Tokumisa Nzambe na elikya
“Jéhovah alobi ete. . . . Baoyo bakokumisa ngai, ngai nakokumisa bango; nde baoyo bakotiola ngai, ngai nakotanga bango mpamba.”—1 SAMWELE 2:30.
1. Mpo na nini tosengeli kokumisa Jéhovah? (1 Timote 1:17; Emoniseli 4:11)
NA KOTALELA bilikya bipesameli biso na Biblia, ebongi solo ete tokumisa “Nzambe na elikya”, “Nzambe oyo akopesaka elikya”. (Baloma 15:13) Mpo na ntina nini? Ndenge nini tokoki kokumisa Mozalisi monene ya molongo mobimba, biso baoyo tozali bato bazangi kokoka mpe mikemike liboso na ye? Mpe ye, akokumisa biso solo?
2. Ndakisa nini Yesu atikelaki biso mpo na oyo etali kokumisa Nzambe?
2 Tokoki kozwa liteya na ndakisa oyo Yesu atikelaki biso. Ntembe ezali te ete Yesu akumisaki ntango nyonso Tata na ye. (Yoane 5:23; 12:28; 15:8). Yango wana, akweisaki Bafalisai mpe akomeli oyo ‘bakumisaki Nzambe bobele na bibebu, kasi mitema na bango mizalaki mosika na ye’. Awa tomoni ete soki bato yango bazalaki kokumisa Nzambe te, ezalaki mpo ete misala na bango mpe mikano na bango ezalaki mabe. (Matai 15:7-9) Nzokande mpo na Klisto, tokoki koloba ete kokumisa oyo azalaki kokumisa Nzambe ezalaki mpo na elikya oyo azalaki na yango? Epai mosusu, ndenge nini Jéhovah ayambaki lokumu oyo?
3. Ndenge nini toyebi ete Yesu azalaki kolikya epai ya Jéhovah?
3 Yesu asimbaki na motema na ye maloba na Davidi makomami na Nzembo 16:10: “Mpo ete okotika molimo na ngai na esika na bakufi te; okotika (mosembwi) na yo komona kopola te.” Kobatelaka elikya ya lisekwa, Yesu Klisto apesaki maloba oyo ya ntina mingi epai na mosali mabe moko oyo abakisamaki na nzete pembeni na ye: “Nalobi na yo solo lelo ete: Okozala na ngai elongo kati na Paladiso.” (Luka 23:39-43) Mosali na mabe akufaki nsima na mwa ntango moke. Na yango, azwaki likoki te ya komona lisekwa ya Yesu, kokokisama na elikya oyo Yesu azalaki na yango ya kolamuka longwa na bakufi. Nzokande, motatoli moko oyo amonaki na miso alobaki: “Yesu oyo, Nzambe asekwisi ye, mpe biso banso tozali batatoli na likambo yango.” (Misala 2:31, 32) Ee, lisekwa ya Yesu ezali likambo ya solo.
4. Lokumu nini ebongaki na Yesu? (Emoniseli 5:12)
4 Mingi kati na bato oyo Yesu apesaki litatoli bayebaki ete abongi kokumisama, kozwa limemya mingi. (Luka 4:15; 19:36-38; 2 Petelo 1:17, 18). Na nsima babomaki ye lokola mosali na mabe. Kufa yango ebongolaki etelemelo ya Yesu? Te, mpamba te andimamaki ntango nyonso na Nzambe oyo ye atyaki elikya epai na ye, mpe Jéhovah azongisaki ye na bomoi. Soki “Nzambe na elikya” asekwisaki Mwana na ye mpe apesaki ye kozanga kokufa kati na makolo, ezali mpo ete azalaki ntango nyonso kokumisa ye. Paulo akomaki: “Kasi tozali kotala Yesu . . . alati motole na nkembo mpe lokumu ete aletela bato nyonso kufa na ntina na ngolu na Nzambe.”—Baebele 2:7, 9; Bafilipi 2:9-11.
5. Motindo nini Yesu akumisamaki koleka, mpe na nini yango ekumisaki lisusu Jéhovah koleka?
5 Yesu akumisaki Jéhovah, mpe amonisaki motindo nini Tata na ye akumisaki ye. Nsima na kosekwa na ye, amonanaki na bayekoli na ye, mpe alobaki na bango: “Bokonzi nyonso esili kopesama na ngai na likolo mpe na se. Boye bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na elimo santu . . . Mpe tala, ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka na ekeke.” (Matai 28:18-20) Na yango, Tata akumisaki Mwana na ye na motindo oyo asalaki yango liboso te: atombolaki ye mpe apesaki ye nguya koleka bato nyonso. Nguya yango esengeli kosalelama mpo na bolamu ya bato bazali kokumisa Jéhovah, lokola Yesu azali kosala yango; bato yango bazali na mosala bazali kosala mpo na kokumisa Mozalisi na bango. Na yango, tokoki kosukisa ete bato bazangi kokoka lokola biso, tokoki kokumisa Tata mpe ye akoki kokumisa biso?
Bato bakumisaki Nzambe
6. Ezali malamu koluka lokumu? Nzokande, likama nini tosengeli kokeba na yango? (Luka 14:10)
6 Bato mingi bazali na mposa ya kokumisa Nzambe te; bazali koluka nkembo mpe lokumu na bango moko. Ya solo, moto nyonso alingaka ete bamemya ye mpe kozala na lokumu malamu na miso ya bamosusu. (1 Timote 3:2, 13; 5:17; Misala 28:10) Nzokande, bato mosusu balukaka lokumu mingi na koleka ndelo. Bato mingi balukaka ete nkombo na bango etambola na minoko ya bato nyonso mpe bazali kosala nyonso ete babatela esika na bango.
7. Mpo na nini lokumu oyo bato bukaki kokumisa biso ezali na ndelo?
7 Soki totali malamu, tokomona ete ata kokumisa ndenge nini oyo bato bakoki kokumisa biso, nyonso ezali se eloko ya ntango moke, mpo ete ekolimwaka noki. Ya solo, ezali na mwa bato minene oyo nsima na kufa na bango bato bakanisaki bango mwa bambula, nzokande ntalo monene ya bato bakufa bazali lisusu kati na makanisi ya bato ya bomoi te. Bato boni bayebi nani azalaki mokonzi na mokili na bango esili koleka mbula nkama? Na solo, ata moto boye azalaki to azalaki te na mokili, eloko moko ebongwani te na nzela oyo mokili ezali kolanda: azalaki bobele mbuma moke ya zelo kati na emekeli ya ntango, mwa litanga moke ya mai kati na ebale monene ya bomoi. Mpe ata moto motindo yango akumisami nsima na kufa na ye, akoyeba mpe eloko moko te. (Yobo 14:21; 2 Ntango 32:33; Mosakoli 9:5; Nzembo 49:12, 20) Eloko bobele moko ezali na motuya, ezali ete ozala na elikya oyo Nzambe azali kopesa, kokumisa Mozalisi mpo ete ye mpe akumisa biso. Tozali na elembeteli na yango na makambo makomelaki bato mibale na Yisraele ya kala, bato yango bazalaki na bomoi na eleko moko.
8. Libunga nini Eli asalaki na ntina etali lokumu oyo esengeli kopesama na Jéhovah?
8 Moko na bato yango nkombo na ye Eli. Na boumeli ya mibu 40 asalaki mosala na nganga monene na Nzambe mpe azwaki libaku malamu ya kosambisa Yisraele. (1 Samwele 1:3, 9; 4:18) Nzokande, nsima na bambula, akomaki na bolembu mpo na bana na ye Hofini mpe Finehase. Bana yango babebisaki mosala na bango ya nganga-nzambe mpo ete bazalaki koyiba ndambo na mabonza mpe bazalaki kosala pite na basi oyo bazalaki kosala mosala na hema ya Jéhovah. Eli alobaki na bango bobele likololikolo, yango wana Nzambe alobaki na ye ete “ozali kokumisa bana na yo koleka Ngai”. Jéhovah alakaki ete akoumelisa bonganga ya libota ya Arona, kasi na ndako na Eli moto moko te akoponama lisusu mpo na kosala mosala ya nganga monene. Mpo na nini? Jéhovah alimboli: “Mpo ete baoyo bakokumisa ngai, ngai nakokumisa bango; nde baoyo bakotiola ngai, ngai nakotanga bango mpamba.”—1 Samwele 2:12-17, 29-36; 3:12-14.
9. Libaku nini Samwele azwaki ya kokumisa Jéhovah?
9 Moto ya mibale nde Samwele; ye akesenaki mpenza na Eli. Na ntembe te, oyebi ete uta bolenge na ye mpenza, baboti na ye bamemaki ye na hema ya Jéhovah, oyo ezalaki na mboka Silo. Mokolo moko na butu, Jéhovah alobaki na Samwele, ntango yango azalaki naino mwana. Okosepela kotanga lisolo ya likambo yango ndenge elekaki; ezali kati na 1 Samwele 3:1-4. Wana ezali yo kotanga lisolo yango, kanisa ete mwana oyo alamusami na makelele ya nkake te, kasi na mongongo moko ya nse, mpe akanisaki ete ezali mongongo ya mpaka Eli. Na nsima kanisa kokakatana ezwaki elenge Samwele wana esengelaki na ye koyebisa na mobange oyo ete Nzambe akamati mokano ya kopesa etumbu na ndako na ye. Samwele asalaki yango, mpe akumisaki Nzambe na botosi na ye.—1 Samwele 3:18, 19.
10. Ndenge nini Nzambe akumisaki Samwele?
10 Na boumeli ya mbula mingi, Samwele akumisaki Nzambe na mosala na ye ya profete, mpe, lokola emonisi yango 1 Samwele 7:7-13, Nzambe akumisaki Samwele. Mpamba te na libaku oyo Nzambe ayanolaki mbala moko na libondeli ya Samwele oyo asengaki ye lisalisi mpo na kobebisa Bafilistia. Ekozala lokumu te soki Nzambe ayanoli yo boye? Atako bana na ye balandaki matambe na ye te, Samwele abwakamaki na Nzambe te, lokola ezalaki bongo mpo na Eli. Na ntembe te ezalaki boye mpo ete asalaki nyonso ekoki na ye mpo na kokumisa Nzambe: na ndakisa, emonisami na likambo oyo ete asepelaki te ntango bato basengaki ete apesa bango mokonzi oyo amonanaka (1 Samwele 8:6, 7) Nzambe atindaki Samwele kopakola Saulo, mpe na nsima kopakola David. Na kufa ya Samwele, Bayisraele balelaki ye mingi mpe ezalaki lokumu mpo na ye. Nzambe akumisaki ye lisusu koleka mpo ete apesaki ye esika kati na Biblia, na molongo ya bandimi ya kala oyo bakosekwa mpe kozwa bolamu epesameli bango; (Nzembo 99:6; Yilimia 15:1; Baebele 11:6, 16, 32, 39, 40) Makambo touti koloba mamonisi ete ye oyo akokumisa “Nzambe na elikya” akozwa bolamu mingi.
Okokumisa “Nzambe na elikya”?
11, 12. Tokoki koloba boni mpo na lokumu oyo tosengeli kokumisa Nzambe, mpe ndenge nini tokoki kokumisa Mozalisi?
11 Ndakisa ya Yesu mpe ya Samwele emonisi ete bato bakoki komityela mokano ya liboso ete bakumisa “Nzambe na elikya”. Emonisi lisusu ete soki biso tokomekola bango, Nzambe mpe akokumisa biso. Nzokande, eloko nini tosengeli kosala mpo tokoka kondimama epai na Nzambe, tokumisama na ye mpe tozwa litomba na elikya epesameli biso na Biblia?
12 Tosengeli komemya Nzambe mpe kobanga ye ete tosala eloko moko te oyo ekozanga kosepelisa ye. (Malaki 1:6) Ezali mpasi te mpo na kondima etinda oyo, kasi tomikundola likambo ya bana ya Eli. Soki batunaki bango motuna oyo: ‘Bolingi kokumisa Nzambe mpe kobanga ye?’, na ntembe te mbele bayanolaki ete ee. Likambo ya mpasi ezali ya komonisa kati na misala ya mokolo na mokolo mposa na biso ya kokumisa Nzambe mpe kobanga ye.
13. Limbola likanisi oyo ete mposa na biso ya kokumisa Nzambe mpe kobanga ye ekoki kosalisa biso.
13 Soki tomekami koyiba to kosala ekobo, ata toyebi ete moto akomona biso te, nzokande mposa na biso ya kokumisa Nzambe ekopekisa biso kosala yango. Tosengeli ntango nyonso kobatela kati na elimo na biso likanisi oyo: ‘Ata moto amoni ngai te, nzokande na kosalaka bongo, nazali kosala lisumu mpe nazali koyokisa nsoni epai na “Nzambe na elikya” oyo ngai namemi nkombo na ye.’ Mpe ata ndenge nini, mabe yango ekobombama libela te, motindo moko na mabe ya bana ya Eli ebombamaki te; ezali yango emonisami na maloba ya ntoma Paulo na ntina etali “lisambisi na sembo na Nzambe”: “Akopesa moto na moto libonza likokoka na misala na ye. Na baoyo bakolukaka nkembo na etingya mpo na kosalaka malamu, akopesa bomoi na seko. Kasi na bango bakowelana mpe bakoboya kotosa sembo nde bakotosa bobele makambo mabe, nkanda mpe nkele makasi ekoyela bango.”—Baloma 2:5-8.
14. Motindo nini lisusu tokoki kokumisa Nzambe, mpe motuna nini tokoki komituna?
14 Nzokande Paulo azali koyikisa biso mpiko ete tosangana na “mosala moko malamu”, oyo ezali kokumisa Nzambe, oyo mpe ekozwela biso ‘nkembo mpe lokumu’. Mosala monene oyo tokoki kosala lelo ezali oyo Yesu atindaki, engebene Matai 28:19, 20: ‘Bozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango mpe kolakisa bango batosa nyonso esili ngai kolaka bino.’ Na mabelé mobimba, bamilio na ba Témoins de Jéhovah bazali kotya molende nyonso kati na mosala oyo ya kosakola mpe ya koteya oyo ezali kokumisa Nzambe. Mingi bazali kosakola mikolo nyonso mpe bazali bongo bapionniers mbula mobimba, to na boumeli ya mikolo na bango ya bopemi na kelasi to na mosala ya mosuni. Na yango, moko na moko kati na biso akoki komituna na ntina na kosangana na ye na mosala oyo. Na ndakisa, tokoki komituna motuna oyo: ‘Nazali solo kokumisa “Nzambe na elikya” na kosanganaka na molende na ngai nyonso na mosala ya kosakola?’
15. Nini esili kokomela baklisto mosusu mpo na oyo etali lokumu bazalaki kopesa na Jéhovah na nzela na mosala ya kosakola?
15 Baklisto mosusu, basakoli ya molende uta mbula mingi, basili kolembisa mokemoke milende na bango, mpe lelo oyo bazali kosangana bobele parazare na mosala oyo ya ntina mingi etali kozalisa bayekoli. Awa tozali kolobela te mpo na bandeko oyo bakomi na bokono to bakomi mibange mpe na ntina yango mosala na bango ekiti. Tozali nde kolobela Batemwe ya mbula nyonso. Paulo mpe atangaki mbula te, wana epesaki ye toli na baklisto ete ‘balemba’ te. Mpamba te, soki totiki mbula pembeni, likambo ezali boye ete kosangana poso na poso na mosala ya kosakola ezali kosenga milende. Lokola ekokaki kosalema na mikolo na Paulo, bamoko bazali lelo koloba ete: ‘Ngai nasali mingi na boumeli ya ebele ya bambula; sika ekomi ngala ya bandeko ya sika ete baboma nzoto na mosala.—Bagalatia 6:9; Baebele 12:3.
16. Soki tomitaleli mpo na oyo etali mosala na biso ya kosakola, bolamu nini tokoki kozwa na yango?
16 Ya solo, likanisi ya boye ezali na bandeko mingi te, kasi ntango mosusu okoki komituna: ‘Boni mpo na ngai, likanisi ya boye ezali koyela ngai? Moto na ngai na mosala ya kosakola ezali ndenge nazalaka na yango kala?’ Ata tosili kokitisa mosala na biso to te, tosengeli kobosana te ete “Nzambe na elikya” alaki kopesa “nkembo, lokumu mpe kimya epai na moto na moto oyo akosalaka malamu.” (Baloma 2:10 MN) Verbe greke oyo Paulo asaleli awa elimboli “kosala eloko, kobota mbuma, kokokisa”. Tosengeli te kokokana na Bafalisai mpe na bakomeli, oyo bazalaki kokumisa Nzambe bobele na bibebu. (Malako 7:6; Emoniseli 2:10) Mpo na biso, ntango motema na biso ezali kopusa biso na kosangana na mosala ya kosakola, tozali komonisa na wana, na miso na biso moko mpe na miso ya bazalani, ete tozali na elikya ya solo. Tozali kokumisa Mozalisi na biso, Mopesi na bomoi na biso, mpe ye akoki kokumisa biso, sikawa mpe libela na libela.—Luka 10:1, 2, 17-20.
Na biloko na biso ya motuya
17, 18. Na motindo nini lisusu tokoki kokumisa Nzambe, mpe mpo na nini tosengeli kokakatana te mpo na kosala yango?
17 Masese 3:9 elakisi biso lolenge mosusu ya kokumisa “Nzambe na elikya”: “Kumisa Jéhovah na biloko na yo, mpe na mbuma na liboso na bozwi na yo nyonso.” Libongoli ya Spurell elobi boye mpo na eteni oyo: “Kumisa Jéhovah na bozwi na yo mpe na biloko bileki malamu oyo bizali na yo.”—Traduction de l’Ancien Testament d’apres l’hébreu original (angl.).
18 Na mokili, bakonzi mosusu ya mangomba bayebani mpo na lokoso na bango mpe bozwi na bango; yango wana bato mingi bazali kokakatana mpo na kopesa mabonza na Mangomba. Mpamba te, mokano ya mangomba mosusu ezali se mpo ya koluka bozwi. (Emoniseli 18:4-8) Nzokande, ezaleli oyo mabe ya bakonzi na mangomba ya mokili ekoki te ete ebebisa motuya ya mokapo oyo ya Masese 3:9. Na yango, ndenge nini biso tokoki kolanda toli oyo epemami na Nzambe mpe kosalela “biloko na biso ya motuya” to “bozwi” na biso mpo na kokumisa Jéhovah “Nzambe na elikya”?
19. Monisa motindo nini bamoko basalelaki Masese 3:9.
19 Lokola motuya na bato bazali kondima nsango ya Bokonzi ezali kobakisama, ba Témoins de Jéhovah bazali koyeisa minene bisika na bango ya makita to mpe bazali kotonga mosusu. Yango ezali libaku malamu ya ‘kokumisa Jéhovah na bozwi na biso’. Bilenge mingi mpe mikolo basili kozwa ekateli na bolingo na bango moko ete bapesa makabo masengeli mpo na kotonga bisika ya makita; mpo na kotosa ekateli motindo oyo na bosembo nyonso, esengeli ntango mosusu komityela disipline mpe ntango mosusu kotika naino biloko mosusu to makambo mosusu oyo olingaka, mingimingi soki mosala yango ya kotonga eumeli mikolo mingi. (2 Bakolinti 9:6, 7) Nde ata bongo, ezali solo kokumisa Jéhovah soki tokosalela biloko na biso ya motuya na motindo oyo, mpamba te ba Salles du Royaume ezali bisika epai baklisto basambelaka ye mpe epai kuna, na lisangana elongo na bato basepeli na solo, bazali kozwa boyebi na Nzambe. Maloba na Yesu makomami na Matai 6:3, 4 mapesi biso elikya ete Nzambe akokumisa baoyo bazali kokumisa ye bongo.
20. (a) Mpo na nini ezali malamu tomitalela soki tolingi kosalela Masese 3:9? (b) Mituna nini tokoki komituna?
20 Kasi tosengeli kokeba! Yesu alobaki ete Bafalisai mpe bakomeli balukaki kokumisa Nzambe te. Bazalaki nde koluka kozwa litomba bango moko na bozwi na bango. Yango wana toli oyo ya Matai 15:4-8 ezali kopusa biso ete tomitalela biso moko mpo na komona motindo nini ‘tozali kokumisa Jéhovah na biloko na biso ya motuya’. (Yilimia 17:9, 10) Na ndakisa, soki moklisto moko azali na mombongo mpe mombongo na ye ebengeli ye, akokanisa ntango mosusu ete ebongi alanda nzela yango mpo na kozwa mbongo mingi. Akoki koloba ete: ‘Bamosusu bakoti na mosala ya pionnier to bakei na bamboka mosusu mpo na kosalela Jéhovah, epai kuna mposa ya basakoli ezali naino mingi. Kasi mpo na ngai, lolenge na ngai ya kosalela Nzambe ezali boye ete naluka kozwa mosolo mingi, mpo nakoka kopesaka mabonza minene.’ Makabo oyo moklisto motindo oyo azali kopesa mazali mbala mosusu na motuya mingi, kasi ekozala malamu ete amituna: ‘Motindo na bomoi na ngai ezali komonisa ete, soki nazali na mposa ya kozwa mosolo mingi, ezali libosoliboso mpo na kosalela mbongo na ngai mpo na lokumu ya Nzambe?’ (Luka 12:16-19; tala Malako 12:41-44). To lisusu: ‘Nakoki kobongisa makambo na ngai mpe misala na ngai mpo na kobakisa kosangana na ngai na mosala eleki ntina oyo ezali kosalama na mikolo na biso: kosakolama na nsango malamu?’ Ya solo, ata makambo na biso mazali ndenge nini, tokoki kotalela misala na biso mpe mikano na biso, mpe komituna: ‘Ndenge nini nakoki kokumisa malamumalamu Ye’ oyo apesaki ngai bomoi, “Nzambe na elikya”?
21. Esengo nini ezali liboso na biso soki tokokumisa Jéhovah uta sikawa?
21 Jéhovah akoyokisa biso mawa te. Esengo nini soki, sikawa mpe na ntango ezali koya, akoki koloba na ntina na biso lokola alobaka mpo na Yisraele ya sembo ete: “Mpo ete ozali na motuya na miso na ngai, okumisami mpe nalingi yo”! (Yisaya 43:4) Jéhovah alaki ‘bomoi ya seko epai na baoyo bazali koluka nkembo mpe lokumu’, na baoyo bazali koyika mpiko “na mosala moko malamu”. Ya solo, azali “Nzambe na elikya”!
Bozongeli
◻ Mpo na oyo etali lokumu oyo bato basengeli kokumisa Jéhovah, tokoki koyekola nini na ndakisa oyo Yesu atikelaki biso?
◻ Mpo na oyo etali kokumisa Nzambe, likeseni nini ezali kati na etamboli ya Eli mpe etamboli ya Samwele?
◻ Na motindo nini tokoki kokumisa Nzambe koleka, mpe okoki kozwa nini epai na ye?
◻ Elikya nini ezali liboso na bato oyo bazali koluka kokumisa “Nzambe na elikya”?