Tya elikya na yo epai na Jéhovah
“Tya elikya na yo epai na Jéhovah mpe batela nzela na ye, akokembisa yo ete osangola mokili; okomona kobeba na bato mabe.”—NZEMBO 37:34.
1, 2. Tokoki koloba nini mpo na mokili mpe mpo na O.N.U.?
LELO oyo bato bakomi na mayele mingi koleka bato ya kala. Na milende oyo basili kosala, bakomi na eleko ya atomike. Nguya oyo ezali kati na atome ezali mingi, mpo na yango bato bakoki kosala makambo mingi mpe ya minene na mokili mobimba. Nzokande, bobele na mayele oyo bakolisi, bakoki mpe kosala mabe mingi na mokili.
2 Nini ezali kosimba bato kino lelo ete bamibomi naino kati na etumba ya nikleere te? Bamosusu bakoki kokanisa ete ezali mpo na O.N.U., oyo mikili 159 misangani na yango. Nzokande, mikili yango, mitambwisami na biyangeli ndenge na ndenge, mizali na boyokani te, mpamba te mokomoko ezali kokanisa ete lolenge ya boyangeli na ye nde eleki. Na yango, kokabwana ezali kati na O.N.U. mpe mikili misangani na yango mizali na lolendo mpe milingi kobatela lipanda na yango. Ezali mpe na mikili oyo bazali kondima lisusu Nzambe te.
3. Kokesena nini ezali na lolenge oyo boklisto ya mokili ezali komonela Nzambe mpe lolenge oyo Nzambe ye moko amiyebanisi?
3 Na kati na mobulu oyo nyonso, tozali kokuta mpe boklisto ya mokili oyo. Yango esalemi na mikili oyo emitangaka ete bandimaka Nzambe mpe Yesu Klisto, Yesu oyo bango basangisaka ye esika moko na “Nzambe Tata” mpe na “elimo mosanto” oyo bakanisaka ete azali moto, banso misato kati na la trinité to bosato bosantu, mpe bango nyonso misato bazali se ndenge moko. Nzokande, Tata na Yesu atindaka mosakoli Yisaya ete akoma maloba oyo, na ntina na ye: “Ngai nazali Jéhovah, yango nkombo na ngai, nakopesa nkembo na ngai epai na mosusu te, kosanzola na ngai epai na bikeko te.” (Yisaya 42:8) Na boumeli ya Lisolo ya bato, Jéhovah to Yahvé (Bible de Jérusalem), amiyebanisi na motindo ya kokamwa.
4. O.N.U. ezali kopengwisa bato na nini?
4 O.N.U. eyebi nkombo ya Nzambe te mpe ekumisi yango te. Ezali kolakisa te epai na mokili, oyo lelo ezali na mpasi mingi koleka liboso, ete batya elikya na bango epai na ye oyo abyangami na nkombo yango. Nzokande ye abyangami “Nzambe na elikya”; ezali ye atyaki moboko ya elikya bobele moko ya makasi oyo bato na ntango na biso bakoki kozala na yango. (Baloma 15:13) Elikya yango elendisi mpe esimbi bato mingi kino lelo.
Elikya epesamaki uta na ebandeli!
5. Ntango nini moboko na elikya etyamaki?
5 Moboko na elikya yango etyamaki uta na ebandeli ya lisolo ya bato; ezalaki mwa ntango moke liboso ete bankoko na biso ya yambo babimisama na efandelo na bango, elanga ya Edene oyo ezaláká kala kuna na Moyen-Orient. Lisolo ya elanga wana to paradis, ekomamaki na hébreu ezali lisapo ya mpamba te soki mpe biyambayamba bikanisami na bato oyo basili kopengwa na losambo ya Mozalisi na bango.—Genese 2:7 kino 3:24.
6. Mpo na nini bato bazalaki na mposa na elikya?
6 Mbula 4 000 na nsima, ntoma Paulo akomaki na kopemama na Nzambe: “Mabe ekotaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekotaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.” (Baloma 5:12) Na mokanda mosusu atangaki nkombo ya moto yango: “Lokola na Adame banso bakokufaka, boye na Klisto banso bakozwa bomoi.” (1 Bakolinti 15:22) Na mokapo ya misato na Evanzile oyo akomaki, monganga Luka apesi molongo ya bankoko ya Yesu kino na Adam. Liboso ete abimisama na elanga ya Edene, Adam ayokaki maloba ya Jéhovah na ntina na elikya oyo apesaki na bato.—Luka 3:23-28.
7. Maloba nini ya mpiko Nzambe apesaki liboso ete Adam akufa?
7 Okolinga koyeba maloba na elikya yango; kasi simba naino liboso ete Jéhovah azali liziba ya elikya uta kalakala. Na ebandeli, Adam azalaki mwana na Nzambe na mabelé, mpe Nzambe apesaki ye nzela ete abota bana. Soki omoni ete mpasi ezali liboso, na ntembe te okoluka kolendisa bakitani na yo, kopesa bango elikya; ezali yango Nzambe asalaki: nsima na ekweli na ye, Adam ayokaki maloba na elikya mpo na bakitani na ye.
8. Maloba na Genese 3:15 matyaki moboko nini mpo na elikya?
8 Elikya nini Nzambe apesaki? Alobaki epai ya “nyoka”, oyo apusaki Adam na kosala lisumu, ete: “Nakotya mpe likunya kati na yo mpe mwasi; kati na libota na yo mpe libota na ye; ye mpe akotuta moto na yo, mpe okoswa litindi na ye.” (Genese 3:14, 15) Tokoki komituna elikya nini ezalaki kati na maloba oyo. Ya liboso, emonisaki ete moto ya “nyoka” ekonyatama.
9. Nani “nyoka” oyo elobelami na Genese 3:14, 15?
9 Na Emoniseli 12:9, tozali kotanga: “Dalagona yango monene abwakami, ye nyoka na kalakala, oyo abyangami Motemeli mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba; abwakami na nse, baanzelu na ye mpe babwakami na ye elongo.” Nyoka oyo ya elanga ya Edene ezali se Satan le Diable, ekelamu mabe ya elimo. Nyoka oyo ya elilingi azali na bokonzi likolo na baanzelu mabe, kasi azali mpe na “libota” awa na mabelé, “libota” yango ekonyatama esika moko na ye.
10. Ndenge nini Yesu amonisaki lisusu nani azali “nyoka”?
10 Komonisaka ete Diable azali se ye wana “nyoka” oyo akweisaki bankoko na biso ya yambo, Yesu Klisto alobaki epai na bakonzi na mangomba na ntango na ye: “Bino bouti na tata na bino, Satana, mpe mokano na bino ezali ete bosala mposa na tata na bino. Ye mobomi na bato longwa na ebandeli; atelemi kati na solo te . . . Wana ekosololaka ye lokuta, azali kosolola makambo na ye moko mpo ete azali mobuki na lokuta mpe tata na yango.” (Yoane 8:44) Yesu abengaki mpe Bafalisai batemeli na ye ete bazali “bana na nyoka”.—Matai 12:34; 23:33.
Elikya ya bomoi
11. Elikya nini epesamaki na Genese 3:15?
11 Elaka oyo Nzambe apesaki ya konyata moto ya nyoka ya elilingi elakisaki elikya ya solo mpe ya kolendisa mpo na libota mobimba ya bato na ntango ezalaki koya. Tokoyeba malamumalamu mpo na nini soki tokotalela ndimbola mosusu ya maloba mayebisami kati na Genese 3:15. “Libota” ya mwasi oyo elobelami awa ezalaki libombami uta bikeke mingi. Nzokande ezalaki polele ete Jéhovah Nzambe akotya likunya soki mpe koyinana kati na “libota” wana eyebanaki naino te mpe nyoka ya elilingi elongo na “libota” na ye oyo ezali kotelemela Nzambe. Ntembe ezalaki te ete “libota” ya “mwasi” ekolonga, mpe kolonga yango etyamaki liboso ya bato lokola elikya. Libota ya bato bazalaki bongo na bantina ya kolikya mpo na koya ya “libota” ya “mwasi”.
12. Eloko mosusu nini eyebisamaki nsima na ntina etali “libota” ya “mwasi”?
12 Nsima na bikeke mingi, Nzambe amonisaki ete “libota” wana ezali nde Mwana na ye bobele moko, atindamaki na mokili mpo na kozala Masiya mpe kopesa bomoi na ye lokola mbeka mpo na kosikola bato. (Genese 22:17, 18; Bagalatia 3:16; 1 Yoane 2:2; Emoniseli 5:9, 10) Ntina wana elikya a ba Témoins de Jéhovah ezali na O.N.U. te, kasi na Molobeli monene ya Jéhovah Nzambe, Yesu Klisto, oyo azali solo na bomoi. Ntembe ezali te ete Klisto azali na bomoi, mpamba te asekwisamaki longwa na bakufi mpe afandaki na loboko mobali ya Jéhovah kuna na likolo. Lokola elobaki yango Paulo, “Soko tozali kolikya na Klisto bobele na bomoi oyo, tozali bato na mawa koleka bato nyonso. Nde solo Klisto asekwi longwa na bakufi, mbuma na liboso na bango balali.” (1 Bakolinti 15:19, 20) Lokola Mosenzeli ezali komonisa yango mbala mingi na lisalisi ya Makomami, Mokonzi Yesu Klisto asili kofanda na kiti na ye ya bokonzi kuna na makolo.—Emoniseli 11:15.
13, 14. Ba Témoins de Jéhovah batii elikya na bango na nani, mpe yango ezali kopusa bango na kosala nini?
13 Elingi koloba te ete Yesu akamati esika ya Jéhovah. Jéhovah azali ntango nyonso ntina na elikya mpo na bato. Nzembo 37:34 ebateli bongo motuya na yango nyonso: “Tya elikya na yo epai na Jéhovah mpe batela nzela na ye, akokembisa yo ete osangola mokili; okomona kobeba na bato mabe.” Na yango, esengeli ete tolanda kotya elikya epai ya Jéhovah mpe koyikisa mpiko na bato ya mabota nyonso ete batika kotya elikya na bibongiseli ya bato.
14 Ezali yango ba Témoins de Jéhovah bazali kosala, kosakolaka nsango malamu ya Bokonzi na mikili 208. Eloko moko te ekoki kopekisa bango mpo na kosala mosala oyo. Biyangeli ya mokili, bilendisami mpe bisungami na mangomba, bazwi lotomo epai na Nzambe te mpo na kotelemela mosala oyo. Tokozala ntango nyonso se ba témoins de Jéhovah mpe tokolanda kolikya epai na ye, lokola David, mobotámá ya Beteleme, oyo akomaki maloba malandi:
15. Elikya nini mokonzi Davidi azalaki na yango epai ya Jéhovah?
15 “Jéhovah azali mobateli na ngai, nakozanga eloko te. Azali kopemisa ngai kati na matiti mobesu, azali kokendisa ngai epai na mai na kimya. Azali kobikisa molimo na ngai. Azali kotambolisa ngai na nzela na boyengebene na ntina na nkombo na ye. Ata natamboli na libulu na molili na kufa, nakobanga mabe te; mpamba te yo ozali na ngai elongo, mpango na yo mpe nzete na yo makasi ezali kobondisa ngai. Otandi mesa liboso na ngai na miso na bayini na ngai; opakoli moto na ngai na mafuta mpe kopo na ngai etondi maa. Solo malamu mpe ngolu ekokenda na ngai mikolo nyonso na bomoi na ngai; mpe ngai nakofanda na ndako na Jéhovah kino nsuka na mikolo na ngai.”—Nzembo 23.
16. Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu azalaki na elikya moko na Davidi?
16 Mokonzi David azalaki mobateli na mpate na elimo oyo Jéhovah aponaki mpo na kobatela mabota na Yisraele na kala mpe asalaki mosala monene mpo ete Yelusaleme ekoma kapitale ya Yisraele, epai wana mwana na ye Salomo ayangelaki mbula 40. Yesu Klisto abengamaki mpe “mwana na Davidi”. (Luka 1:32; 18:39; 20:41) Lokola David atyaki elikya epai ya Jéhovah Nzambe, bobele bongo mokitani na ye Yesu Klisto ntango azalaki awa na nse asalaki se ndenge yango.
17. Elembo nini emonisi ete Yesu azalaki kolikya epai ya Jéhovah?
17 Elembo emonisi ete mokitani monene ya David, Yesu Klisto, alandaki toli na Nzembo 37:34 epesameli biso na maloba oyo alobaki yango ntango azalaki likolo na nzete ya mpasi liboso ete akufa: “Tata, nazali kotika elimo na ngai na maboko na yo.” (Luka 23:46) Atangaki, mpe akokisaki, maloba oyo David alobaki na Nzambe kati na Nzembo 31:5: “Nakotya elimo na ngai na maboko na yo.” Elikya ya mokonzi Davidi ebebaki mpamba te; bobele bongo elikya ya Yesu ezalaki mpamba te: asekwisamaki na mokolo ya misato; mikolo ntuku minei na nsima azongaki epai ya Tata na ye na likolo; mpe na nsuka na ntango na Bapakano, na 1914, Jéhovah atombolaki ye mpo azala Mokonzi ya mabelé.
Elikya mpo na ntango na biso
18. Mpo na nini ebongi ete bato bazala na elikya lelo?
18 Lelo oyo, wana esili biso kokoma na mibu 6 013 uta ebandeli ya mokili, elikya nini bato bakoki kozala na yango? Lokola bikeke soki 19 bisili koleka uta Biblia esilaki kokomama mpe lokola Davidi akomaki maloba na Nzembo 37:34 uta kalaka, motuna oyo ezali na ntina.
19. Jéhovah asalaki nini mpo na Yesu, mpe yango epesi biso elikya nini?
19 Jéhovah, Nzambe Mozwi-na-Nguya-nyonso oyo asekwisaki Yesu longwa na bakufi, abongiselaki Mwana na ye esika eleki nyonso oyo bato bakoki kokanisa. Asekwisaki Mwana na ye bobele moko mpe atombolaki ye kino kotya ye na loboko na ye ya mobali kati na makolo; yango epesi biso ntina mosusu ya kolikya epai ya Jéhovah, kozanga ntembe, mpamba te apesi biso likoki ya kozala na bomoi ya seko kati na bolamu. Lokola ekomaki yango ntoma Paulo na kopemama na Nzambe, “tobiki na elikya oyo.”—Baloma 8:24.
20. Mpo na nini tokoki koloba ete Jéhovah azali ntango nyonso “Nzambe ya elikya”?
20 Ntoma Paulo abakisi lisusu maloba oyo: “Kasi elikya na eloko esili komonana ezali elikya solo te. Nani akolikya mpo na yango ezali ye komona? Nde soko tokolikya mpo na yango ezali biso komona te, tozali (kozela) yango na mpiko.” (Baloma 8:24, 25) Elikya oyo ya ebandeli ezali ntango nyonso na bomoi mpe mosika te ekokokisama nyonso likolo na libota ya bato. (2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:4, 5) Lokola elikya yango epesami na bato nyonso, ebongi ete eyebisama epai ya banso; ezali wana likanisi na “Nzambe na elikya”.
21, 22. Mabota bakosala nini na mikolo mizali koya?
21 Tozali kobika na eleko oyo Nzambe aponaki mpo na kokokisa likanisi na ye. Mikili misusu kati na O.N.U. basili kozwa mayele ya kosalela atome. Nzokande, mikonzi na bango baboi kotya elikya epai na Ye Oyo aleki bato nyonso na mayele, mpo na kosilisa mikakatano ya bato awa na mokili.—Tala Genese 11:6.
22 Mangomba ya mokili oyo eumeli bikeke mingi, ezali mpe koluka komibatela; ezali mpo ete ekomi na eleko moko ya mpasi mingi. Elimo ya bokaboli oyo yango ezali kopesa na mokili esengeli kozimama. Biblia emonisi ete mikonzi na politike bakolakisa bokonzi na bango likolo na mangomba mpe bakobwaka yango. Oyo esengeli kokamwisa biso te, mpamba te na boumeli ya bikeke, mangomba oyo nyonso balukaki koprofite na biloko nyonso ya mokili. Lokola mabota bakozwa mpasi te nsima na koboma mangomba, bakokanisa ete Nzambe azali te oyo bato bakoki kosambela mpe kosalela. Bisakweli biyebisi ete ntango yango bakobalukela batemwe ya Nzambe. Mabota bakokanisa ete bakoki kosukisa makambo nyonso ya Nzambe awa na mokili na kotyaka motema ete bakozwa elonga ezangi mpasi likolo na ba Témoins de Jéhovah.—Emoniseli 17:12-17; Ezekiele 38:10-23.
23, 24. Jéhovah akosala nini ntango mabota bakobundisa libota na ye?
23 Nzokande mabota bakopola na nsoni wana ekokwea bango na nse, lokola ebongi na baoyo nyonso bameki kobundisa Jéhovah na bibele, ye oyo azali molongi na bitumba na ye nyonso. Na yango, ekomonisama ete na boumeli ya bambula oyo nyonso basalelaki nde mikano ya motemeli monene ya Nzambe ya solo bobele moko; Biblia ebyangi motemeli yango “nyoka”, Satana, “Nzambe na biloko na ntango oyo”.—2 Bakolinti 4:4.
24 Oyo nde nsoni ekozala epai ya mabota! Lolendo na bango ekotumola nkanda ya Nzambe Mozalisi ya likolo mpe ya mabelé. Tala oyo Jéhovah alobaki epai na bato bikelamu mikemike na miso na ye: “Mpo ete makanisi na ngai mazali makanisi na bino te mpe nzela na bino ezali nzela na ngai te. Jéhovah alobi bongo. Mpamba te lokola lola eleki mokili likolo, boye nzela na ngai eleki nzela na bino mpe makanisi na ngai maleki makanisi na bino. Mpo ete lokola mbula mpe mbula mpembe ekolongwa na lola mpe ekozonga kuna te kasi ekopolisa mabelé, ete ebimisa biloko na yango mpe etoisa yango, kopesaka mboto epai na mokoni mpe kwanga epai na molei, boye na liloba oyo ekobima na monoko na ngai; ekozonga epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.”—Yisaya 55:8-11.
25. Mpo na nini tokoki kotalela Jéhovah lokola “Nzambe na elikya”?
25 Jéhovah apesaki moto mayoki mpo ete azalisaki ye na elilingi na ye; elingi koloba ete ye moko azali na mayoki yango mingi. “Jéhovah na bibele alobi boye: Nsima na nkembo asili kotinda ngai epai na mabota baoyo bapunzaki bino; mpamba te ye oyo asimbi bino azali kosimba kati na liso na ngai.” (Zakari 2:8) Na yango, esengeli ete ba Témoins de Jéhovah batya elikya na bango na Nzambe; mpe bakoyoka nsoni mpo na yango te mpamba te Jéhovah akomonisa nguya na ye monene mpe bokonzi na ye na molongo mobimba. Jéhovah akomonisa mpo na libela ete azali Nzambe Oyo-Aleki-likolo, Mozwi-na-Nguya-nyonso, Oyo azali seko na seko, mpe bilikya ya bikelamu na ye na mabelé mpe na likolo ekozala ya mpamba te. Aleluya!—Nzembo 150:6.
Bozongeli
◻ Mpo na nini elikya ya mabota ezali solo te?
◻ Kati na Genese 3:15, Nzambe atyaki moboko ya elikya nini?
◻ Ndenge nini Yesu atalelaki toli oyo ezwami na Nzembo 37:37?
◻ Bantina nini tozali na yango lelo oyo ya kozala na elikya?
[Elilingi na lokasa 10]
Lokola bampate balandaka mobateli na bango, bobele bongo David azalaki kolikya epai na Jéhovah
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.