Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 57 points 1-5
  • Osengeli kosala nini soki osali lisumu moko ya monene?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osengeli kosala nini soki osali lisumu moko ya monene?
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • ‘Bengá bankulutu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Ndenge ya komonisa bolingo mpe motema mawa ntango ndeko moko asali lisumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Ndenge oyo lisangá ya bakristo ya solo ebongisami
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Lisalisi mpo na baoyo balongolami na lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 57 points 1-5
Liteya 57. Na Ndako ya Bokonzi, ndeko mobali moko ya elenge azali koyebisa bankulutu mibale lisumu ya monene oyo asali.

LITEYA 57

Osengeli kosala nini soki osali lisumu moko ya monene?

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Atako olingaka Yehova mingi mpe osalaka makasi oboya kosala makambo oyo ekopesa ye mpasi, na bantango mosusu okosala mabunga. Kasi, masumu mosusu ezalaka minene. (1 Bakorinti 6:9, 10) Soki osali lisumu moko ya monene, kokanisa te ete Yehova atiki kolinga yo; akosepela kolimbisa yo mpe akosalisa yo.

1. Osengeli kosala nini mpo Yehova alimbisa yo?

Baoyo balingaka Yehova bayokaka mpenza mawa ntango basali lisumu moko ya monene. Kasi elaka oyo Yehova apesi basaleli na ye esalisaka bango. Elobi: “Ata soki masumu na bino ezali motane makasi, ekokóma mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.” (Yisaya 1:18) Soki tobongoli mpenza motema, Yehova akolimbisa biso. Ndenge nini okoki komonisa mpenza ete obongoli motema? Soki oyoki mpenza mawa mpo na mabe oyo osalaki, otiki kosala yango mpe osɛngi Yehova alimbisa yo. Na nsima, osali makasi otika makanisi to bizaleli mabe oyo ememaki yo na lisumu yango, mpe osali makasi otosa mibeko ya pɛto ya Yehova na bomoi na yo.​—Tángá Yisaya 55:6, 7.

2. Ndenge nini Yehova asalelaka bankulutu mpo na kosalisa biso ntango tosali lisumu?

Soki tosali lisumu moko ya monene, Yehova ayebisi biso ‘tóbenga bankulutu ya lisangá.’ (Tángá Yakobo 5:14, 15.) Bankulutu yango balingaka Yehova mpe baoyo basalelaka ye. Bazali na makoki ya kosalisa biso tóbongisa boninga na biso ná Yehova.​—Bagalatia 6:1.

Ndenge nini bankulutu basalisaka biso ntango tosali lisumu moko ya monene? Bankulutu mibale to misato bakosalela Biblia mpo na kosembola biso. Bakopesa biso batoli oyo ebongi mpe bakosalisa biso mpo tókwea lisusu te na lisumu yango. Bakopesa biso lisusu malendisi mpe makanisi ya ntina oyo ekosalisa biso tókwea lisusu te na lisumu yango. Mpo na kobatela lisangá na etamboli moko ya mabe, bankulutu balongolaka na lisangá moto nyonso oyo asali lisumu ya monene mpe aboyi kobongola motema.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba ndenge oyo okoki kokóma na botɔndi mingi mpo na lisalisi oyo Yehova apesaka biso ntango tosali lisumu moko ya monene.

3. Koloba polele lisumu na biso esalisaka biso

Lisumu nyonso esalaka Yehova mpasi, yango wana tosengeli koyebisa ye yango polele. Tángá Nzembo 32:1-5, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini ezali malamu tóyebisa Yehova lisumu na biso na esika ya koluka kobomba yango?

Nsima ya koyebisa Yehova lisumu na biso, tosengeli koluka lisalisi ya bankulutu mpo tómiyoka malamu. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

VIDEO: ‘Yehova apesaka disiplini na bato oyo ye alingaka’ (3:01)

  • Na video yango, ndenge nini bankulutu basalisaki Canon azongela Yehova?

Lokola bankulutu bazali wana mpo na kosalisa biso, tosengeli koyebisa bango makambo polele mpe kobomba ata eloko moko te. Tángá Yakobo 5:16, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini ezalaka pɛtɛɛ bankulutu básalisa biso soki toyebisi bango makambo polele?

Bililingi: 1. Ndeko mobali moko azali na mawa makasi mpe atye mabɔkɔ na elongi. 2. Ndeko yango azali kobondela Yehova. 3. Azali kosolola na nkulutu na telefone. 4. Akutani na bankulutu misato. 5. Azali na esengo mpo akómi na lisosoli ya pɛto.

Yambolá masumu na yo, yebisá bankulutu makambo nyonso polele mpe ndimá lisalisi ya Yehova

4. Yehova amoniselaka basumuki motema mawa

Soki moto oyo asali lisumu moko ya monene aboyi kolanda mibeko ya Yehova, bakolongola ye na lisangá. Tosengeli kokata boninga ná moto yango. Tángá 1 Bakorinti 5:6, 11, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Kaka ndenge levire evimbisaka farini, kozala moninga ya moto oyo asali lisumu mpe aboyi kobongola motema ekoki kosala nini na lisangá?

Mpo na komekola motema mawa oyo Yehova azalaka na yango mpo na basumuki, bankulutu basalaka makasi mpo na koluka mpe kosalisa baoyo balongolamá na lisangá. Mingi bazongaki na lisangá mpo disiplini, atako ezalaki mpasi, esalisaki bango bázongela makanisi ya malamu.​—Nzembo 141:5.

Ndenge nini lolenge oyo Yehova asalelaka basumuki makambo emonisi ete azali makambo makasimakasi te, azali na motema mawa mpe bolingo?

5. Yehova alimbisaka biso soki tobongoli motema

Yesu apesaki ndakisa moko mpo na kosalisa biso tóyeba ndenge oyo Yehova ayokaka ntango moto abongoli motema. Tángá Luka 15:1-7, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Yango eteyi yo nini mpo na Yehova?

Tángá Ezekiele 33:11, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Osengeli kosala nini mpo na komonisa ete obongoli mpenza motema?

Mobateli ya mpate amemi mpate oyo ezoki mpe azali kokanga bampota na yango.

Ndenge moko na mobateli ya mpate, Yehova atyelaka mpenza bampate na ye likebi

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Nazali kobanga koyebisa bankulutu lisumu oyo nasali mpo bakolongola ngai na lisangá.”

  • Okoyebisa ye nini?

NA MOKUSE

Soki tosali lisumu moko ya monene kasi toyoki mpenza mawa mpe tozwi ekateli ya kotika mabe, Yehova akolimbisa biso.

Bozongeli

  • Mpo na nini ezali malamu tóyebisa Yehova masumu na biso?

  • Tosengeli kosala nini mpo Yehova alimbisa masumu na biso?

  • Mpo na nini osengeli koluka lisalisi ya bankulutu soki osali lisumu moko ya monene?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá ndenge Yehova amoniselaki mobali moko motema mawa oyo elobelami na Yisaya 1:18.

Motema mawa ya Yehova ezali na nsuka te (5:02)

Ndenge nini bankulutu balukaka kosalisa baoyo basali lisumu moko ya monene?

“Ndenge ya komonisa bolingo mpe motema mawa ntango ndeko moko asali lisumu?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 08/2024)

Talá ndenge tomonisaka bolingo mpe motema mawa epai ya basumuki oyo baboyi kobongola motema

“Lisalisi mpo na baoyo balongolami na lisangá Linɔngi ya Mosɛnzɛli, 08/2024

Na lisolo “Nasengelaki kozongela Yehova,” talá ntina oyo mobali moko oyo atikaki solo amonaki ete Yehova nde asalisaki ye azonga.

“Biblia ebongolaka bato” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/2012)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto