Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 55 lok. 132
  • Anzelu ya Yehova abatelaki Ezekiasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Anzelu ya Yehova abatelaki Ezekiasi
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Kondima ya mokonzi moko ezwi mbano
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Nzambe asalisi Hizikiya
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Babateli ya mpate nsambo mpe bankumu mwambe bazali banani lelo oyo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Lisalisi moko te ekouta na mokili
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 55 lok. 132
Anzelu moko azali koboma basoda ya Asiri

LITEYA 55

Anzelu ya Yehova abatelaki Ezekiasi

Ekólo Asiri esilaki kozwa bokonzi oyo ezalaki koyangela mabota zomi ya Yisraele. Kasi sikoyo Senakeribe, mokonzi ya Asiri, alingaki mpe kozwa bokonzi ya Yuda, ekólo ya mabota mibale. Abandaki kozwa engumba mokomoko ya Yuda. Kasi, engumba oyo alingaki mingi koleka ezalaki Yerusaleme. Senakeribe ayebaki te ete Yehova azalaki kobatela Yerusaleme.

Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, apesaki Senakeribe mbongo mingi mpo atika Yerusaleme. Atako Senakeribe azwaki mbongo yango, atindaki kaka basoda na ye bábundisa Yerusaleme. Bato ya Yerusaleme bakómaki kobanga mpo basoda ya Asiri bazalaki se kopusana. Ezekiasi ayebisaki bango: ‘Bóbanga te. Basoda ya Asiri bazali makasi, kasi Yehova akokómisa biso makasi koleka bango.’

Senakeribe atindaki momemi-nsango na ye, Rabashake, na Yerusaleme mpo na kosɛka bato ya engumba yango. Rabashake atɛlɛmaki libándá ya engumba mpe agangaki: ‘Yehova akoki kosalisa bino te. Ezekiasi akosa bino te. Nzambe moko te akobikisa bino na lobɔkɔ na biso.’

Ezekiasi atunaki Yehova soki asala nini. Yehova ayanolaki: ‘Maloba ya Rabashake ebangisa bino te. Senakeribe akozwa Yerusaleme te.’ Na nsima, Senakeribe atindelaki Ezekiasi mikanda. Mikanda yango elobaki: ‘Bómitika na mabɔkɔ na ngai. Yehova akobikisa bino te.’ Ezekiasi abondelaki ete: ‘Ee Yehova, bikisá biso mpo bato nyonso báyeba ete ozali Nzambe ya solo kaka moko.’ Yehova ayebisaki ye: ‘Mokonzi ya Asiri akokɔta na Yerusaleme te. Nakobatela engumba na ngai.’

Senakeribe amonaki ete mosika te akozwa Yerusaleme. Kasi na butu moko, Yehova atindaki anzelu moko esika basoda ya Asiri batyaki kaa libándá ya engumba. Anzelu yango abomaki basoda 185000! Mokonzi Senakeribe abungisaki basoda na ye nyonso ya mpiko. Lokola azalaki na eloko mosusu ya kosala te, azongaki epai na ye na nsɔni. Yehova abatelaki Ezekiasi mpe Yerusaleme, kaka ndenge alobaki. Soki ozalaki na Yerusaleme, olingaki kotyela Yehova motema?

“Anzelu ya Yehova abatelaka baoyo babangaka Nzambe, mpe abikisaka bango.”​—Nzembo 34:7

Mituna: Ndenge nini Yehova abatelaki Yerusaleme? Okanisi ete Yehova akobatela yo?

2 Bakonzi 17:1-6; 18:13-37; 19:1-37; 2 Ntango 32:1-23

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto