Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 72 lok. 170-lok. 171 par. 2
  • Elenge Yesu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elenge Yesu
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Andimaki litambwisi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Abatelaki, asungaki mpe alɛmbaki bango te
    Mekolá kondima na bango
  • Abatelaki bato ya libota na ye, akokisaki bamposa na bango, mpe alɛmbaki bango te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Yesu akoli na Nazarete
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 72 lok. 170-lok. 171 par. 2
Yesu oyo azali na mbula 12 afandi na katikati ya bateyi na templelo

LITEYA 72

Elenge Yesu

Maria ná Yozefe bazalaki kofanda na Nazarete, ná Yesu mpe bana na bango mosusu ya basi mpe ya mibali. Yozefe azalaki kosala mosala ya mabaya mpo na koleisa libota na ye, mpe ateyaki bango makambo ya Yehova mpe Mibeko na ye. Libota na bango ezalaki kokende na sinagoga ntango nyonso mpo na kosambela mpe bazalaki kokende na Yerusaleme mbula na mbula mpo na fɛti ya Elekeli.

Ntango Yesu akómaki na mbula 12, ye ná libota na bango bakendeki na Yerusaleme ndenge bamesanaki kosala. Mboka yango etondaki na bato oyo bayaki mpo na Elekeli. Na nsima ya fɛti yango, Maria ná Yozefe babandaki kozonga na Nazarete mpe bakanisaki ete Yesu azali kotambola elongo na bato mosusu. Kasi, ntango balukaki ye epai ya bandeko na bango, bamonaki ye te.

Bazongaki lisusu na Yerusaleme, mpe balukaki ye mikolo misato mobimba. Nsukansuka, bakendaki na tempelo. Bakutaki Yesu kuna; afandaki na katikati ya bateyi, azalaki koyoka bango na likebi mpe kotuna bango mituna. Bateyi yango bakamwaki Yesu mingi mpenza mpe babandaki kotuna ye mituna. Mpe bazalaki kokamwa na biyano azalaki kopesa bango. Bamonaki ete ayebaki mpenza Mibeko ya Yehova.

Maria ná Yozefe bamitungisaki mingi. Maria alobaki na Yesu ete: ‘Mwana, tolukiluki yo bipai nyonso! Ozalaki wapi?’ Yesu azongiselaki ye ete: ‘Boyebaki te ete nasengeli kozala awa na ndako ya Tata na ngai?

Yesu azongaki na Nazarete elongo na baboti na ye. Yozefe alakisaki ye mosala ya mabaya. Ntango Yesu azalaki elenge, okanisi ete azalaki moto ya ndenge nini? Ntango Yesu azalaki kokola, akómaki na bwanya mpe bato ná Nzambe bazalaki kondima ye.

Yozefe ná Maria bafandi na mesa elongo na Yesu ná bandeko na ye ya mibali mpe ya basi

“Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo, mpe mobeko na yo ezali mpenza na kati na ngai.”​—Nzembo 40:8

Mituna: Maria ná Yozefe bakutaki Yesu wapi? Mpo na nini azalaki kuna?

Matai 13:55, 56; Marko 6:3; Luka 2:40-52; 4:16; Kolimbola Mibeko 16:15, 16

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto