LITEYA 65
Estere abikisi bandeko na ye
Estere azalaki elenge mwasi moko Moyuda oyo azalaki kofanda na Shushane, engumba moko ya Perse. Bambula mingi liboso, Nebukadenezare alongolaki libota na bango na Yerusaleme mpe amemaki yango na boombo. Mordekai, ndeko na ye, oyo azalaki kosala epai ya mokonzi ya Perse Asueruse nde abɔkɔlaki ye.
Mokonzi Asueruse alingaki kobala mwasi mosusu. Basaleli na ye bamemelaki ye basi ya kitoko koleka na mokili na ye. Estere mpe azalaki kati na bango. Mokonzi aponaki nde Estere na kati ya basi wana nyonso. Mordekai ayebisaki Estere aloba te ete azali Moyuda.
Hamane, mobali moko ya lolendo azalaki mokonzi ya bankumu nyonso. Alingaki ete bato nyonso bángumbamelaka ye. Lokola Mordekai aboyaki kosala yango, Hamane asilikaki makasi mpe alukaki koboma ye. Ntango Hamane ayebaki ete Mordekai azali Moyuda, asalaki myango mpo na koboma Bayuda nyonso ya mokili yango. Ayebisaki mokonzi: ‘Bayuda bazali bato mabe; osengeli kolongola bango.’ Asueruse alobaki: ‘Salá nyonso oyo olingi kosala,’ mpe apesaki ye bokonzi ya kotya mobeko. Hamane atyaki mobeko moko ete bato báboma Bayuda nyonso na mokolo ya 13 na sanza ya Adare (elingi koloba sanza ya 2 mpe sanza ya 3). Yehova azalaki komona.
Estere ayebaki mobeko yango te. Na yango, Mordekai atindelaki ye mokanda yango mpe alobaki na ye ete: ‘Kende kosolola na mokonzi.’ Estere alobaki: ‘Moto nyonso oyo akokɔta epai ya mokonzi soki abengisami te akobomama. Mokonzi abengisi ngai te esali mikolo 30! Kasi nakokende. Soki asemboleli ngai lingenda na ye, nakobika. Soki asemboli yango te, nakokufa.’
Estere akendaki na lopango ya mokonzi. Ntango mokonzi amonaki ye, asembolelaki ye lingenda. Estere akendaki epai na ye, mpe mokonzi atunaki ye: ‘Estere, nasalela yo nini?’ Alobaki: ‘Nalingi kobengisa yo ná Hamane na fɛti.’ Na fɛti yango, Estere abengisaki bango lisusu na fɛti ya mibale. Na fɛti yango ya mibale, mokonzi atunaki lisusu Estere: ‘Nasalela yo nini?’ Alobaki: ‘Moto moko alingi koboma ngai ná bandeko na ngai. Nabondeli yo, bikisá biso.’ Mokonzi atunaki ye: ‘Nani alingi koboma bino?’ Estere alobaki: ‘Moto mabe yango ye oyo Hamane.’ Asueruse ayokaki nkanda makasi mpe atindaki báboma Hamane mbala moko.
Kasi moto moko te akokaki kolongola mobeko ya Hamane, ata mokonzi. Na yango, Asueruse atyaki Mordekai mokonzi ya bankumu mpe apesaki ye bokonzi ya kotya mobeko ya sika. Morkedai atyaki mobeko oyo epesaki Bayuda nzela bábunda soki bayei kobundisa bango. Na mokolo ya 13 na sanza ya Adare (elingi koloba sanza ya 2 mpe sanza ya 3), Bayuda balongaki banguna na bango. Banda mokolo wana, Bayuda bazalaki kosala molulu ya bolongi yango mbula na mbula.
“Bakomema bino liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe liboso ya bakonzi mpo na ngai, mpe yango ekozala litatoli mpo na bango mpe mpo na bikólo.”—Matai 10:18