Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 66 lok. 156-lok. 157 par. 1
  • Ezera ateyaki Mibeko ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezera ateyaki Mibeko ya Nzambe
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Mokanda ya Biblia nimero 15—Ezela
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Ezela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Oteyaka na lolenge oyo ekoki mpenza kobota mbuma?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Tyá motema ete Yehova akosalisa yo na ntango ya mikakatano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 66 lok. 156-lok. 157 par. 1
Ezera azali kokumisa Yehova liboso ya bato nyonso mpe bato yango batomboli mabɔkɔ mpo na kosangana na ye

LITEYA 66

Ezera ateyaki Mibeko ya Nzambe

Eleki mbula soki 70 banda Bayisraele mingi bazongi na Yerusaleme, kasi bamosusu batikali kaka na bisika ndenge na ndenge ya boyangeli ya Perse. Moko na bango ezali Ezera, oyo azalaki koteya Mibeko ya Yehova. Ezera ayokaki ete bato na Yerusaleme bazali kotosa Mibeko ya Nzambe te, mpe amonaki malamu akende kosalisa bango. Artazerezese, mokonzi ya Perse, alobaki na ye boye: ‘Tiká ete Nzambe apesa yo bwanya mpo okoka koteya Mibeko na ye. Kende, mpe kamatá moto nyonso oyo akolinga kokende na yo.’ Ezera akutanaki na bato nyonso oyo balingaki kozonga na Yerusaleme. Babondelaki Yehova abatela bango na mobembo molai oyo balingi kosala, mpe na nsima bakendaki.

Nsima ya sanza minei, bakómaki na Yerusaleme. Bankumu bayebisaki Ezera boye: ‘Bayisraele bazali kotosa Yehova te mpe babali basi oyo basambelaka banzambe ya lokuta.’ Ezera asalaki nini? Liboso ya bato nyonso, afukamaki na mabɔlɔngɔ mpe abondelaki boye: ‘Yehova, osaleli biso makambo ebele, kasi biso tosaleli yo lisumu.’ Atako bato babongolaki motema, bazalaki kaka kosala makambo ya mabe. Ezera aponaki bankulutu mpe basambisi mpo bátalela makambo yango. Nsima ya sanza misato, babenganaki baoyo bazalaki kosambela Yehova te.

Mbula zomi na mibale elekaki. Na ntango yango, bifelo oyo ezingaki Yerusaleme ezalaki kotongama. Yango wana, Ezera ayanganisaki bato nyonso na esika monene ya bato nyonso mpo na kotángela bango Mibeko ya Nzambe. Ntango Ezera afungolaki buku yango, bato batɛlɛmaki. Bakumisaki Yehova, mpe batombolaki mabɔkɔ likoló mpo na komonisa ete bandimi. Na nsima, Ezera atángaki Mibeko, alimbolaki yango mpe bato bayokaki na likebi. Bandimaki ete bakendaki mosika na Yehova, mpe balelaki. Na mokolo oyo elandaki, Ezera atángelaki bango Mibeko mosusu. Bayebaki ete nsima ya mwa mikolo, basengelaki kosala Fɛti ya mwa bandako ya matiti. Na mbala moko, babandaki komibongisa mpo na fɛti yango.

Na boumeli ya mikolo nsambo ya fɛti, bato basepelaki mpe bapesaki Yehova matɔndi mpo babukaki mbuma mingi. Banda na mikolo ya Yosua, basalaki naino te Fɛti ya mwa bandako ya matiti ya bongo. Nsima ya fɛti yango, bato bayanganaki mpe babondelaki boye: ‘Yehova, obikisaki biso na boombo, oleisaki biso na esobe, mpe opesaki biso mokili ya malamu. Kasi mbala na mbala, totosaki yo te. Otindelaki biso basakoli mpo bákebisa biso, kasi toyokaki te. Omoniselaki biso kaka motema molai. Otosaki elaka oyo opesaki Abrahama. Sikoyo tolaki yo ete tokotosa yo.’ Bakomaki elaka na bango, mpe bankumu, Balevi ná banganga-nzambe batyaki yango elembo.

“Esengo nde na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!”​—Luka 11:28

Mituna: Makambo nini Ezera ateyaki Bayisraele oyo bayanganaki na Yerusaleme? Bato bapesaki elaka nini?

Ezera 7:1-28; 8:21-23, 31, 32; 9:1–10:19; Nehemia 8:1-18; 9:1-38

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto