Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 28 lok. 70-lok. 71 par. 1
  • Mpunda ya Balaama elobi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpunda ya Balaama elobi
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Mpunda elobi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Na kati ya Mitángo
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Mituya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Okopesa eyano nini?
    Lamuká!—2009
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 28 lok. 70-lok. 71 par. 1
Mpunda ya Balaama elali na nzela ntango emoni anzelu ya Nzambe

LITEYA 28

Mpunda ya Balaama elobi

Bayisraele basili koumela mbula soki 40 na esobe. Babɔtɔlaki bingumba mingi ya makasi. Sikoyo, lokola batyaki kaa na bango na mokili patatalu ya Moabe, na ɛsti ya Ebale Yordani, ekómaki ntango ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. Balake, mokonzi ya Moabe, abangaki ete Bayisraele bakobɔtɔla ye mokili na ye. Na yango, abengaki mobali moko na nkombo Balaama aya na Moabe kolakela Bayisraele mabe.

Kasi Yehova ayebisaki Balaama: ‘Kolakela Bayisraele mabe te.’ Na yango, Balaama aboyaki kokende. Mokonzi Balake abengaki ye lisusu mpe alobaki na ye ete akopesa ye eloko nyonso oyo alingi. Balaama aboyaki kaka. Na nsima, Nzambe alobaki: ‘Kende, kasi okoloba kaka makambo oyo nakoyebisa yo.’

Balaama amataki na mpunda na ye mpe akendaki na sudi, na Moabe. Akanaki kolakela Bayisraele mabe, atako Yehova apekisaki ye. Anzelu ya Yehova abimelaki ye na nzela mbala misato. Balaama azalaki komona anzelu te, kasi mpunda na ye ezalaki komona. Mbala ya liboso, mpunda elongwaki na nzela mpe ekɔtaki na esobe. Mbala ya mibale, mpunda emifinaki na efelo moko ya mabanga, mpe efinaki lokolo ya Balaama na efelo yango. Na mbala ya misato, mpunda yango elalaki na nse, na katikati ya nzela. Mbala nyonso wana, Balaama azalaki kobɛta mpunda yango fimbo.

Na nsima, Yehova alobisaki mpunda yango. Mpunda etunaki Balaama: ‘Mpo na nini ozali kobɛtabɛta ngai?’ Balaama alobaki: ‘Otyoli ngai. Soki nazalaki na mopanga, mbɛlɛ nabomi yo.’ Mpunda ezongiselaki ye: ‘Otambolaka na ngai banda bambula mingi. Nasilá kosala yo boye?’

Na yango, Yehova atikaki Balaama amona anzelu. Anzelu alobaki: ‘Yehova apekisaki yo kolakela Bayisraele mabe.’ Balaama alobaki: ‘Nasali mabe. Nakozonga epai na ngai.’ Kasi anzelu alobaki: ‘Kende na Moabe, kasi okoloba kaka makambo oyo Yehova ayebisi yo.’

Balaama azwaki liteya? Te. Alukaki kaka kolakela Bayisraele mabe mbala misato, kasi na mbala nyonso wana Yehova asalaki ete Balaama apambola nde bango. Nsukansuka, Bayisraele babundisaki Moabe mpe Balaama abomamaki. Elingaki kozala malamu mpenza soki Balaama ayokelaka liboso Yehova!

“Bókeba na motindo nyonso ya lokoso, mpo ata soki moto azali na biloko mingi, biloko oyo azali na yango ekopesa ye bomoi te.”​—Luka 12:15

Mituna: Mpo na nini Balaama akendaki na Moabe? Nini esalemaki na nzela?

Mitángo 22:1–24:25; 31:8; Nehemia 13:2; 2 Petro 2:15, 16; Yuda 11

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto