Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 77 lok. 182-lok. 183 par. 2
  • Mwasi moko na liziba ya mai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mwasi moko na liziba ya mai
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yesu ateyi mwasi Mosamaria
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu ateyi mwasi Mosamaria
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yesu ná mwasi Mosamaria
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Kozala “Mosamaria ya motema malamu” elakisi nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 77 lok. 182-lok. 183 par. 2
Yesu azali kosolola na mwasi Mosamaria na liziba ya Yakobo

LITEYA 77

Mwasi moko na liziba ya mai

Nsima ya fɛti ya Elekeli, Yesu ná bayekoli na ye balekaki na Samaria mpo na kozonga na Galile. Pene na engumba Sikare, Yesu atɛlɛmaki na esika babengi liziba ya Yakobo. Ntango azalaki kopema wana, bayekoli na ye bakendaki na engumba mpo na kosomba biloko ya kolya.

Mwasi moko ayaki kotoka mai na liziba yango. Yesu alobaki na ye: “Pesá ngai mai ya komɛla.” Mwasi yango azongisaki ete: ‘Mpo na nini ozali kosolola na ngai? Nazali mwasi Mosamaria. Bayuda basololaka na Basamaria te.’ Yesu alobaki na ye: ‘Soki oyebaki ngai, olingaki kosɛnga ngai mai ya komɛla mpe ngai nalingaki kopesa yo mai ya bomoi.’ Mwasi yango ayebisaki ye: ‘Olingi koloba nini? Ozali ata na katini te.’ Yesu alobaki: ‘Moto nyonso oyo akomɛla mai oyo nakopesa ye akoyoka lisusu mposa ya mai te.’ Mwasi yango alobaki na ye ete: “Tata, pesá ngai mai yango.”

Na nsima, Yesu ayebisaki ye: ‘Yaká na mobali na yo awa na liziba.’ Mwasi yango alobaki: ‘Nazali na mobali te.’ Yesu azongisaki: ‘Olobi solo. Obalá mbala mitano, mpe sikoyo ozali kofanda na mobali oyo bobalani na ye te.’ Mwasi yango alobaki: ‘Namoni ete ozali mosakoli. Bato ya ekólo na ngai bandimaka ete tokoki kosambela Nzambe na ngomba oyo, kasi Bayuda balobaka ete tosengeli kosambela kaka na Yerusaleme. Nandimaka ete ntango Masiya akoya, akoteya biso ndenge ya kosambela.’ Na nsima, Yesu ayebisaki mwasi yango likambo moko oyo ayebisá naino moto mosusu te, ayebisaki ye: ‘Nazali Masiya.’

Yesu azali kosolola na mwasi Mosamaria

Mwasi yango akendaki mbangu na engumba koyebisa Basamaria: ‘Nakanisi ete namoni Masiya. Ayebi makambo na ngai nyonso. Bóya kotala!’ Balandaki ye na liziba mpe Yesu ateyaki bango.

Basamaria basɛngaki Yesu afanda na engumba na bango. Ateyaki bango mikolo mibale, mpe bato mingi bandimelaki ye. Bongo bato yango bayebisaki mwasi Mosamaria ete: ‘Nsima ya koyoka moto oyo, toyebi ete azali mpenza mobikisi ya mokili.’

“‘Yaká!’ mpe tiká moto nyonso oyo azali na mposa ya mai aya; tiká moto nyonso oyo alingi, azwa mai ya bomoi ofele.”​—Emoniseli 22:17

Mituna: Mpo na nini mwasi Mosamaria akamwaki ndenge Yesu asololaki na ye? Yesu ayebisaki mwasi yango nini?

Yoane 4:1-42

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto