Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/7 nk. 3-4
  • Baanzelu na ntango ya kala mpe na ntango na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baanzelu na ntango ya kala mpe na ntango na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baanzelu engebene mwa mangomba
  • Ondimaka ete baanzelu bazali?
  • Baanzelu bazali banani?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Baanzelu—“Bilimo mpo na mosala ya bolamu ya bato nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Baanzelu bazali kosala nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Ndenge oyo Baanzelu bakoki kosalisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/7 nk. 3-4

Baanzelu na ntango ya kala mpe na ntango na biso

“Na Noele balakisaka bango na bililingi oyo batiaka na nzete, to bililingi oyo bamonaka na bakarte oyo bato batindelanaka​—bazali lokola bana kitoko oyo bazali kobeta miziki, to basimbi epeleli ya moto. Bazali na mapapu mokuse lokola bana ya ndeke. Na mokuse, bazali bonzenga na kotala.”​—The Sunday Denver Post.

“BAANZELU balobelamaka mingi te na biteyelo ya teologi, na biteyelo ya mokolo ya lomingo, mpe batangami ata te na mokanda ya katekisimo, oyo ezali mokanda ya moboko mpo na mateya ya mangomba na Bakatolike na Amerike.”

Mokomi ya makambo na mangomba, Charles Bell amonisi lisusu ete bateolojié mosusu, mingimingi oyo ya mangomba minene ya baprotesta, “bakakatanaka mingi mpe bayebi te soki baanzelu bazali solo.” Engebene Nouvelle Encyclopédie catholique (Angl.), bato na mayele ya ntango na biso balobi ete “esengeli koboya kondima ete baanzelu bazali.”

Kasi na bileko nyonso, bato bazali na makanisi motindo yango te. Na ndakisa, elobami ete na ekeke ya 13 bateolojié oyo bamipesi mpo na koyekola makambo na baanzelu, bamekaki kokanisa likolo “na bomoi, mayele mpe mokano” ya baanzelu. Na boumeli ya bikeke mingi, basambelaki “baanzelu babateli”. Kasi, ndenge tomoni yango, makanisi masili kobongwana.

Kati na Nouvelle Encyclopédie catholique, “bato bakomi komona ete kolobela baanzelu . . . ezali se masolo ya mpamba, masapo mpe masolo ya bana mike oyo ezali solo te”. Na yango, uta katikati na ekeke ya 19, bazalaki lisusu kolobela bango mingi te na makambo ya mangomba. Lelo oyo, bato mingi bazali kotalela baanzelu ete ezali bobele masapo mpe bazali kondima te ete bazali solo.

Baanzelu engebene mwa mangomba

Ata bongo, baanzelu bazali naino na esika na bango kati na mangomba mosusu. Na ndakisa, lingomba ya katolike “ezali kolendisa mondimi mokomoko na kolinga, komemya mpe kosambela baanzelu”. Na yango, lingomba ya katolike esili kokomisa bato misato na esika ya bulee mpe ezali kotalela bango lokola baanzelu: ezali bongo Michel, Gabriel mpe Raphael, nkombo na moto oyo ya misato ebimi se na mikanda ya apokrife, nzokande emonani te kati na mikanda ya Biblia mipemamaki solo.

Kati na Mangomba ya orthodoxe ya Orient, baanzelu bazali na esika monene kati na litanie, lolenge moko ya libondeli oyo ezali na masengi mpe na banzembo ya lisangá. Baanzelu bazali mpe kati na losambo ya islam: kondimela baanzelu ezali elembo na kondima kati na teoloji ya bamusulmans.

Ata bongo, ntembe ezali te ete baoyo bazali kondima ete baanzelu bazali, bazali bobele moke na mikolo na biso.

Ondimaka ete baanzelu bazali?

Na motuna yango, Nouvelle Encyclopédie catholique elobi boye: “Mokemoke . . .na bokoli mpe engengiseli oyo ezalaki koya malembemalembe . . . , elongo na makanisi mazangi moboko masalemi likolo na mateya ya Makomami Mosantu, boyekoli likolo na baanzelu ekolaki, mpe ntango nyonso bingengiseli na yango bizalaki kobakisama, mpe na ndenge yango eyaki kokoma endimeli ya Lingomba.” (Biso nde tolalisi maloba mosusu.) Endimeli na yo mpo na baanzelu ekoya makasi soki oyebi ete kondima na yo esimbami na makanisi mazangi moboko”?

Toyeba ete Lingomba ekabwani mpo na likambo yango. Mpo na oyo etali ntango baanzelu bazalisamaki, Enciclopedia de la Religion Catolica elimboli boye: “Na makanisi ya Basango Bagreke, baanzelu bazalisamaki liboso ya mokili, kasi Basango Baloma balobi ete baanzelu bazalisamaki nsima na mokili. Nzokande, bandimi mingi bazali koloba ete baanzelu bazalisamaki nzela moko na mokili.”

Kotengatenga motindo oyo ezali kotya mobulungano kati na elimo ya bato mpe ezali kotinda bato mingi batika kondima ete baanzelu bazali solo.

Filozofe moko Moyuda na nkombo Philon, alobaki ete baanzelu bazali se “bililingi mpe nguya kati na molongo”. Wana bambula ezalaki koleka, batéolojié batyanaki ntembe mpambampamba na ntina na baanzelu, na ndakisa baanzelu boni bakoki kotelema likolo na nsonge ya ntonga. Na yango, esengeli kokamwisa biso soko lelo oyo bato mingi bazali koboya kondima ete baanzelu bazali?

Nsima na kotalela makanisi nyonso oyo makeseni, mpo na nini te kotalela oyo Biblia yango moko elobi mpo na baanzelu? Yango nde ekopesa biso biyano malamu na mituna oyo: Baanzelu bazali solo? Soko ee, basila kokota na makambo na bato? Mpe likambo eleki ntina ezali ya koyeba soko bazali kosala eloko mpo na bomoi na yo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto