Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 60 lok. 144-lok. 145 par. 2
  • Bokonzi oyo ekoumela libela na libela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokonzi oyo ekoumela libela na libela
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Ekeko moko ya monene etɛlɛmisami mpe ekweisami
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Jéhovah azali kopesa liteya epai na bakonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Danyele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Nzete monene oyo ezalaki elilingi ya bokonzi moko
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 60 lok. 144-lok. 145 par. 2
Mokonzi Nebukadenezare azali kolɔta ekeko moko ya monene oyo libanga moko ebukibuki yango

LITEYA 60

Bokonzi oyo ekoumela libela na libela

Na butu moko, mokonzi Nebukadenezare alɔtaki ndɔtɔ moko ya kokamwa. Etungisaki ye mingi mpe mpɔngi ekimaki ye. Abengaki bato na ye ya maji mpe ayebisaki bango: ‘Bópesa ngai ndimbola ya ndɔtɔ na ngai.’ Bango balobaki: ‘Ee mokonzi, yebisá biso ndɔtɔ yango.’ Kasi Nebukadenezare alobaki na bango: ‘Te! Bino nde bóyebisa ngai ndɔtɔ yango, soki te nakoboma bino.’ Balobaki lisusu na ye: ‘Yebisá biso ndɔtɔ yango, mpe tokopesa yo ndimbola na yango.’ Alobaki: ‘Bolingi kokosa ngai. Bóyebisa ngai ndɔtɔ yango!’ Bayebisaki ye: ‘Moto moko te na mabele akoki kosala yango. Likambo oyo osɛngi ekoki kosalema te.’

Nebukadenezare asilikaki makasi mpe asɛngaki báboma bato nyonso ya bwanya na mokili na ye. Elingi koloba báboma mpe Danyele, Shadrake, Meshake mpe Abedenego. Danyele ayebisaki mokonzi apesa ye mwa ntango. Na nsima, ye ná baninga na ye babondelaki Yehova mpe basɛngaki ye asalisa bango. Yehova asalaki nini?

Na emonaneli moko, Yehova alakisaki Danyele ndɔtɔ ya Nebukadenezare mpe apesaki ye ndimbola na yango. Mokolo elandaki, Danyele akendaki epai ya mosaleli ya mokonzi mpe alobaki: ‘Koboma moto ya bwanya ata moko te. Nakoki kolimbwela mokonzi ndɔtɔ na ye.’ Mosaleli ya mokonzi akɔtisaki Danyele epai ya Nebukadenezare. Danyele ayebisaki mokonzi: ‘Nzambe amonisi yo makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Na ndɔtɔ na yo, omonaki ekeko moko monene oyo ezalaki na motó ya wolo, ntolo ná mabɔkɔ ya palata, libumu ná bibɛlɔ ya kwivre, makolo ya ebende, mpe makaka na yango ezalaki ya ebende esangani na mabele. Na nsima, libanga moko elongwaki na ngomba moko mpe ebɛtaki makaka ya ekeko yango. Ekeko yango ebukanaki, ekómaki putulu mpe mopɛpɛ ememaki yango. Libanga yango ekómaki ngomba moko monene, mpe etondaki na mabele.’

Na nsima, Danyele alobaki: ‘Ndimbola ya ndɔtɔ yango oyo: Bokonzi na yo nde motó ya wolo. Palata ezali bokonzi moko oyo ekoya nsima na yo. Bokonzi mosusu oyo ekoya nsima ekozala lokola kwivre mpe ekoyangela mabele mobimba. Bokonzi oyo ekolanda ekozala makasi lokola ebende. Na nsuka, ekozala na bokonzi oyo ekokabwana; biteni na yango mosusu ekozala makasi lokola ebende mpe biteni mosusu ekozala pɛtɛpɛtɛ lokola mabele. Libanga oyo ekómaki ngomba ezali Bokonzi ya Nzambe. Ekobuka makonzi wana nyonso mpe ekoumela libela na libela.’

Nebukadenezare akweaki elongi na nse liboso ya Danyele. Alobaki: ‘Nzambe na yo amonisi yo ndɔtɔ yango. Ezali na Nzambe moko te lokola ye.’ Nebukadenezare abomaki lisusu Danyele te; kutu akómisaki ye mokonzi ya bato na ye nyonso ya bwanya mpe moyangeli na etúká ya Babilone. Omoni ndenge Yehova ayanolaki na libondeli ya Danyele?

“Bayanganisaki bango na esika oyo babengi na Ebre Armagedone.”​—Emoniseli 16:16

Mituna: Nini esalisaki Danyele alimbola ndɔtɔ ya Nebukadenezare? Ndɔtɔ yango elimbolaki nini?

Danyele 2:1-49

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto