Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 50 lok. 120-lok. 121 par. 5
  • Yehova abundeli Yehoshafate

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova abundeli Yehoshafate
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yehoshafate atyeli Yehova motema
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Tózala na molende mpo na Ndako ya Yehova!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Etumbu epesami na lobwaku ya kokata likambo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Na kati ya 2 Ntango
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 50 lok. 120-lok. 121 par. 5
Mokonzi Yehoshafate ná Balevi oyo bayembaka bazali kobima na Yerusaleme ná basoda nsima na bango

LITEYA 50

Yehova abundeli Yehoshafate

Yehoshafate, mokonzi ya Yuda, abebisaki bitumbelo ya Baala mpe alongolaki bikeko na mboka. Alingaki ete bato báyeba mibeko ya Yehova. Na yango, atindaki bankumu mpe Balevi na Yuda mobimba mpo báteya bato mibeko ya Yehova.

Bikólo ya pembenipembeni ezalaki kobanga kobundisa Yuda mpo bayebaki ete Yehova azalaki elongo na bato na ye. Bamemelaki kutu Mokonzi Yehoshafate makabo. Kasi na nsima, bana ya Moabe, bana ya Amone mpe bato ya mokili ya Seire bayaki kobundisa Yuda. Yehoshafate ayebaki ete asengeli koluka lisalisi ya Yehova. Asɛngaki mibali nyonso, basi mpe bana báya na Yerusaleme. Liboso na bango nyonso, abondelaki: ‘Yehova, soki osalisi biso te, tokolonga te. Tobondeli yo, yebisá biso nini tósala.’

Yehova ayanolaki bango: ‘Bóbanga te. Nakosalisa bino. Bótɛlɛma, bóningana te, mpe bómona ndenge nakobikisa bino.’ Ndenge nini Yehova abikisaki bango?

Na ntɔngɔ ya mokolo elandaki, Yehoshafate aponaki bayembi mpe ayebisaki bango bátambola liboso ya limpinga ya basoda. Balongwaki na Yerusaleme tii na esika ya etumba oyo babengi Tekoa.

Wana bayembi bazalaki kosanzola Yehova na esengo mpe na mongongo makasi, Yehova abundelaki bato na ye. Akɔtisaki mobulungano makasi kati na bana ya Amone ná bana ya Moabe; babandaki kobomana bango na bango, mpe ata moto moko te abikaki. Kasi Yehova abatelaki bato ya Yuda, basoda ná banganga-nzambe. Bikólo nyonso ya pembenipembeni eyokaki makambo oyo Yehova asalaki, mpe bayebaki ete Yehova azalaki kaka kobundela bato na ye. Ndenge nini Yehova abikisaka bato na ye? Na ndenge mingi. Mpo abikisa bato na ye, azalaka na mposa ya lisalisi ya moto te.

“Bokozala na ntina ya kobunda te na etumba oyo. Bótɛlɛma wana, bóningana te mpe bótala ndenge Yehova akobikisa bino.”​—2 Ntango 20:17

Mituna: Yehoshafate azalaki mokonzi ya ndenge nini? Ndenge nini Yehova abatelaki Yuda?

2 Ntango 17:1-19; 20:1-30

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto