Kobikisa bato na nzela na bikamwiseli ezali misala na Nzambe?
MOBALI moko azalaki na bokono uta mibu 38. Yesu atunaki ye! “Ozali nde na mposa na kobika?” Soki ezalaki yo na esika ya mobali wana, esengelaki koyanola nokinoki te ete abikisa yo? Tala oyo Yesu alobaki na ye! “Telema, kamata litoko na yo mpe tambola.” Likambo nini maloba na ye ebotaki? “Nokinoki moto yango abiki, akamataki litoko na ye mpe atamboli.”—Yoane 5:5-9.
Libikisi wana ya bonzambe ezali moko na ebele na bikamwiseli oyo Yesu asalaki na boumeli ya mosala na ye awa na mabelé. (Matai 11:4, 5) Lelo oyo, babikisi bazali koloba ete Nzambe azali kosala lisusu bikamwiseli ya motindo oyo, mpe bazali komilongisa na litatoli ya bankoto na bato oyo bazali koloba ete babikisamaki na lisalisi na bango.
Bokeseni ya liboso
Boyekoli ya Biblia ezali komonisa bokeseni ya liboso kati na bikamwiseli oyo biyebisami kati na lisolo ya Biblia mpe oyo babikisi ya ntango na biso bazali kosala. Na ndakisa, Yesu mpe bayekoli na ye bazalaki kofutisa mosolo te. “Bozwi na lisombi te, bopesa na lifuti te”, ndenge Yesu ateyaki. (Matai 10:8) Na wana balandaki ndakisa ya Elizé, ye aboyaki likabo ya Namana, mobali oyo abikisaki na maba. (2 Mikonzi 5:1, 14-16) Nzokande, na kosengaka mosolo mpo na misala na bango, babikisi bazali kolanda ndakisa oyo ya Biblia te.
Toyeba lisusu ete na ntango ya kala kobikisa bato ezalaki komonana na mbala moko to nsima ya mwa elaka mokuse. Na komonaka mobali moko oyo azalaki “ebosono longwa na libumu na mama na ye”, ntoma Petelo alobi na ye! “Na nkombo na Yesu Klisto na Nazarete, tambola!” Mpe na nsima ezali kotangama ete! “Noki matambe (ya ebosono) na makesi na ye mazwi nguya mpe apombwi, atelemi, atamboli.” (Misala 3:1-8) Okokuta bandakisa mosusu kati na Misala 5:15, 16 mpe 14:8-10.
Nzokande, lelo, bikamwiseli ya kobikisa bato bizali mpenza kozwa mikolo mingi, baposo, to mpe basanza mpo ete emonana polele! Likambo mosusu ya ntina ezali boye ete babikisi bazali kosalisa bobele maladi oyo ezali kobebisa enama ya nzoto oyo moto azali na yango, lokola miso ekufi, eteni moko ya nzoto ezali kosala lisusu te to matoi ekufi-bokono to mbeba oyo mbala mingi ezali kouta na basusi ya moto ye moko. Monganga oyo apasolaka bato Paul Brand ye alobi boye! “Ntango eteni moko ya nzoto ezangi-lokola likolo bakata, liso moko ezali te to enama epesaka nzela ete nsuki ebotama ekufi-mpo na yango bikamwiseli bisalamaka te. Kasi Yesu, ye abikisaki “mpasi nyonso mpe maladi nyonso”, bakisa mpasi mosusu euti mpenzampenza na nzoto, lokola loboko ekauka.—Matai 9:35; Malako 3:3-5.
‘Kondima ezali te!’
Ezali mawa na komona ntalo monene ya bato oyo bazali na mpasi makasi kokende na ‘na bisika bazali kobikisa bato na nzela na bikamwiseli’ mpo na kozonga epai na bango na mpasi makasi koleka oyo bazalaki na yango liboso. Babikisi bazali kolimbola kozanga bolongi yango na kolobaka ete! ‘Bazangi kondima!’ Yango ezali komonisa lokuta lokola elobi yango maloba ya monganga William Nolen! “Na kokesena na monganga ya bonkoko, moto oyo akobikisaka na nzela ya bikamwiseli andimaka naino mokumba ya kozanga bolongi te. Nasengeli kondima ete nalingi kozwa likoki ya komilongola nsima na likanisi motindo oyo soki namoni ete nalongi te kosilisa bokono moko.”
Ezala basakoli ya Nzambe, ezala Yesu, ezala bayekoli na ye bazalaki na mposa te ya kolobela kozanga kondima ya ebosono oyo bakokaki kobikisa te. Ya solo, bato bayaki moke mpo na kosenga lisalisi mpo mingi bazangaki kondima. Kasi ntango bazalaki koya, bazalaki kozwa lisalisi mpe kobikisama mpenza!—Malako 6:5, 6.
Nkutu, bato oyo emonanaki polele ete bazali na kondima te babikisamaki. Na ndakisa, Namana, mokonzi ya basoda ya bato na Syrie, andimaki soko moke te ete maba na ye ekosila na lolenge oyo mosakoli Elizé alobaki. Ezali bobele nsima na kobikisama nde ayaki kondima! “Sasaipi nayebi ete Nzambe mosusu azali kati na mokili mobimba te bobele na Yisraele.” (2 Mikonzi 5:11-13, 15) Likanisi oyo ezangi nguya ya babikisi ebongi mpenza te.
Likabo ya kobikisa! elimwa na mikolo na biso
Nzokande, ezali solo te ete likabo ya kobikisa bato na bikamwiseli ezalaki komonana mingi epai na baklisto ya yambo? (1 Bakolinti 12:9) Ezali bongo, kasi ezalaki na bantina ya sikisiki mpo ete bikamwiseli ekoka kosalama na ntango wana. Na boumeli ya bikeke zomi na mitano, libota na Yisraele ya mosuni ezalaki libota eponamaki na Nzambe; nzokande, na ekeke ya liboso ya ntango na biso, ebakwamaki mpo na kozanga kondima na bango mpe bakitanaki bango na lisangá ya sika a boklisto. Baklisto wana ya yambo bazalaki na mposa ya lisalisi monene mpo na kokembisa kondima na bango mpe mpo na kopesa litatoli na bato ya libanda ete basimbamaki epai na Jéhovah Nzambe.
Na yango, lisangá ya boklisto oyo ebotamaki ezwaki makabo ya bikamwiseli, bakisa oyo ya kobikisa bato. Makabo yango mazalaki na mboka moko “elembo” mpo na bapakano mpe mwango moko ya kolendisa kondima ya bandimi. (1 Bakolinti 14:22) Nzokande, pene na bikeke ntuku mibale na nsima, lisangá ya boklisto ezali lisusu ya sika te. (Tala 1 Bakolinti 13:9-13). Biblia esila kokomama uta kala mpe ebimisami na bamilio ya ba exemplaires. Yango wana baklisto ya solo bakoki kozanga nkaka, mpo na kolongisa makambo oyo bazali koteya, kotinda bayoki na bango oyo bazali bandimi te na bankasa ya Biblia. Bazali na mposa ya kosala bikamwiseli te.
Paulo ayebisaki sikisiki ete makabo oyo mauti na likolo “makosila”. (1 Bakolinti 13:8) Makabo yango mazalaki kopesama longwa bobele na bantoma ya Yesu Klisto to na esika oyo bango bazali. (Misala 8:18-20; 10:44-46; 19:6) Nsima na kufa ya bantoma, bikamwiseli nyonso bisilaki.
Na kotalela Encyclopédie ya littérature biblique, théologique mpe ecclésiastique (angl.) ya McClintock mpe Strong (tome VI, nkasa 320), ezali “polele ete mpo na eleko ya mibu nkama oyo milandaki liwa ya bantoma tozali na bilembo moke, nkutu ata moko te, ya bikamwiseli bisalami na baklisto ya yambo”.
Bantina ya koboya bikamwiseli
Yesu Klisto ayebisaki ete ntango ekoya oyo bato mingi bakoloba na ye! “Nkolo! Nkolo! Tosakolaki na nkombo na yo te? Mpe na nkombo na yo, tosalaki misala na nguya te?” Nzokande Yesu akozongisela bango ete! “Nayebi bino soko moke tel Bolongwa na ngai, bino bato na misala na lofundo.” (Matai 7:22, 23) Soki ezali elimo ya Nzambe te, eloko nini ezali bongo komibomba nsima na bolongi ya likololikolo ya babikisi na kosala “misala na nguya”?
Kati na makambo mosusu, ezali komonana ete ezali mpenza moyibi to lokuta. Ndakisa, zulunalo moko ya Zimbabwe, The Herald, eyebisaki likambo ya bato misato oyo mobikisi moko ayebani mingi azalaki komikumisa ete abikisaki bango, mpe eyebisaki lokuta na maloba oyo! “Mwana ya liboso azali komona te mpe alobaka te kino lelo oyo: ya mibale naino akoma mokufeli-matoi te to baba te: mpe mwasi moko, oyo azalaki bobele mokufeli-matoi, azali ntango nyonso koyoka te.”
Mbala mosusu, molulu ya kobikisa esalisaka moto ya bokono na lolenge ya mbalakaka: to mpe, mingimingi ntango mikolo mingi mileki liboso ete lisalisi yango ekoma solo to emonana polele, bazali koloba ete ba anti-corps ezali mpe kokota na kati. Kati na mokanda na ye La science et les phénomenes paranormaux (angl.), monganga William Nolen azali kondima ete “80% ya babeli oyo bazali koya epai na (monganga moko ya bonkoko) bazali na bokono oyo ezali kosenga lisalisi ya nokinoki-elingi koloba bokono oyo ezali kokende nokinoki na kosila”. Na lisalisi ya ntango oyo eleki, mobikisi akoki komikumisa ete libiki oyo moto azwi euti nde epai na ye.
Na nsuka, Biblia ezali kolimbola ete “Satana akomimonisa lokola ntoma na moi” mpo na kokosa bato. (2 Bakolinti 11:14) Kati na 2 Batesaloniki 2:9, 10, (Biblia Yelusaleme), Paulo apesi ndimbola oyo mosusu! “Koya na ye moto na lofundo ekozala mpo na mosala na Satana, mosala na nguya nyonso mpe na bilembo mpe na bikamwiseli ndenge nyonso na lokuta mpe bizimbiseli nyonso na mabe mpo na bango bakokeba nyee, zambi baboyaki koyamba bolingo na solo mpo na lobiko na bango.” Na bongo tosengeli kokeba! bikamwiseli mpo na kobikisa bato mbala mingi ezali bilembo ya misala na bilimu mabel “Ntoma Paulo azali koloba, nalingi te ete bozala na lisangana na milimo mabe. Bokoki komela na kopo na Jéhovah te mpe na kopo na milimo mabe te.”—1 Bakolinti 10:20, 21.
Ntango moklisto azali kobela
Ya solo, lisalisi na nzela ya bikamwiseli ekoki kozala likambo ya komekama mpo na mobeli. Tosimba ete Epafrodite, moninga ya Paulo, abelaki kino pene na liwa. (Bafilipi 2:25-27) Timote, moninga ya penepene ya Paulo, azalaki mpe kobela “maladi mwa mingi”. (1 Timote 5:23) Nzokande, Paulo abikisaki ata moto moko te kati na bango mibale na nzela na ekamwiseli. Epai mosusu, ntango ye moko ayokaki mposa ya lisalisi, ntango mosusu azalaki koluka lisalisi ya Luka, “monganga molingami”, oyo azalaki kotambola na ye elongo.—Bakolose 4:14.
Motindo moko lelo, moklisto oyo azali na bokono akoki koluka lisalisi ya monganga ya makoki, na kokimaka lisalisi nyonso euti epai na bilimu mabe to boyokani nyonso elongo na bakosi, oyo sikawa basili kopalangana mpenza kati na mikili mingi. Akoki mpe kosambela, ezali mpo asalisama na nzela na ekamwiseli te, kasi mpo na kozwa mayele oyo ekosalisa ye na kolonga bokono. (Yakobo 1:5) Na nsuka akoki mpe kobondela Nzambe ‘alendisa ye na mbeto na ye ya maladi’.—Nzembo 41:3.
Ya solo, ezali mawa na komona ete maladi na yo ezali kosila te na nkisi oyo minganga bazali kopesa. Nzokande, atako azali na bokono, moklisto asengeli kobunda mpo na ‘kosimba makambo ya ntina’, mpe kopesa nzela te na basusi na ye ya nzoto mpo na kolimwisa libela mikumba na ye ya elimo. (Bafilipi 1:10) Akoki kozwa nguya kati na elikya oyo azali na yango ya kofanda libela kati na nse ya boyangeli ya Bokonzi na Nzambe epai kuna “mofandi moko te akoloba ete, ’Ngai nazali maladi.’”—Yisaya 33:24; 65:17-19.
Ntembe ezali te, elikya wana ya mokili ya sika mpe ya sembo ezali na motuya monene koleka bilaka ya mpamba ya babikisi. Likambo ya Peter, mokufeli—miso ya mboka Akumadan (Ghana) endimisi biso yango. Na boumeli ya mibu 26, azalaki mosangani ya Mangomba mingi oyo ebikisaka na bikamwiseli mpo ete azwa lisalisi mpo na miso na ye. Kasi ata mobikisi moko te afungolaki ye miso: mpe na nsima wana ezalaki ye mosangani ya lingomba moko oyo ebikisaka bato na bikamwiseli, ba Témoins de Jéhovah bakutanaki na ye.
Kosalelaka Biblia, balimbolaki na Peter ete Bokonzi na Nzambe ekosalisa maladi ya lolenge nyonso. Tala likambo oyo efungolaki ye miso, na elobeli ya elilingi. Kotondaka na botondi mpo na basolo kitoko ya Biblia, akomaki mosakoli ya ntango nyonso to pionnier ya Bokonzi na Nzambe, ekoki sikawa mibu misato. Azali kozela na motema likolo eleko oyo, na elobeli ya solo, ‘miso na bakufeli-miso makofungwama, mpe matoi na bimimi makozipwama’.—Yisaya 35:5, 6.
Lokola basalisamaki na Liloba na Nzambe, bankoto na bato basili, lokola ye, kokata elikya ya lokuta oyo bazalaki na yango epai na babikisi na nzela ya bikamwiseli.
Babikisi bazali mbala mingi kolonga te kosilisa mbeba oyo ezali komonana na nzoto ya moto
[Elilingi na lokasa 7]
Moklisto azali na bokono azali kobondela mpo na kozwa nguya ya koyika mpiko liboso ya mpasi na ye
[Bililingi na lokasa 7]
Lisusu, azali mpe kozela na motema likolo mokili ya sika, kati na yango mofandi moko te akoloba! ’Ngai nazali maladi.’