Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ypq motuna 7 nk. 21-23
  • Nasala nini soki moto alingi kaka tósangisa nzoto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasala nini soki moto alingi kaka tósangisa nzoto?
  • Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
  • Masolo mosusu
  • Kosangisa nzoto ekokolisa bolingo na biso?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Kosangisa nzoto ekobongisa boyokani na biso?
    Lamuká!—2010
  • Nasala nini soki baninga na ngai bazali kotya ngai mbamba nasangisa nzoto?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Ndenge nini nakoki kolimbola mateya oyo etali kosangisa nzoto?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
ypq motuna 7 nk. 21-23
Elenge mwasi moko azali koboya na mpiko mitungisi ya mwana mobali moko

MOTUNA 7

Nasala nini soki moto alingi kaka tósangisa nzoto?

NTINA NA YANGO

Ndenge okosala na likambo yango ekobongisa to ekobebisa ata bomoi na yo na mikolo ekoya.

YO OLINGAKI KOSALA NINI?

Talá likambo oyo: Heather akómi moninga ya Mike esali kaka sanza mibale, kasi azali komona lokola ayebi ye banda bomwana. Bazali kotindelana bamesaje, kosolola ntango molai na telefone, mpe moto na moto azali koyeba ata likambo oyo moninga alingi koloba! Sikoyo Mike alingi básuka kaka na masolo te.

Na sanza mibale yango, Mike ná Heather bakei mosika te, kaka kosimbana na lobɔkɔ mpe kopesana mwa bizi. Heather alingi básuka kaka wana. Alingi mpe te Mike aboya ye. Soki azali elongo na Mike, amimonaka mwasi kitoko, mwasi ya malonga. Alobi na nse ya motema: ‘Lisusu, ngai ná Mike tolingani . . .’

Soki okoki kolingana na moto, mpe ozalaki na esika ya Heather, olingaki kosala nini?

KANISÁ!

Bazali kosalela elamba ya kitoko mpo na kopangwisa salite

Kosangisa nzoto ezali likabo oyo Nzambe apesi kaka bato oyo babalani. Kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali kobebisa likabo yango. Ezali lokola kozwa elamba kitoko oyo bakabeli yo mpe kopangwisa na yango salite

Soki oboyi kotosa mibeko ya molɔ́ngɔ́, na ndakisa omati likoló mpe omibwaki na nse, okoki kobukana to kokufa. Ezali mpe bongo soki oboyi kotosa mibeko oyo etali bizaleli malamu, na ndakisa oyo elobi: “Bóboya pite.”​—1 Batesaloniki 4:3.

Koboya kotosa mibeko yango ememaka makambo nini? Biblia elobi: “Moto oyo asalaka pite, azali kosalela nzoto na ye moko lisumu.” (1 Bakorinti 6:18) Likambo yango ezali mpenza solo!

Bato ya mayele bamoni ete bilenge mingi oyo basangisaki nzoto liboso bábala bakutanaka na makambo oyo elandi:

  • MAWA MAKASI. Bilenge mingi oyo basangisá nzoto liboso ya kobala balobaka ete na nsima bayokaki mawa mingi.

  • KOZANGA KOTYELANA MOTEMA. Nsima ya kosangisa nzoto, moto na moto akómaka komituna, ‘Nani mosusu asangisá na ye nzoto?’

  • KOLƐMBA NZOTO. Mbala mingi na motema na ye, elenge mwasi akosepela mingi nde na moto oyo akobatela ye, kasi te oyo akosakana na ye. Mpe mbala mingi, elenge mobali alandaka lisusu mpenza te elenge mwasi oyo andimaki kosangisa na ye nzoto.

  • Na mokuse: Soki osangisi nzoto liboso ya kobala, omisambwisi mpo okabi eleko na yo ya motuya. (Baroma 1:24) Nzoto na yo ezali na valɛrɛ mingi, kobebisa yango te.

Monisá ete ozali na makasi ya ‘koboya pite.’ (1 Batesaloniki 4:3) Bongo, soki mokolo mosusu obali nde okoki kosangisa nzoto. Wana okosepela na yango mingi, okomitungisa te, okoyoka mawa te, okozala mpe motema likolólikoló te, ndenge bato mingi oyo basangisá nzoto liboso ya kobala bayokaka.​—Masese 7:22, 23; 1 Bakorinti 7:3.

OKANISI NINI?

  • Moto oyo alingi yo mpenza, akoluka osala likambo oyo ekobebisa nzoto mpe makanisi na yo?

  • Moto oyo alukaka mpenza bolamu na yo, akoluka kobebisa boyokani na yo na Nzambe?​—Baebre 13:4.

MPO NA BANA BASI

Mwana mwasi moko afandi azali kokanisa

Bilenge mibali mingi balobaki ete bakoki te kobala elenge mwasi oyo basangisaki na ye nzoto. Mpo na nini? Mpo balingi kobala mwasi oyo ayebi mibali te!

Ekamwisi yo​—ntango mosusu epesi yo kutu nkanda? Soki bongo, kanisá likambo oyo: Bafilme ekumisaka kosangisa nzoto kati na bilenge mpe emonisaka yango lokola ezali na likama te, ete ezali nde bolingo ya solosolo.

Bákosa yo te! Baoyo bakoluka kotinda yo osangisa nzoto liboso ya kobala bazali koluka kaka matomba na bango moko.​—1 Bakorinti 13:4, 5.

MPO NA BANA MIBALI

Elenge mobali moko afandi azali kokanisa

Soki bolingani na mwana mwasi moko boye, omituna: ‘Nalingi mpenza mwana mwasi oyo?’ Soki olobi “ɛɛ,” ndenge nini okoki komonisa yango? Zalá na makasi ya kotosa mibeko ya Nzambe, bwanya mpo okima makambo oyo ekoki kokweisa bino, mpe bolingo oyo ekotinda yo oluka bolamu na ye.

Soki ozali na bizaleli wana, elenge mwasi yango akoyoka lokola Moshulame, mwasi ya bizaleli ya pɛto, oyo alobaki ete: “Bolingo na ngai azali wa ngai mpe ngai nazali wa ye.” (Loyembo ya Salomo 2:16) Na mokuse, akolinga yo mingi koleka!

TOLI

Soki moto oyo alingi bósangisa nzoto alobi na yo: “Soki olingaka ngai, okosala yango,” lobá na mpiko ete, “Soki olingaka ngai, olingaki kosɛnga ngai yango te!”

Na oyo etali bizaleli na yo liboso ya moto oyo azali molongani na yo te, kanisáká likambo oyo: Likambo nyonso oyo okolinga te baboti na yo bámona yo ozali kosala, kosala yango te.

MAKAMBO NAKOSALA

  • Okosala nini soki moto asɛngi yo bósangisa nzoto?

  • Na bisika nini ekozala mpasi mpo oboya?

  • Ndenge nini okoki kokima bisika yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto