LOYEMBO 1
Bizaleli ya Yehova
Ya Papye
1. Yehova Nzambe, yo nguya mingi,
Mopesi-pole, yo nde Mozalisi.
Oy’osal’emonisi nguya n’o;
Nse mpe likoló eza’ seko.
2. Bokonzi na yo nd’ezali sembo.
Yang’olakisi biso mibeko n’o.
Bwanya na yo, toza’ komon’ango
Ntango tolandi Liloba n’o.
3. Bolingo na yo nd’eleki nyonso.
Yango opesi makabo ebele.
Nkombo na yo, bizaleli na yo,
Tokosakola na molende.
(Talá mpe Nz. 36:9; 145:6-13; Mos. 3:14; Yak. 1:17.)