali na mokonzi na ye, longola kaka Yehova.

3 Lelo oyo, bato mingi bandimaka te ebongiseli yango ya bokonzi mpe batosaka yango te. Mpo na nini? Mokakatano ebandaki na Edene ntango baboti na biso ya liboso bazwaki ekateli ya koboya kotosa boyangeli ya Nzambe. (Eba. 3:4, 5) Kasi, yango epesaki bango bonsomi monene koleka te. Kutu, bakómaki nde kotambwisama na Satana Zabolo, ekelamu mabe ya elimo. Botomboki wana ekómisaki bato mosika na Nzambe. (Kol. 1:21) Yango wana, lelo oyo mpe bato ebele bazali kotambwisama na moto mabe wana.​—1 Yoa. 5:19.

4 Lokola toyekoli solo oyo ezali na Liloba ya Nzambe mpe tozali kotosa yango, tolongwe na nse ya litambwisami ya Satana. Biso Batatoli, oyo tomipesá na Nzambe mpe tozwá batisimo, tondimaka ete Yehova azali Mokonzi ya bomoi na biso. Lokola Mokonzi Davidi, tondimaka ete Yehova azali “likoló na nyonso.” (1 Nt. 29:11) Na komikitisa mpenza, tondimaka ete: “Yehova azali Nzambe. Ye nde asalaki biso, kasi biso moko te. Tozali bato na ye mpe bampate na esika na ye ya koleisa bibwɛlɛ matiti.” (Nz. 100:3) Tondimaka ete Yehova azali monene mpe ete ebongi tótosa ye na makambo nyonso, mpo ye nde akelaki biloko nyonso. (Em. 4:11) Biso baministre ya Nzambe ya solo tolandaka ndakisa malamu ya Yesu Kristo, moto oyo atosaki Nzambe na makambo nyonso.

5 Liteya nini Yesu azwaki na bampasi oyo amonaki ntango azalaki awa na mabele? Baebre 5:8 epesi eyano: “Atako azalaki Mwana, ayekolaki botosi na makambo oyo akutanaki na yango.” Na bosembo mpenza, Yesu atosaki Tata na ye ya likoló ntango nyonso, ata na ntango ya mpasi. Longola yango, Yesu asalaki ata eloko moko te na likanisi na ye moko. Alobaki makambo oyo eutaki na ye moko te, alukaki mpe nkembo na ye moko te. (Yoa. 5:19, 30; 6:38; 7:16-18) Ntango azalaki kosala mosala na ye, azalaki kosala mokano ya Tata na ye na esengo, ata soki yango esalaki ete bátɛmɛla ye mpe bányokola ye. (Yoa. 15:20) Atako bongo, Yesu atosaki Nzambe. “Amikitisaki” tii na “liwa na nzete ya mpasi.” Lokola atosaki Yehova na ma kambo nyonso, yango epesi bato likoki ya kozwa lobiko, epesi ye moko lokumu monene mpe epesi Tata na ye nkembo.​—Flp. 2:5-11; Ebr. 5:9.

NA MAKAMBO NINI TOSENGELI KOTOSA EBONGISELI YA TEOKRASI?

6 Ntango tozali kotosa Nzambe mpe tozali kosala mokano na ye, mitungisi mpe mikakatano mingi oyo ekómelaka bato oyo baboyaka kotosa bokonzi ya Yehova ekómelaka biso te. Monguna na biso, Zabolo, alukaka ntango nyonso kolya biso. Moto mabe yango akozwa biso te soki totɛmɛli ye mpe tondimi kotosa Yehova mpo na komonisa ete tomikitisi liboso na Ye.​—Mat. 6:10, 13; 1 Pe. 5:6-9.

7 Tondimaka ete Kristo azali mokonzi ya lisangá ya bokristo mpe tondimaka bokonzi oyo apesi “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Yango emonanaka na makanisi oyo tozalaka na yango epai ya bakristo mosusu mpe makambo oyo tosalelaka bango. Soki tozali kotosa bokonzi oyo Nzambe atye na lisangá, tokotosa Liloba na ye na makambo nyonso ya losambo na biso. Botosi yango ekomonana na makambo lokola mosala ya kosakola, koyangana na makita mpe kopesa biyano na makita, boyokani na biso na bankulutu, mpe kopesa mabɔkɔ na bibongiseli oyo lisangá ya Nzambe ezwi.​—Mat. 24:45-47; 28:19, 20; Ebr. 10:24, 25; 13:7, 17.

8 Botosi na biso epai ya Nzambe esalaka ete lisangá ya bokristo ezala na kimya, kobanga ezala te, mpe makambo ezala na molɔngɔ. Bizaleli ya Yehova emonanaka epai ya basaleli na ye. (1 Ko. 14:33, 40) Makambo oyo biso moko tomoni na ebongiseli ya Yehova etindi biso tóloba lokola Mokonzi Davidi. Nsima ya komona bokeseni oyo ezali kati na basaleli ya Yehova ná bato mabe, Davidi alobaki: “Esengo na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!”​—Nz. 144:15.

9 Na libala mpe na libota, “mokonzi ya mwasi ezali mobali.” Ndenge moko mpe, mibali basengeli kotosa Kristo, oyo Mokonzi na ye ezali Nzambe. (1 Ko. 11:3) Basi basengeli kotosa mibali na bango, mpe bana basengeli kotosa baboti na bango. (Ef. 5:22-24; 6:1) Kimya ezalaka na kati ya libota soki moto na moto azali kotosa ebongiseli wana ya bokonzi.

10 Mobali asengeli kosalela bokonzi na ye na bolingo, lokola Kristo. (Ef. 5:25-29) Soki mobali aboyi kosalela bokonzi na ndenge ya mabe, to soki asundoli bokonzi na ye te, mwasi ná bana bakosepela kotosa ye. Mwasi azali mosungi ya mobali. (Eba. 2:18) Soki mwasi azali na motema molai ntango azali kosunga mobali na ye mpe azali komemya ye, mobali na ye akosepela na ye mpe Nzambe akozwa lokumu. (1 Pe. 3:1-4) Ntango mibali ná basi na bango bazali kolanda toli ya Biblia na likambo etali bokonzi, bakopesa bana na bango ndakisa malamu oyo ekotinda bango mpe bátosa Nzambe.

Na makambo nyonso ya bomoi na biso, tosengeli kotosa ebongiseli ya Teokrasi

11 Botosi na biso epai ya Nzambe emonanaka mpe na ndenge oyo totalelaka “bakonzi oyo bazali liboso,” oyo bokonzi na bango “ezali na ndelo oyo etyami na Nzambe.” (Rom. 13:1-7) Lokola bakristo batosaka mibeko ya mboka, bafutaka mpako; bazongiselaka “Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.” (Mat. 22:21) Longola yango, mpo na kosakola na bateritware mosusu, bakristo batosaka mibeko ya mboka oyo etali kobomba makambo etali moto. Lokola totosaka mibeko ya bakonzi ya mokili na makambo nyonso oyo ebuki mibeko ya boyengebene ya Yehova te, yango epesaka biso nzela ya kosalela makasi mpe nguya na biso na mosala ya kosakola.​—Mrk. 13:10; Mis. 5:29.

12 Na makambo nyonso ya bomoi na biso, tosengeli kotosa ebongiseli ya Teokrasi. Na miso ya kondima, tozali komona mokolo oyo bato nyonso bakotosa Yehova Nzambe. (1 Ko. 15:27, 28) Baoyo bazali kondima na esengo boyangeli ya na ye, Yehova akopambola bango mpe akondima bango mpe bakokoba kotosa ye libela na libela!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto