Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lmd liteya 4
  • Komikitisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Komikitisa
  • Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo Paulo asalaki
  • Ndakisa ya Paulo eteyi biso nini?
  • Mekolá Paulo
  • Mpo na nini ebongi komilatisa ezaleli ya komikitisa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Yehova azwaka na motuya basaleli na ye ya komikitisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Bandakisa ya komikitisa oyo tosengeli komekola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Tólona komikitisa ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
lmd liteya 4

NDENGE YA KOBANDA LISOLO

Bakangi Ntoma Paulo ná mokɛngɛli na ye na shɛni moko, na limemya nyonso, azali koloba na mokonzi Agripa, Guvernɛrɛ Festusi, mpe Bernise.

Mis. 26:​2, 3

LITEYA 4

Komikitisa

Etinda: “Na komikitisa bómona basusu ete baleki bino.”—Flp. 2:3.

Oyo Paulo asalaki

Bakangi Ntoma Paulo ná mokɛngɛli na ye na shɛni moko, na limemya nyonso, azali koloba na mokonzi Agripa, Guvernɛrɛ Festusi, mpe Bernise.

VIDEO: Paulo asakweli Mokonzi Agripa

1. Talá VIDEO, to tángá Misala 26:​2, 3. Na nsima talelá mituna oyo elandi:

  1. Ndenge nini Paulo amonisaki komikitisa na ndenge na ye ya kosolola na Mokonzi Agripa?

  2. Ndenge nini Paulo abendaki likebi epai ya Yehova mpe na Makomami kasi epai na ye moko te? —Talá Misala 26:22.

Ndakisa ya Paulo eteyi biso nini?

2. Nsango na biso ekosepelisa bato mingi soki tozali kosolola na bango na ndenge ya komikitisa mpe na limemya.

Mekolá Paulo

3. Sololáká na bato na limemya. Boyá kotinda moto akanisa ete oyebi nyonso mpe ete ye ayebi eloko moko te. Sololá na ye na limemya.

4. Monisá ete mateya na yo euti na Biblia. Liloba ya Nzambe ekoki kobongola makanisi mpe mayoki ya moto. Ntango tozali kosolola na moto na nzela ya Biblia, tozali nde kotonga kondima na ye na moboko ya solosolo.

5. Zalá na boboto. Kotingama kaka te moto andima ete yo nde ozali koloba solo. Boyá kowelana na maloba. Okomonisa komikitisa soki ofandi nyɛɛ mpe olongwe na ntango oyo esengeli. (Mas. 17:14; Tito 3:2) Soki osololi na boboto, mbala mosusu yango ekosala ete moto yango andima koyoka nsango malamu na mbala ya nsima.

TALÁ MPE

Rom. 12:​16-18; 1 Ko. 8:1; 2 Ko. 3:5

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto