Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lmd liteya 12
  • Zalá na elobeli ya polele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zalá na elobeli ya polele
  • Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo Yesu asalaki
  • Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?
  • Mekolá Yesu
  • Salisá moyekoli na yo akokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya mibale
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
lmd liteya 12

KOKÓMISA BATO BAYEKOLI

Na esengo nyonso, Yesu azali kosolola na mobali moko oyo afukami liboso na ye mpe ya bayekoli na ye.

Mrk. 10:​17-22

LITEYA 12

Zalá na elobeli ya polele

Etinda: “Mafuta mpe mpaka ya malasi esepelisaka motema; ezali ndenge moko na moninga oyo apesaka yo toli kozanga bokosi.”—Mas. 27:9.

Oyo Yesu asalaki

Na esengo nyonso, Yesu azali kosolola na mobali moko oyo afukami liboso na ye mpe ya bayekoli na ye.

VIDEO: Yesu apesi elenge mozwi moko toli

1. Talá VIDEO, to tángá Marko 10:​17-22. Na nsima, talelá mituna oyo elandi:

  1. Bizaleli nini ya malamu Yesu amonaki epai ya elenge yango?

  2. Mpo na nini esɛngaki ete Yesu amonisa bolingo mpe aloba polele mpo na kopesa ye toli?

Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?

2. Tosengeli komonisa bolingo kasi tosengeli mpe koyebisa moyekoli polele oyo asengeli kosala mpo akoba kokola na elimo.

Mekolá Yesu

3. Salisá moyekoli amityela mikano mpe akokisa yango.

  1. Salelá eteni “Oyo okoki kosala” na liteya mokomoko ya buku Sepelá na bomoi libela na libela!

  2. Salisá moyekoli na yo amona mikano oyo asengeli kokokisa nsima ya mwa mikolo mpe oyo asengeli kokokisa nsima ya ntango molai.

  3. Pesáká ye longonya mbala na mbala mpo na bokoli na ye.

4. Luká koyeba makambo oyo ezali kopekisa ye akola na elimo, mpe salisá ye alonga yango.

  1. Omituna boye:

    • ‘Nini ezali kopekisa moyekoli na ngai akola tii azwa batisimo?’

    • ‘Lisalisi nini nakoki kopesa ye?’

  2. Sɛngá Yehova apesa yo mpiko mpo osolola na moyekoli na yo polele mpe na bolingo makambo oyo asengeli kosala.

5. Katá boyekoli na moto oyo azali kokola te na elimo.

  1. Omituna mituna oyo elandi mpo na koyeba soki moyekoli na yo azali kokola:

    • ‘Moyekoli na ngai azali kosalela makambo oyo azali koyekola?’

    • ‘Ayanganaka na makita mpe ayebisaka basusu mateya ya solo?’

    • ‘Lokola ayekoli Biblia ntango molai, azali mpenza na mposa ya kokóma Motatoli ya Yehova?’

  2. Soki azali na mposa ya kokola na elimo te:

    • Tuná ye aluka koyeba soki eloko nini ezali kopekisa ye.

    • Na boboto nyonso, limbolelá ye ntina oyo ozali kokata boyekoli na ye.

    • Salisá ye ayeba makambo oyo asengeli kosala soki alingi ozongela koyekola na ye Biblia.

TALÁ MPE

Nz. 141:5; Mas. 25:12; 27:6; 1 Ko. 9:26; Kol. 4:​5, 6

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto