Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
Mampa mpe mfulu
Ebele na bato bazalaki koya epai na Yesu kati na mokili ya Dekapole. Mpo na koya koyoka ye mpe kobikisama na maladi na bango, mingi bautaki mosika mpo na kokoma na eteni wana ya mokili epai kuna ntalo monene ya Bapakano bazalaki kofanda. Bamemaki bitunga minene oyo basalelaka mingimingi mpo na komema bilei na bango ntango bazali koleka mikili ya bapakano.
Nzokande, nsima ya mwa mikolo Yesu abengi bayekoli na ye mpe alobi na bango: “Nazali koyokela ebele mawa mpo basili koumela na ngai mikolo misato mpe bazangi bilei. Soko nakotinda bango na ndako na bango na nzala, bakolemba na nzela mpe bamosusu balongwi mosika.”
Bayekoli bazongiseli ye ete, “Tokoki koleisa bato oyo na mampa awa na lisobe na nzela nini?”
Yesu atuni bango: “Bozali na mampa boni?”
“Balobi ete nsambo, mpe na ndambo na mbisi mike.”
Na nsima Yesu apesi etinda ete bango nyonso bafanda na nse, mpe akamati mampa na mbisi, asambeli Nzambe, nsima na yango akaboli bilei yango mpe apesi yango epai na bayekoli na ye. Bango bakaboli yango epai na bato, balei mpe batondi. Nsima na yango, ntango balokoti oyo etikali, batondisaki bitunga nsambo ya bilei, nzokande pene na bato 4 000 balyaki, bakisa basi mpe bana!
Na nsima, Yesu azongisi bato, akoti kati na masuwa elongo na bayekoli na ye mpe aleki na ngambo ya ebale Galilai. Kuna, Bafalisai, mbala oyo bayei na basangani ya lingomba ya Basadukai, bameki Yesu na kosengaka ye ete alakisa bango elembo ya likolo.
Yesu ayebi ete bazali nde komeka ye, yango wana ayanoli: “Na ntango na mpokwa, bokolobaka ete, ‘Lola ekozala malamu mpo ete likolo ezali motane’, mpe na ntango na ntongo ete, ‘mbula lelo mpo ete likolo ezali motane mpe ezali koinda.’ Boyebi kosolola bilongi na likolo nde bokoki kosolola bilembo na ntango te.”
Na wana, ataleli bango lokola bato mabe mpe bato na ekobo mpe akebisi bango, lokola akebisaki Bafalisai liboso, elembo ata moko te ekopesama na bango, longola bobele elembo na Yona. Na nsima atikaki bango mpe elongo na bayekoli na ye amati na masuwa oyo ezali kokende na Betesaida, na ngambo mosusu ya ebale Galilai. Ntango bamataki, bayekoli bamoni ete bazali se na limpa moko mpamba te babosanaki komema yango.
Kokanisaka lisusu na bokutani na ye elongo na Bafalisai mpe Basadukai, bato na Hérode, Yesu akebisi bayekoli na ye: “Bokeba mpe botala malamu mpo na mfulu na Bafalisai mpe na mfulu na Elode.” Mpo na bayekoli oyo bazali kokanisa ete Yesu azali kolobela ndenge babosanaki limpa, mfulu elimboli na mbala moko mampa, mpe babandi kolobana mpo na likambo yango. Komonaka libunga na bango, Yesu alobi na bango: “Mpo na nini bozali kosololana mpo na likambo na kozanga mampa?”
Mwa moke liboso, mbala mosusu mokolo moko to mikolo mibale mpamba euti koleka, apesaki bato mampa na lolenge ya ekamwiseli. Bayekoli na ye basengelaki koyeba ete Yesu azalaki komibanzabanza mpo na kozanga ya mampa te. “Bozali kokanisa te? Wana ebuki ngai mampa mitano mpo na bato nkoto mitano, bolokoti mitete boni na biteni?”
Bayanoli ete: “Zomi na mibale”.
“Mpe na mampa nsambo mpo na bato nkoto minei bolokoti bikolo boni na biteni?”
Balobi na ye ete: “Nsambo”.
Yesu atuni bango ete: “Naino boyebi ntina te?” Mpe abakisi: “Mpo na nini bokati ntina te ete nazalaki koloba mpo na mampa te? Bokeba mpo na mfulu na Bafalisai mpe na Basadukai.”
Nsima na yango bayekoli basimbaki ntina. Mfulu, eloko moko oyo evimbisaka farine ya mampa, ezalaki liloba moko esalelamaki mbala mingi mpo na kopona libebisi. Sikawa bayekoli basosoli ete Yesu asaleli yango lokola elilingi, ete akebisi bango bakeba na “mateya ya Bafalisai mpe ya Basadukai”, mateya oyo ezali kobebisa. Malako 8:1-21; Matai 15:32 kino 16:12.
◆ Mpo na nini bato bamemaki bitunga minene ya bilei?
◆ Nsima na kotika Dekapole, Yesu akendaki wapi?
◆ Libunga nini bayekoli basalaki mpo na likambo oyo Yesu alobaki na ntina na mfulu?
◆ Yesu alingaki koloba nini mpo na liloba “mfulu ya Bafalisai mpe mfulu ya Basadukai?”