Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 52 lok. 126-lok. 127 par. 1
  • Limpinga ya baanzelu ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Limpinga ya baanzelu ya Yehova
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Elisha amonaki makalo oyo ezali kopela mɔtɔ—Yo mpe omonaka yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • “Zwá mwana na yo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Ndakisa ya komipesa mpe ya bosembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 52 lok. 126-lok. 127 par. 1
Basoda ya Siri bazingi Elisha ná mosaleli na ye

LITEYA 52

Limpinga ya baanzelu ya Yehova

Bene-hadade, mokonzi ya Siri, azalaki kaka kobundisa Yisraele. Kasi, mosakoli Elisha azalaki ntango nyonso koyebisa mokonzi ya Yisraele ete akeba; yango ezalaki kosalisa mokonzi akwea na likama te. Bene-hadade azwaki mokano ya kokanga Elisha. Ayokaki ete Elisha azalaki na engumba Dotane, mpe atindaki basoda ya Siri kuna mpo bákanga ye.

Basoda ya Siri bakómaki na Dotane na butu. Na ntɔngɔ, ntango mosaleli ya Elisha abimaki libándá, amonaki ebele ya basoda bazingi engumba. Ayokaki nsɔmɔ mpe agangaki: ‘Elisha, tósala nini?’ Elisha ayebisaki ye: ‘Baoyo bazali na biso bazali mingi koleka baoyo bazali na bango.’ Na mbala moko, Yehova asalaki ete mosaleli ya Elisha amona ndenge bangomba nyonso zingazinga ya engumba etondaki na bampunda mpe makalo ya bitumba ya mɔtɔ.

Elisha ná mosaleli na ye bamoni ebele ya baanzelu bazingi bango

Ntango basoda ya Siri balingaki kokanga Elisha, Elisha abondelaki: ‘Yehova, nabondeli yo, bomá bango miso.’ Na mbala moko, basoda yango bayebaki te esika bazali, atako bazalaki komona. Elisha ayebisaki bango: ‘Boyei na engumba mosusu. Bólanda ngai, nakomema bino epai ya moto oyo bozali koluka.’ Balandaki Elisha tii na Samaria, esika mokonzi ya Yisraele azalaki kofanda.

Na ntango yango nde basoda ya Siri bayaki koyeba esika bazalaki. Mokonzi ya Yisraele atunaki Elisha: ‘Naboma bango?’ Elisha amonaki nde ete ezali libaku ya kozongisela bato yango mabe oyo balingaki kosala ye? Te. Elisha alobaki na ye: ‘Koboma bango te. Pesá bango bilei mpe tiká bango bázonga epai na bango.’ Na yango, mokonzi asalelaki bango fɛti moko monene mpe atikaki bango bázonga epai na bango.

Basoda ya Siri bazali kolya na Samaria

“Mpe tokoki kotya motema epai ya Nzambe na likambo oyo: ezala eloko nini oyo tozali kosɛnga na boyokani na mokano na ye, ayokaka biso.”​—1 Yoane 5:14

Mituna: Ndenge nini Yehova abatelaki Elisha ná mosaleli na ye? Okanisi ete Yehova akoki kobatela mpe yo?

2 Bakonzi 6:8-24

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto