Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/5 nk. 8-9
  • Yesu: limpa ya solo euti na makolуa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu: limpa ya solo euti na makolуa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Masolo mosusu
  • “Limpa ya solo liuti na likolo”
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yesu azali “limpa ya bomoi”
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Osí omeká limpa ya bomoi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Tózwa mateya na likamwisi moko ya kokómisa mampa ebele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/5 nk. 8-9

Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

Yesu: limpa ya solo euti na makolo

YESU asalaki misala mingi na mokolo wana! Aleisaki bankoto na bato na ndenge na ekamwiseli mpe na nsima alimwaki ntango bibele balingaki kozalisa ye mokonzi. Bongo, ntango butu eingelaki, akatisaki na makolo ebale moko oyo mai na yango matombokaki, ebale ebengami la mer de Galilée. Asalisaki Petelo, oyo abandaki kozinda na mai ntango azalaki kotambola likolo na mai oyo mazali kobetama na mopepe makasi. Na nsuka, alembisaki kotomboka na mai, mpe abikisaki bongo bayekoli na ye mpo ete bazinda te.

Na mokolo elandaki, bato oyo Yesu aleisaki na ndenge na ekamwiseli, na nord-est ya ebale na Galilai, bayei komona ye lisusu pembeni na Kapernaume. Yesu apameli bango na ndenge bazali koluka ye mpamba te mposa na bango ezali ete baleisama lisusu mpamba. Alendisi bango na kosala milende, mpo na bilei oyo bikobebisama te, kasi mpo na bilei oyo bikoumela mpo na bomoi na seko. Bongo, balobani na ye batuni: “Tosala nini ete tosala misala na Nzambe?”

Yesu atangi se mosala moko, kasi ezali na motuya monene mpenza. “Mosala na Nzambe ezali boye ete bondima motindami na ye.”

Kasi, bibele bazali na kondima epai na Yesu te, ata ndenge bamoni mirakle oyo ye asali. Na mokolo eutaki koleka, aleisaki na ndenge na ekamwiseli bato 5 000, bakisa basi mpe bana; nzokande, sikawa, likambo ya kokamwa, bazali lisusu kotuna Yesu: “Okosala elembo nini ete tomona mpe tondima yo? Ozali kosala nini? Bankoko na biso balyaki mana kati na lisobe lokola esili kokomama ete, Apesaki bango kwanga longwa na likolo ete balya.”

Mpo na koyanola na lisengi na bango, Yesu amonisi polele Eutelo ya bilei yango ya ekamwiseli, na kolobaka: “Ezalaki Mose oyo apesaki bino kwanga longwa na likolo te kasi Tata na ngai azali kopesa bino kwanga na solo na likolo. Mpo ete kwanga na Nzambe ezali yango ekokita na likolo mpe kopesa bomoi na mokili.”

Bongo balobi na ye: “Nkolo, pesa biso kwanga oyo ntango nyonso.”

Mpe Yesu ayanoli: “Ngai nazali kwanga na bomoi, ye oyo akoyela ngai, akoyoka nzala te mpe ye oyo akondima ngai akoyoka lisusu mposa na mai te. Kasi nayebisi bino ete bosili komona ngai mpe ata bongo bokondima ngai te. Nyonso ekopesa Tata epai na ngai ekoyela ngai mpe ye oyo akoyela ngai, nakobwaka ye libanda soko moke te, mpo ete nasili kokita longwa na likolo ete nasala mokano na ngai moko te kasi mokano na Motindi na ngai. Mokano na motindi na ngai ezali boye ete nabungisa moko te kati na bango basili ye kopesa ngai, kasi ete nasekwisa bango na mokolo na nsuka. Mpo ete oyo ezali mokano na Tata na ngai ete moto akondima ye akozwa bomoi na seko.”

Bayuda babandi bongo koimaima mpo na Yesu mpamba te alobi: “Ngai nazali limpa oyo euti na likolo.” Lokola bayebi baboti na ye, balobeli ye bobele ndenge bafandi na Nazarete balobelaki ye kala: “Oyo Yesu, mwana na Yosefe te? Toyebi tata na ye mpe mama na ye te? Nzela nini boye alobi ete, Nasili kokita longwa na likolo?”

Kasi Yesu ayanoli bango ete: “Boimaima kati na bino te. Moto akoki koya epai na ngai te bobele soko Tata, Motindi na ngai, akobenda ye, mpe nakosekwisa ye na mokolo na nsuka. Ekomami kati na basakoli ete, Bango nyonso bakolakisama na Nzambe. Boye moto na moto oyo ayoki epai na Tata mpe ayekoli, akoya mboka na ngai. Moto amoni Tata te, bobele ye oyo auti na Nzambe; ye asili komonana Tata. Solosolo nazali koloba na bino ete, ye oyo akondima ngai azali na bomoi na seko.”

Yesu azongeli lisusu maloba oyo abimisaki na ebandeli: “Ngai nazali kwanga na bomoi. Bankoko na bino balyaki mana kati na lisobe mpe bakufaki .Oyo ezali kwanga oyo ekiti longwa na likolo ete moto alya na yango mpe akufa te. Ngai nazali kwanga na bomoi oyo ekiti longwa na likolo. Soko moto nani akolya kwanga oyo, akozala na bomoi libela.” Na kozalaka na kondima epai na Yesu, motindami na Nzambe, bato bakoki kozwa bomoi ya seko; oyo bakoki kozwa yango te na kolyaka mana to limpa mosusu.

Emonani lokola ete lisolo yango ebandaki mwa ntango nsima wana bibele bamonaki lisusu Yesu, pene na Kapernaume. Elandanaki, mpe esilaki, wana Yesu azalaki koteya kati na sinagoge na Kapernaume. Yoane 6:26-51, 59; Nzembo 78:24; Yisaya 54:13; Matai 13:55-57.

◆ Makambo nini masalemaki liboso ete Yesu asolola na ntina na limpa oyo ekiti longwa na likolo?

◆ Na kotalelaka mirakle oyo Yesu auti kokokisa, mpo na nini ezali likambo na mayele te ete bibele basenga elembo?

◆ Ntango Yesu alobi ete azali limpa ekiti longwa na likolo, mpo na nini Bayuda bazali koimaima na ntina na ye?

◆ Lisolo yango na ntina na limpa ekiti longwa na likolo, ebandelaki epai wapi?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto