Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 90 lok. 210
  • Yesu akufi na Golgota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu akufi na Golgota
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Pilate ná Erode bazwi ye na likambo te
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye.
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Epai na Pilato mpe epai na Hérode
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Ponsi Pilato azalaki nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 90 lok. 210
Yesu akakisami likoló ya nzete; mokonzi moko ya basoda, Maria, Yoane mpe bayekoli mosusu ya Yesu batɛlɛmi wana

LITEYA 90

Yesu akufi na Golgota

Banganga-nzambe bakonzi bamemaki Yesu na ndako ya guvɛrnɛrɛ. Pilate atunaki bango: ‘Bozali kofunda mobali oyo na likambo nini?’ Bazongiselaki ye: ‘Alobi ete azali mokonzi!’ Pilate atunaki Yesu: “Ozali Mokonzi ya Bayuda?” Yesu alobaki na ye: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.”

Na nsima, Pilate atindaki Yesu epai ya Erode, mokambi ya Galile, mpo aluka komona soki akozwa likambo ya kofunda Yesu. Erode azwaki Yesu na mabe moko te mpe azongisaki ye epai ya Pilate. Na nsima, Pilate alobaki na bato ete: ‘Ezala ngai ezala Erode tozwi moto oyo na mabe te. Nalingi natika ye akende.’ Ebele ya bato bagangaki: ‘Bomá ye! Bomá ye!’ Basoda babɛtaki Yesu fimbo, babwakelaki ye nsoi, mpe babɛtaki ye makofi. Balatisaki ye motole ya nzubɛ na motó mpe batyolaki ye na maloba oyo: ‘Mbote, Mokonzi ya Bayuda.’ Pilate alobaki lisusu na ebele ya bato: ‘Nazwi mobali oyo na mabe te.’ Kasi bagangaki: “Abakama na nzete!” Na yango, Pilate atikaki báboma Yesu.

Bamemaki Yesu na esika babengi Golgota, babakaki ye na nzete. Yesu abondelaki boye: ‘Tata, limbisá bango, mpo bayebi te makambo bazali kosala.’ Bato babandaki kosɛka Yesu, mpe koloba: ‘Soki ozali Mwana ya Nzambe, kitá na nzete! Omibikisa.’

Moko ya bato mabe oyo babakaki na nzete pembeni ya Yesu, alobaki na ye: “Kanisá ngai ntango okokóma na Bokonzi na yo.” Yesu alobaki na ye: “Okozala na ngai na Paradiso.” Na nsima ya midi, molili ekɔtaki na mokili yango ngonga misato. Bayekoli mosusu, ná Maria mama ya Yesu, batɛlɛmaki pene na nzete oyo babakaki ye. Yesu ayebisaki Yoane azwa Maria mpo abatela ye lokola mama na ye moko.

Na nsuka, Yesu alobaki: “Ekokisami!” Agumbaki motó mpe akataki motema. Na ntango yango, mabele eninganaki makasi mpenza. Na tempelo, rido ya kilo oyo ekabolaki Esika Mosantu ná Esika oyo eleki Bosantu epasukaki na mibale. Mokonzi moko ya basoda alobaki boye: ‘Ya solo oyo azalaki mwana ya Nzambe.’

“Ata soki bilaka ya Nzambe ezali ebele boni, ekómi ‘ɛɛ’ na nzela na ye.”​—2 Bakorinti 1:20

Mituna: Mpo na nini Pilate atindaki báboma Yesu? Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki libosoliboso koluka bolamu ya basusu?

Matai 27:11-14, 22-31, 38-56; Marko 15:2-5, 12-18, 25, 29-33, 37-39; Luka 23:1-25, 32-49; Yoane 18:28–19:30

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto