Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 78 lok. 184-lok. 185 par. 1
  • Yesu asakoli nsango ya Bokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu asakoli nsango ya Bokonzi
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • ‘Ekoki ete nsango malamu esakolama liboso’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli”
    “Yaká, landá ngai”
  • Yesu atindi bayekoli 70 bákende kosakola
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 78 lok. 184-lok. 185 par. 1
Yesu azali kosakola elongo na moyekoli na ye moko

LITEYA 78

Yesu asakoli nsango ya Bokonzi

Mwa moke nsima ya kobatisama, Yesu abandaki kosakola ete: ‘Bokonzi ya Nzambe ekómi pene.’ Bayekoli bazalaki kolanda ye ntango azalaki kotambola na Galile mpe na Yudea. Ntango azongaki na mboka na ye na Nazarete, akendaki na sinagoga, afungolaki rulo ya mosakoli Yisaya, mpe atángaki na mongongo makasi ete: ‘Yehova apesi ngai elimo santu mpo nasakola nsango malamu.’ Yango emonisaki nini? Emonisaki ete, atako bato bazalaki kosepela komona ndenge Yesu azalaki kosala makamwisi, ntina ya libosoliboso oyo azwaki elimo santu ezalaki nde ya kosakola nsango malamu. Na nsima, ayebisaki bato oyo bazalaki koyoka ye ete: ‘Lelo esakweli oyo ekokisami.’

Na nsima, Yesu akendaki na mbu ya Galile, epai akutanaki na bayekoli na ye minei, oyo bazalaki baluki-mbisi. Abengaki bango mpe alobaki: ‘Bóya epai na ngai, nakokómisa bino baluki-bato.’ Bayekoli yango ezalaki Petro, Andre, Yakobo ná Yoane. Na mbala moko, batikaki mosala na bango ya koluka mbisi mpe balandaki ye. Batambolaki Galile mobimba kosakola Bokonzi ya Yehova. Basakolaki na basinagoga, na bazando, mpe na babalabala. Ebele ya bato bazalaki kolanda bango bipai nyonso bazalaki kokende. Nsango ya Yesu epalanganaki bipai nyonso, ata mpe na Siri.

Na nsima, Yesu apesaki bayekoli na ye mosusu nguya ya kobikisa bato ya maladi mpe ya kobengana bademo. Bayekoli mosusu bazalaki kotambola elongo na ye ntango azalaki kosakola na bingumba mpe na bamboka. Basi mosusu ya sembo, na ndakisa, Maria Magadalena, Yoana, Suzana, mpe basi mosusu bazalaki kosalisa Yesu ná bayekoli na ye.

Nsima ya kopesa bayekoli na ye formasyo, Yesu atindaki bango bákende kosakola. Lokola bazalaki kotambola na Galile mobimba, bato mingi bakómaki bayekoli mpe bazwaki batisimo. Bato mingi balingaki kokóma bayekoli; yango wana, Yesu alobaki ete bazali lokola elanga oyo mbuma eteli, oyo ekómi pene bábuka yango. Alobaki boye: ‘Bóbondela Yehova atinda basali ebele na mosala ya kobuka mbuma.’ Na nsima, aponaki bayekoli 70 mpe atindaki bango mibalemibale bákende kosakola na Yudea mobimba. Bateyaki bato ya lolenge nyonso na ntina etali Bokonzi. Ntango bayekoli bazongaki, bazalaki na esengo makasi ya koyebisa Yesu makambo oyo esalemaki. Zabolo akokaki kopekisa te mosala ya kosakola.

Yesu asalaki nyonso mpo bayekoli na ye bákoba kosala mosala wana ya ntina mingi ata ntango asengelaki kozonga na likoló. Ayebisaki bango ete: ‘Bósakola nsango malamu na mabele mobimba. Bóteya bato Liloba ya Nzambe mpe bóbatisa bango.’

“Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.”​—Luka 4:43

Mituna: Mosala nini Yesu atindaki bayekoli na ye básala? Bayekoli ya Yesu bayokaki ndenge nini mpo na mosala na bango?

Matai 4:17-25; 9:35-38; 28:19, 20; Marko 1:14-20; Luka 4:14-21; 8:1-3; 10:1-22

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto