Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • CO-pgm24 nk. 7-8
  • Mayebisi mpo na bayangani

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi mpo na bayangani
  • Liyangani ya Batatoli ya Yehova ya 2024
  • Masolo mosusu
  • Mayebisi mpo na bayangani
    Liyangani ya Batatoli ya Yehova ya 2023
  • Mayebisi mpo na bayangani
    Programɛ ya Liyangani ya etúká 2020
  • Mayebisi mpo na bayangani
    Liyangani ya Batatoli ya Yehova ya 2025
  • Mayebisi mpo na bayangani
    Programɛ ya Liyangani ya etúká 2019
Makambo mosusu
Liyangani ya Batatoli ya Yehova ya 2024
CO-pgm24 nk. 7-8

Mayebisi mpo na bayangani

BANDEKO OYO BAMIPESI NA BOLINGO NA BANGO MOKO Soki olingi kopesa mabɔkɔ na misala ya liyangani, okoki kokende na Departema ya mayebisi mpe na Departema ya bandeko oyo bamipesi na bolingo na bango moko.

BATISIMO Bisika oyo ebongisami mpo na baoyo bakozwa batisimo ezali liboso ya estrade. Soki ebongiseli mosusu ezwami, bakoyebisa yango liboso. Baoyo bakozwa batisimo basengeli kofanda wana liboso ete diskur ya batisimo ebanda na ntɔngɔ ya mokolo ya pɔsɔ. Mokomoko na bango asengeli komema esumɛ mpe elamba oyo ebongi mpenza na miso ya bato mpo na kokɔta na yango na mai.

BAYAMBI-BATO Mokumba ya bayambi-bato ezali ya kosalisa bino. Tosɛngi bino bótosa makambo oyo bakosɛnga bino mpe bólanda ndenge bazali koyebisa bino na oyo etali ndenge ya kotɛlɛmisa mituka, kolekisa bato, kokanga bisika ya kofanda mpe makambo mosusu.

BISIKA YA KOFANDA Kanisáká mpe bato mosusu. Kobosana te ete okoki kokanga bisika ya kofanda kaka mpo na bato ya libota na bino, bato oyo oyei na bango motuka moko, baoyo ofandaka na bango ndako moko, to baoyo ozali koyekola na bango Biblia. Tosɛngi yo otya te biloko na bisika oyo bokofanda te.

DEPARTEMA YA BILOKO OYO EBUNGAKI MPE EMONANI Biloko nyonso oyo bolɔkɔti, bosengeli kokende na yango na Departema ya biloko oyo ebungaki mpe emonani. Soki obungisi ata eloko nini, kende na departema wana mpo na koluka yango. Soki omoni mwana moko oyo azali koluka baboti na ye, osengeli mpe komema ye na Departema yango. Kasi, mpo na kobakisela bandeko oyo bazali kosala na Departema yango mosala te, tosɛngi bino bóbatela bana na bino malamu mpe bózala na bango esika moko.

MAKABO Mbongo mingi ebimaki mpo tókoka kozwa bisika malamu ya kofanda, bikoliseli-lolaka, bisaleli mpo na kolakisa bavideo, mpe mpo na misala mosusu ndenge na ndenge oyo esali ete liyangani ezala likambo ya esengo mpe esalisa biso tópusana lisusu penepene na Yehova. Makabo oyo bopesaka na bolingo na bino moko esungaka mpo na kozongisa mbongo wana mpe mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi na mokili mobimba. Na yango, bakɛsi ya makabo oyo ekomami polele, etyami bipai na bipai na esika ya liyangani. Bokoki mpe kopesa makabo na nzela ya Internet na donate.jw.org. Tokosepela mingi na makabo nyonso oyo ekopesama. Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali kopesa bino matɔndi na ndenge bozali kopesa mabɔkɔ na matomba ya Bokonzi.

MWA LISUNGI YA NKISI Bóbosana te ete yango ezali kaka mpo na lisungi ya nokinoki.

Ebongisami na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova

© 2024 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania

LIKITA YA SIPESIALE

Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi

Molakisi azali kolakisa mwasi moko ná mobali na ye lisolo moko ya Biblia na tablɛti na bango wana bazali koyekola na bibliotɛkɛ ya Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Tokoki komona bana-kelasi mosusu bazali mpe koyekola.

Baoyo nyonso bazali na likoki ya kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova, babengisami na likita mpo na baoyo balingi kokɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi, oyo ekosalema mokolo ya lomingo na nsima ya midi. Esika mpe ntango oyo likita yango ekosalema ekopesama nsima.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto