Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 53 lok. 128
  • Mpiko ya Yehoyada

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpiko ya Yehoyada
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yoasa atikaki Yehova mpo na baninga mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mpo na nini tosengeli kobanga Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Yehova apesaka mbano na baoyo bamonisaka mpiko
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Mwasi moko ya motema mabe mpe ya lolendo azwi etumbu
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 53 lok. 128
Nganga-nzambe monene Yehoyada azali kolakisa bato Mokonzi Yehoashe

LITEYA 53

Mpiko ya Yehoyada

Yezabele azalaki na mwana moko ya mwasi na nkombo Atalia; mwana yango ya mwasi azalaki motema mabe kaka lokola mama na ye. Atalia azalaki mwasi ya mokonzi ya Yuda. Ntango mokonzi akufaki, mwana na bango ya mobali akómaki mokonzi. Kasi ntango mwana yango mpe akufaki, Atalia amikómisaki mokonzi ya Yuda. Na nsima, alukaki kosilisa libota ya bokonzi; abandaki koboma moto nyonso oyo akokaki kokóma mokonzi, ata mpe bankɔkɔ na ye moko. Bato nyonso bazalaki kobanga ye.

Nganga-nzambe monene Yehoyada ná mwasi na ye Yehosheba bayebaki ete makambo Atalia azalaki kosala ezalaki mabe mpenza. Batyaki bomoi na bango na likama na ndenge babombaki nkɔkɔ na ye moko oyo autaki kobotama; nkombo na ye ezalaki Yehoashe. Babɔkɔlaki ye na kati ya tempelo.

Ntango mwana yango akómaki na mbula nsambo, Yehoyada ayanganisaki bankumu nyonso ná Balevi mpe ayebisaki bango: ‘Bókɛngɛla porte ya tempelo mpe bókɔtisa moto moko te.’ Na nsima Yehoyada akómisaki Yehoashe mokonzi ya Yuda mpe alatisaki ye motole na motó. Bato ya Yuda bagangaki: “Mokonzi azala na bomoi!”

Mokonzi-mwasi Atalia azali koganga

Mokonzi-mwasi Atalia ayokaki koganga ya ebele ya bato mpe ayaki mbangu na tempelo. Ntango amonaki mokonzi ya sika, agangaki: “Basaleli ngai likita! Basaleli ngai likita!” Bankumu bakangaki mokonzi-mwasi yango ya motema mabe, bamemaki ye libándá, mpe babomaki ye. Mabe oyo bato ya ekólo bakómaki kosala mpo na ye esukaki boni?

Yehoyada asalisaki bato ya ekólo básala kondimana na Yehova, mpe balakaki ete bakosambela kaka Ye. Yehoyada atindaki bango bábebisa tempelo ya Baala mpe bábuka bikeko na ye. Atyaki banganga-nzambe mpe Balevi básala mosala na tempelo mpo bato bázongela kosambela kuna. Atyaki bakɛngɛli na porte ya tempelo mpo moto moko te ya mbindo akɔta kuna. Na nsima, Yehoyada ná bankumu bamemaki Yehoashe na ndako ya mokonzi mpe bafandisaki ye na kiti ya bokonzi. Bato ya Yuda basepelaki. Bakokaki sikoyo kosalela Yehova na bonsomi lokola Atalia mwasi ya motema mabe akufaki mpe losambo ya Baala elongwaki. Mpiko ya Yehoyada esalisaki bato mingi mpenza!

“Bóbanga te baoyo babomaka nzoto kasi bakoki koboma molimo te; bóbanga nde moto oyo akoki koboma ná molimo ná nzoto na Gehena.”​—Matai 10:28

Mituna: Ndenge nini Yehoyada amonisaki mpiko? Okanisi ete Yehova akoki mpe kosalisa yo ozala na mpiko?

2 Bakonzi 11:1–12:12; 2 Ntango 21:1-6; 22:10-12; 23:1–24:16

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto