Ndenge nini kozwa baninga malamu
MOKOMI na maloba kitoko, ye moAmeriké na nkombo Ralph Emerson akomaki: “Lolenge bobele moko ya kozwa baninga, ezali boye ete yo mpe ozali moninga malamu”. Boninga ezali likambo ya moto moko te; ezali kosenga ete mokomoko amibongisa mpo na kopesa. Ezali mpasi mingi mpo na bato oyo bazali koluka bobele matomba na bango moko mpe baoyo bazali na moimi, ete bazwa baninga. Nzokande, ndenge tokomona yango, bakoki kozwa baninga.
Boninga ya solo ebotamaka na bolingo, mpamba te bolingo ezali kobenda. Nzokande bamoko bazali na mpasi mpo na kosala boninga. Ndenge nini kolonga mokakatano oyo?
Dale Carnegie apesi toli elandi: “Yeba koyoka. Lendisa bamosusu ete baloba mpo ya bango moko.” Ntango bato bayebani te bakutani, na ndakisa ntango ya kominanola, wapi baoyo bazali kozwa baninga? Ezali baoyo bazali koloba mingimingi te, kasi baoyo bazali kosepela solo epai ya bamosusu, bazali kopesa bango nzela ya koloba mpe bazali koyoka bango mpenza. Baoyo tozali kosala na bango boyokani bakoki mpe kokoma baninga na biso soko tozali komikundola nkombo na bango to mwa makambo mikemike matali bango.
Kati na mokanda moko oyo elobelaki boyokani ya bato (Fundamentals of lnterpersonal Communication), Kim Giggin mpe Bobby Patton balobi ete esengeli kosolola. Balobi boye: “Mpo ete moto azala na ntina na miso na bino, bosengeli koyeba likambo moko ya ntina oyo etali ye . . . (Zala) ntango nyonso na elimo ebongi mpe loba solo . . . Osengeli kobimisa mayoki ya solo na maloba oyo moto mosusu azali koyebisa yo.”
Baninga ya solo bazali bobele te na ezaleli elongobani, kasi bazali lisusu kotyana likebi; bazali kowelana te mpe bazali na moimi te. Bazali koyokana. Mokomoko azali kososola ndenge nini mosusu azali komonela makambo; ayebi nde komitya na esika ya mosusu. Wana boninga na bango ezali kokola, bazali koyebisana makambo mazali na motema na bango, mpe bazali kokoma koleka baninga ya solo: baninga ya motema Na yango, baninga nyonso ya solo bazali baninga ya motema te. Yesu Klisto, moto oyo aleki kosepela na bato koleka bato nyonso, azwaki baninga mingi, kasi bobele moke nde bazalaki mpenza baninga na ye ya motema.—Malako 9:1-10; Luka 8:51.
Mokanda ya boninga ya solo
Biblia ezali mokanda oyo elobeli malamu koleka mpo na boninga. Elobi ete: “Moninga akolingaka ntango nyonso; mpe azali ndeko mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17) Baninga ya solo azali kokabola mpasi mpe bazali pene mpo na kosalisa ntango mikakatano mibimi. Tala ndakisa moko oyo esalemaki na mikolo na Yisraele na kala.
Mpo nzala ekotaki na mboka, mobali moko na Yuda akendaki kofanda na Moabe, elongo na mwasi na ye, Naomi. Mpe, mobali yango ayaki kokufa. Na nsima, bana na ye mibale ya mibali babalaki Luta mpe Orpa, Bamoabite, kasi bango mpe bakufaki, kotikaka bongo basi-bakufeli-mibali misato. Naomi, mama na bango, azwaki ekateli ya kozonga na Yuda, mpe basi ya bana na ye babandaki kozonga elongo na ye. Kasi na nzela, Naomi asengaki bilenge basi ete bazonga mpe bakenda koluka mibali ya sika kati na mibali ya libota na bango. Ezali yango Orpa asalaki, kasi Luta aboyaki kozonga mpe alandaki Naomi. Mpo na nini? Mpamba te azalaki bobele bokilo te, kasi azalaki moninga ya solo. Ezaleli na ye ya kokabola mpasi ya bamosusu epesaki ye nzela te ete atika mwasi-mokufeli-mobali oyo abungisaki libota na ye mobimba, ete azonga ye moko. Luta 1:1-17.
Luta amimonisaki mwasi malamu, sembo mpe na bolingo epai ya Naomi. Bizaleli na ye bizalaki moboko ya boninga ya solo. Ata bongo, likambo mosusu ezalaki kati na boyokani oyo ekangisaki Luta mpe Naomi.
Moboko etombwani
Ntango Naomi asengaki ye ete azonga, Luta alobaki na ye: “Bondela ngai kotika yo te . . . Esika ekokenda yo, ngai mpe nakokenda kuna, . . . Libota na yo ekozala libota na ngai mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.” (Luta 1:16) Naomi asalisaki Luta, oyo liboso azalaki mopakano, ete ayeba mpe alinga Nzambe ya solo, Jéhovah. Endimeli moko oyo bazalaki na yango bango mibale ekomaki ekanganeli makasi ya elimo oyo ekomisaki basi yango baninga ya solo. Mpe Jéhovah apesaki bango libota mosusu ya sika. Na yango, Luta abalaki Boaze, mozwi moko na Yuda, mpe abotaki na ye mwana, na nkombo Obede, oyo akomaki nkoko ya mokonzi Davidi.—Luta 4:13-22; Matai 1:5, 6.
Ekanganeli yango ya elimo etyaki boninga na esika etombwami. Na ndenge nini? Luta mpe Naomi bazalaki kosambela bango mibale Jéhovah, “Nzambe na mawa mpe na ngolu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.” (Exode 34:6) “Nzambe azali bolingo”, mpe soko tozali kosambela ye na bosembo nyonso na elimo mpe na solo, tozali na elikya ya komona ndenge nini bolingo na biso mpo na ye mpe mpo na bikelamu na ye, bazalani na biso, ekokola. (1 Yoane 4:8; Yoane 4:24) Yango elingi koloba ete tokobongwana. Tokolona litomba ya solo mpo na bamosusu, mingimingi bato na kosokema oyo bazali komona mpasi, ata soko ekólo na bango ezali nini. Na bongo, moto akolukaka bamposa na ye akokoma kotalela bamposa ya bamosusu. Moimi akoyekola ndenge nini kosepela na bamosusu. Tokobanda komonisa mbuma na elimo na Nzambe “bolingo, esengo, kimya, motema petee, boboto, malamu, kondima, bopolo mpe komikanga motema.”—Bagalatia 5:22, 23.
Bizaleli yango ekosalisa biso ete tosalela likoki ya ntina monene oyo ezali bongo kolimbisa bolembu mpe mabunga ya bamosusu -“kino mbala nsambo te kasi kino nsambo mbala ntuku nsambo”, lokola elobaki yango Yesu. (Matai 18:21, 22) Ezali mpenza na esika oyo nde mikakatano ebimaka mpe boninga ebebaka. Kasi Yesu Klisto ateyaki etinda oyo mpe asalelaki yango ye moko. Mbala boni ye alimbisaki mabunga ya bayekoli na ye bazangi kokoka, ata mabunga ya Petelo oyo ayanganaki ye, ye Nkolo!—Matai 26:69-75.
Wana ezali biso kokola na elimo kati na makambo nyonso, tozali mpe kozwa baninga mingi. Na nsuka, tokomona ete tokozala libota monene ya baninga kati na mokili mobimba. Tokomona mpe lisusu ete nivo ya baninga na biso ekozala ya kotombwana. Na ndakisa, Bertrand, oyo azali kosalela Jéhovah uta kala mingi te, azali komikundola ete baninga na ye ya kala bazalaki kopusa ye ete amela mpe atika kokipé mwasi na ye mpe bana na ye. Nzokande, sikawa, azali mpenza kokokisa bamposa ya libota na ye. Kolobaka mpo na baninga na ye ya sika oyo bango mpe bazali na kondima epai na Jéhovah, alobi boye: “Soko nazali na mokakatano, nayebi ete nakotelefoné mpe nakobenga ata nani kati na bango: akosepela mpo na kosalisa ngai.”
Alain azalaki na baninga elongo na bango bazalaki kosolola bobele mpo na mituka mpe bilenge basi. Kasi ayaki komona ete masolo yango “mazangaki ntina mpe litomba” ntango azwaki baninga ya sika, oyo bazali kolinga Jéhovah lokola ye. Baninga yango bakokisaki bamposa ya Alain na “litomba ya pwasa, ya sembo mpe ya bolingo” oyo bamonisaki epai na ye.
Baninga na biso baleki malamu
Bato oyo nyonso mpe bamilió mosusu oyo bazali kati na libota yango ya baninga, libota oyo ezwami kati na mokili mobimba mpe ezangi kosangana na makambo ya politike mpe etye ata mondelo moko te mpo na makambo ya ekólo, ya mposo to bokeseni kati na bato- libota ya solo ya bandeko, lokola oyo ya baklisto ya liboso. (3 Yoane 14) Ekanganeli oyo esangisaki Luta na Naomi ezali oyo ekangisi libota yango: ezali bongo losambo ya peto ya Jéhovah Nzambe. Bango nyonso bazali kondima na kosokema nyonso mpe na botondi Jéhovah mpe Yesu lokola baninga na bango baleki malamu.
Mbala mosusu okoki komiloba boye: “Nzambe—Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe Mwana na ye, bazali baninga na bango? Ndenge nini yango ekoki kosalema? Yango ezali komitombola te?” Biblia elobi: “Abrahame andimaki Nzambe, . . . abyangami mpe ‘Moninga ya Jéhovah”’, yango ezalaki mpenza ngolu na Nzambe. Nzokande Liloba na Nzambe elobi lisusu: “Nzambe akotemelaka bato na lolendo, nde akopesaka basokemi ngolu.”—Yakobo 2:23; 4:6.
Mbala mosusu bamoko bakoki komimona ete bazali basumuki mpenza mpo na kozwa libaku malamu motindo boye. Kasi Yakobo alobi lisusu boye: “Bobelema epai na Nzambe mpe ye akobelema epai na bino. Bopetola maboko, bino bato na masumu. Bozalisa mitema na bino mpeto, bino bato na mitema mibale. Bomisokisa liboso na Nkolo mpe akotombola bino.”—Yakobo 4:8, 10.
Yesu alobaki: “Bino bozali baninga na ngai soko bokosalaka yango esili ngai kolakela bino.” Amonisaki lisusu ete mibeko mileki minene mizali oyo ya ‘kolinga Jéhovah na motema mobimba, na molimo mobimba , mpe na elimo mobimba, mpe kolinga mozalani na yo lokola yo moko’. (Yoane 15:14; Matai 22:37-40) Soko tozali kosala boye, tokozala na baninga mingi ya solo. Mpe lisusu, tokomimonisa ete tobongi mpo na kozwa libaku monene oyo ya kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo epetolami, na boyangeli ya Bokonzi na Nzambe. (Matai 6:9, 10) Lokola Yesu alobaki yango, “nayebi ete lilako na ye (oyo ya Jéhovah) ezali bomoi na seko”.—Yoane 12:50.
Okondima lisalisi oyo ba Témoins de Jéhovah bakopesa yo? Bazali bato oyo bazali kosepela na bosembo nyonso epai na yo. Bazali pene mpo na koya epai na yo mpo ete batalela elongo na bango makambo ya ntina, kozanga ete ofuta mbongo. Bakoki kosalisa yo ete ozwa baninga mingi ya solo.
[Etanda na lokasa 6]
Mwa batoli mpo na kozala na boninga ya solo
Pona malamu baninga na yo. Sepela mpenza na baninga mpe yeba koyoka.
Bozala na bibongiseli elongo—makambo bokomona elongo ekoyeisa boninga makasi.
Loba ntango nyonso solo, zala sembo mpe kobomba likambo te.
Yeba komitya na esika ya moto mosusu mpe yeba kokabola bampasi na ye ntango azali na mikakatano.
Ntango baninga basali mabunga to babetisi yo libaku, zala pene mpo na kolimbisa-“kino ata mbala ntuku nsambo na nsambo” soko yango esengeli.—Matai 18:22.
Ntango balobi mabe to batongi moninga na yo na esika ozali, zala sembo: kolela ye.
Boninga ekoleka makasi soko baninga mibale basangani mpo ete bazali kosambela Jehovah.
[Elilingi na lokasa 7]
Luta atikaki Naomi te mpamba te boninga oyo esangisaki bango ezalaki na moboko makasi ya elimo. Ozali na baninga motindo boye?