Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lmd liteya 11
  • Teyá na ndenge ya pɛtɛɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Teyá na ndenge ya pɛtɛɛ
  • Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo Yesu asalaki
  • Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?
  • Mekolá Yesu
  • Salisá moyekoli na yo akokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Ndenge ya koyekola Biblia na moto na lisalisi ya buku “Sepelá na bomoi libela na libela!”
    Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Tyá likebi na ‘mayele na yo ya koteya’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Tómibongisa malamu mpo na koteya
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Makambo mosusu
Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
lmd liteya 11

KOKÓMISA BATO BAYEKOLI

Yesu azali koteya etuluku moko ya bato pene ya mai. Bandɛkɛ ezali kopumbwa likoló mpe bafololo ezali pene wana.

Mat. 6:​25-27

LITEYA 11

Teyá na ndenge ya pɛtɛɛ

Etinda: “Kosalela elobeli oyo ezali pɛtɛɛ . . . mpo na kokanga ntina.”—1 Ko. 14:9.

Oyo Yesu asalaki

Yesu azali koteya etuluku moko ya bato pene ya mai. Bandɛkɛ ezali kopumbwa likoló mpe bafololo ezali pene wana.

VIDEO: Yesu apesi ndakisa oyo emonisi ndenge Tata na biso atyelaka biso likebi

1. Talá VIDEO, to tángá Matai 6:​25-27. Na nsima, talelá mituna oyo elandi:

  1. Ndakisa nini Yesu asalelaki mpo na komonisa ndenge Yehova atyelaka biso likebi?

  2. Atako Yesu ayebaki makambo mingi mpo na bandɛkɛ, likambo nini ya pɛtɛɛ abendaki na yango likebi ya bato? Mpo na nini lolenge wana ya koteya ebongaki?

Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?

2. Soki tozali koteya na ndenge ya pɛtɛɛ, bato bakobosana te makambo oyo tolobi mpe tokosimba mitema na bango.

Mekolá Yesu

3. Kolobaka mingi te. Na esika olobela makambo nyonso oyo oyebi mpo na lisolo oyo bozali koyekola, lobelá mingi nde makambo oyo ezali na mokanda. Nsima ya kotuna motuna, zelá moyekoli na yo apesa eyano. Soki azali na eyano te to apesi likanisi moko oyo eyokani te na mateya ya Biblia, tuná mwa mituna mosusu mpo na kosalisa ye akanisa na likambo yango. Soki kaka akangi malamu ntina ya liteya yango, leká na eteni oyo elandi.

4. Salisá moyekoli na yo amona boyokani oyo ezali kati na mateya ya sika ná makambo oyo así ayebá. Na ndakisa, liboso ya kobanda lisolo oyo elobeli lisekwa, okoki kozongela na mokuse makambo oyo ayebi mpo na oyo etali ndenge moto akómaka soki akufi.

5. Salelá bandakisa na mayele. Liboso ya kosalela ndakisa moko, omituna boye:

  1. ‘Ndakisa yango ezali mpenza pɛtɛɛ?’

  2. ‘Moyekoli na ngai akokanga na pɛtɛɛ nyonso ntina na yango?’

  3. ‘Ekosalisa moyekoli na ngai akanga kaka ndakisa yango to ekotinda ye nde abosana te likanisi ya ntina?’

TALÁ MPE

Mat. 11:25; Yoa. 16:12; 1 Ko. 2:1

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto