Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 40 lok. 98-lok. 99 par. 2
  • Davidi ná Goliate

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Davidi ná Goliate
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • “Etumba ezali ya Yehova”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Davidi ná Goliate
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Davidi azalaki kobanga te
    Teyá bana na yo
  • Mpo na nini Davidi azalaki kobanga te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 40 lok. 98-lok. 99 par. 2
Davidi azali kobalusa libanda mpo na kobɛta Goliate

LITEYA 40

Davidi ná Goliate

Yehova ayebisaki Samwele: ‘Kende na ndako ya Yese. Mwana na ye moko akokóma mokonzi ya Yisraele.’ Samwele akendaki na ndako ya Yese. Ntango amonaki mwana ya liboso, alobaki na nse ya motema: ‘Na ntembe te mwana yango ye oyo.’ Kasi Yehova ayebisaki Samwele ete ezali ye te. Yehova alobaki: ‘Natalaka oyo ezali na kati ya motema ya moto, kasi te ndenge oyo azali komonana na miso.’

Samwele azali kotya Davidi mafuta

Yese abimisaki bana na ye mosusu motoba liboso ya Samwele. Kasi Samwele alobaki: ‘Yehova aponi ata moko na bango te. Ozali na bana mosusu ya mibali te?’ Yese alobaki: ‘Nazali na mwana mosusu, mwana ya nsuka, nkombo na ye Davidi. Akendaki kokɛngɛla bampate na ngai.’ Ntango Davidi ayaki na ndako, Yehova ayebisaki Samwele: ‘Ye nde naponi!’ Samwele atyaki Davidi mafuta na motó mpo asengelaki kokóma mokonzi ya Yisraele.

Goliate

Mwa moke na nsima, Bayisraele bakendaki kobunda na Bafilistia; engambe mobali moko na nkombo Goliate azalaki kobundela Bafilistia. Mokolo na mokolo, Goliate azalaki kotyola Bayisraele. Azalaki kobelela: ‘Bótinda mobali moko oyo akobunda na ngai. Soki alongi, tokokóma baombo na bino. Kasi soki ngai nalongi, bokokóma baombo na biso.’

Davidi akendaki na kaa ya basoda ya Yisraele mpo na komemela bandeko na ye bilei. Ayokaki matumoli ya Goliate mpe alobaki: ‘Nakobunda na ye!’ Mokonzi Saulo alobaki: ‘Ozali naino mwana moke.’ Davidi ayanolaki: ‘Yehova akosalisa ngai.’

Saulo apesaki Davidi molato na ye ya etumba, kasi Davidi alobaki: ‘Nakokoka kobunda na yango te.’ Davidi azwaki kaka bilingongo na ye (Lance-pierres) mpe akendaki na mokɛli. Aponaki mabanga mitano ya sɛlisɛli mpe atyaki yango na saki. Na nsima, Davidi apusanaki pene na Goliate. Engambe yango agangaki: ‘Yaká awa, mwana. Nakopesa bandɛkɛ ya likoló mpe banyama ya zamba mosuni na yo.’ Davidi abangaki te. Azongiselaki ye na mongongo makasi: ‘Oyei na mopanga mpe na likɔnga, kasi ngai nayei na nkombo ya Yehova. Ozali kobundisa biso te; ozali kobundisa nde Nzambe. Moto nyonso akomona ete Yehova azali na nguya oyo eleki mopanga to likɔnga. Akopesa bino nyonso na mabɔkɔ na biso.’

Davidi atyaki libanga moko na bilingongo na ye mpe abalusaki yango na makasi na ye nyonso. Na lisalisi ya Yehova, libanga yango ekendaki kokɔta na elongi ya Goliate. Engambe yango akweaki na mabele mpe akufaki. Na nsima, Bafilistia bakimaki mpo na kobikisa bomoi na bango. Otyelaka Yehova motema lokola Davidi?

“Mpo na bato ekoki kosalema te, kasi mpo na Nzambe ezali bongo te, mpo makambo nyonso ekoki kosalema mpo na Nzambe.”​—Marko 10:27

Mituna: Yehova aponaki nani mpo akóma mokonzi nsima ya Saulo? Ndenge nini Davidi abomaki Goliate?

1 Samwele 16:1-13; 17:1-54

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto