Tokumisa bandeko na biso
‘Na bondeko oyo ezangi bokosi, bolinganaka na mozindo, na motema moko.—1 PETELO 1:2.
1. Eloko nini endimisaki bato mingi ete ba Témoins de Jéhovah bazali kati na boklisto ya solo?
BOLINGO ezali elembo ya boklisto ya solo. Ezali yango Yesu alobelaki ntango aliaki mpo na mbala ya nsuka elongo na bantoma na ye, na kolobaka ete: “Nazali kopesa bino lilako na sika ete; bolinganaka; bolinganaka lokola ngai nalingi bino. Na bongo bato banso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soki bozalani na bolingo.” (Yoane 13:34, 35) Bato mingi bandimi mpenza ete ba Témoins de Jéhovah bazali kosalela boklisto ya solo, wana ezali bango koyangana na likita oyo esalami kati na Salle du Royaume to na assemblée. Kuna bamonaki bolingo, mpe yango endimisaki bango ete bazalaki kati na bayekoli ya solo ya Klisto.
2. Ntoma Paulo alobaki nini mpo na bolingo, elembo oyo emonisaka baklisto ya solo?
2 Biso banso tosepeli na komona ete elembo yango ezali komonana kati na libota na Jéhovah lelo. Ata bongo, lokola baklisto ya liboso, toyebi ete tosengeli ntango nyonso koluka komonisa na balolenge mosusu ete tozali kokumisa bandeko na biso. Paulo akomelaki lisangá na Tesalonike ete: “Tika ete Nkolo akolisa bino mpe afulukisa bolingo oyo bozali na yango bamoko epai na bamosusu? (1 Batesalonike 3:12, M.N.) Ndenge nini tokoki kosala na bolingo oyo tozali na yango bamoko epai na bamosusu?
Bolingo mpe bondeko
3. Lokola ntoma Petelo amonisi yango, longola likambo ya kozala na bomoi ya mpeto, eloko nini baklisto basengeli kosala?
3 Kati na mokanda moko oyo akomelaki masangá nyonso ya Asie Mineure, ntoma Petelo akomaki: “Awa esili bino kopetola milimo [bomoi na bino] na nzela na kotosa makambo na solo,-mpe yango ebimisi bondeko [philadelphia] oyo ezangi bokosi,-bolinganaka [verbe agapaô] na mozindo, na motema moko.” (1 Petelo 1:22, M.N.) Na maloba oyo, Petelo amonisi ete tosengeli bobele te kopetola bomoi na biso. Botosi na biso mpo na makambo na solo, kozanga kobosana mobeko na sika, esengeli kotinda biso tozala na bondeko oyo ezangi bokosi mpe bolingo mozindo kati na biso.
4. Mituna nini tosengeli komituna mpe Yesu alobaki nini mpo na yango?
4 Tozali na momeseno ya kolinga to kokumisa bobele bandeko oyo tosepelaka na bango? Tozali kosepela kokabela bango, kozipa miso mpo na mabunga na bango, nzokande tozali komona nokinoki mabunga ya baoyo tomeseni na bango te? Yesu alobaki: “Soki bokolinga [Verbe agapaô] bobele baoyo bakolingaka bino, bozali na libonza nini? Bakongoli na mpako bakosalaka bongo te?”—Matai 5:46.
5. Molimboli moko na Biblia asalaki bokeseni nini kati na liloba ya greke oyo ebongolami na “bolingo” mpe oyo ebongolami na “bondeko”?
5 Kati na buku na ye Maloba ya Kondimana na Sika (Angl.), professeur William Barclay alobi mpo na liloba ya greke oyo ebongolami na “bondeko” mpe oyo ebongolami na “bolingo” ete: “Maloba yango [philia, oyo elimboli “bondeko”, mpe phileo, verbe oyo esangani na yango] matondi na móto. Malimboli kozala na limemya epai na bandeko . . . Maloba mabongolami na bolingo, oyo masalelamaka mingi kati na K[ondimana] ya S[ika] mazali agapê nkombo mpe agapanân verbe. . . Philia ezalaki liloba moko kitoko, kasi na ntembe te elakisaki boyokani ya móto, ya penepene mpenza mpe ya bondeko. . . . Agapê nde etali elimo; ezali bobele te liyoki oyo ebotami yango moko na motema, kasi ezali likambo moto ye mpenza aponi mpo na kosalela. Agapê ekangami libosoliboso na mokano. Ezali komonisa etumba oyo olongi, bolongi mpe kokokisama ya likambo na ye. Ezali petee te mpo moto alinga banguna na ye. Kolinga banguna, ezali kolonga mayoki nyonso mpe bizaleli oyo tobotamá na yango. Na yango, agapê . . elakisi likoki ya kolinga baoyo bakangami na yo soki moke te, kolinga bato oyo bazali kosepelisa biso te.
6. (a) Mituna minene nini esengeli ete moto na moto amituna? (b) Engebene Petelo, mpo na nini tosengeli te komonisa bondeko bobele epai na baoyo toyokanaka makasi elongo na bango?
6 Tolongisaka kozanga na biso ya bolingo na kolobaka ete Makomami mapekisi te komonisa bondeko mingi mpo na baninga na biso mosusu? (Yoane 19:26; 20:2) Tokanisi ete tokoki komonisa epai na bamosusu “bolingo” oyo etyami na ndelo mpe ya kotindika, bobele mpo na kotosa mobeko, na kobombaka bondeko na biso ya móto mpo na baoyo bomoto na bango esepelisi biso? Soki ezali bongo, wana emonisi ete tokangi te ntina na toli ya Petelo. Topetoli malamu te milimo na biso na nzela na botosi na solo. Mpamba te, Petelo alobaki: “Na kotosaka makambo na solo, bopetoli mitema na bino na boye ete bozali kolingana solosolo lokola bandeko. Na bongo bolinganaka ntango nyonso, na motema mobimba.”—1 Petelo 1:22, Kondimana na Sika ya P. de Beaumont.
“Bondeko oyo ezangi bokosi”
7, 8. Liloba oyo ebongolami na maloba “kozanga bokosi” euti wapi, mpe mpo na nini Petelo asalelaki yango?
7 Ntoma Petelo akobi lisusu koloba ete bondeko na biso esengeli kozala na bokosi te. Liloba oyo ebongolami na “kozanga bokosi” euti na lolenge mosusu ya liloba ya greke oyo ezalaki kosalelama mpo na basali ya teatre oyo bazalaki kolata maske na bilongi na bango, yango epesaki bango nzela ya komonana na masano makeseni na boumeli ya teatre moko. Na nsima, liloba yango ebandaki kolimbola bokosi mpe kobombana.
8 Mayoki nini tozalaka na yango mpenza epai na bandeko na biso baklisto mosusu ya mibali mpe ya basi kati na lisangá? Na ntango ya makita, topesaka bango mbote na koseka ya lokuta, kozanga ata kotala bango na elongi mpe na kolekaka noki? Eloko eleki mabe lisusu, tosalaka na motindo boye ete topesa bango ata mbote te? Soki ee, toloba nini mpo na “botosi [na biso] mpo na solo” oyo esengeli kopetola milimo na biso ete tozala na bondeko ya solosolo elongo na baninga na biso baklisto? Na maloba “kozanga bokosi”, Petelo amonisi ete bondeko na biso esengeli te kozala bobele libanda, kasi kozala ya solosolo mpe ya sembo.
“Na mozindo, na motema moko”
9, 10. Petelo alingaki koloba nini wana elobaki ye ete tosengeli kolingana “na mozindo”, to “na lolenge oyo ekolisami”?
9 Petelo abakisi: “Bolinganaka na mozindo [elimboli, “na lolenge oyo ekolisami”] na motema moko.” Ntina ezali te ya kokolisa motema to koyeisa yango monene mpo na komonisa bolingo epai na baoyo tozali na boyokani makasi elongo na bango. Kasi Petelo alobi na biso tolinganaka “na lolenge oyo ekolisami.” Bolingo agapé oyo emonanaka kati na baklisto, ezali na ndelo to na bokatikati te lokola oyo tosengeli komonisa epai na banguna na biso. (Matai 5:44) Ezali nde bolingo makasi oyo esengi milende. Tosengeli kokolisa motema, koyeisa yango monene, kofungola yango epai na bato oyo tosepelaka na bango mpenza te.
10 Na mokanda na ye Clé linguistique du texte grec du Nouveau Testament (angl.), Fritz. Rienecker akomaki mpo na liloba (adverbe) oyo ebongolamaki na maloba “na mozindo”, to “na lolenge oyo ekolisami” na 1 Petelo 1:22 ete: “Liloba yango ya greke ezali mingimingi na likanisi ya kozala na móto mpo na kosala likambo, molende (likambo oyo esalemi lokola likambo na mpambampamba te . . . , kasi esalemi nokinoki) (Hort).” Kotya makasi, to kobenda, elimboli na ndakisa “kofungola na kobendaka na bangambo nyonso.” Na bongo kolingana na mozindo, na motema moko elimboli kosala nyonso ekoki mpo na komonisa bondeko epai na baninga na biso baklisto banso. Bandeko na biso mosusu ya mibali mpe ya basi bazali bobele na esika moke kati na motema na biso? Soki ezali bongo, tosengeli kofungola mitema na biso.
“Bofungola mitema na bino”
11, 12. (a) Toli nini ntoma Paulo apesaki na baklisto ya Kolinti? (b) Ndenge nini Paulo amonisaki ndakisa malamu mpo na yango?
11 Emonani lokola ete ntoma Paulo akanisaki ete ezalaki wana likambo oyo basangani ya lisangá ya Kolinti basengelaki kosala. Akomelaki baklisto yango ete: “E Bakolinti, monoko na biso ezipolami mpo na bino! Mitema na biso mizipwi mpenza! Boyoki nkaka kati na biso te, kasi boyoki nkaka kati na bondeko na bino mpenza. Boye, mpo na kokokanisa yango-nazali koloba lokola epai na bana mpenza!-bino mpe bofungola mitema na bino.”—2 Bakolinti 6:11-13.
12 Ndenge nini tokoki kofungola mitema na biso ete tozala na bolingo mpo na bandeko na biso nyonso ya mibali mpe ya basi kati na kondima? Paulo amonisaki yango na ndakisa malamu oyo apesaki. Azalaki kotalela bandeko na ye na makambo na bango ya malamu, kobatelaka bongo bizaleli na bango ya malamu, kasi mabunga na bango te. Mokapo ya nsuka ya mokanda oyo atindelaki baklisto ya Rome emonisi malamu likambo yango. Totalela mokapo 16 ya mokanda yango mpe totala ndenge nini yango elakisi ezaleli kitoko ya Paulo epai na bandeko na ye ya mibali mpe ya basi.
Bondeko ya móto
13. Na maloba nini Paulo amonisaki ete azalaki kokumisa Fwebé, mpe mpo na nini?
13 Ezali na Kolinti nde Paulo akomaki mokanda na ye epai na Baloma, pene na mobu 56 ya ntango na biso, na boumeli na mobembo na ye ya misato ya misionere. Emonani lokola apesaki makomi yango na moklisto mwasi na nkombo Fwebé oyo azalaki kokende na Rome mpe mosangani na lisangá oyo ezalaki pene ebengami Kankelea. (Tanga ba versets 1, 2) Tala na maloba nini ya móto Paulo alobi mpo na ye epai na baklisto ya Rome. Na lolenge moko to mosusu, asungaki baklisto mingi, bakisa mpe Paulo, mbala mosusu ntango balekaki na libongo monene ya Kankelea na eleko ya mibembo na bango. Awa ezalaki ye na nse ya bopusi na masumu lokola bato banso, na ntembe te Fwebé azalaki na mabunga. Kasi na esika ete akebisa basangani ya lisangá ya Rome mpo na mabunga ya Fwebé, Paulo ayebisaki bango ‘bayamba ye kati na Nkolo na motindo ebongi na babulami’. Oyo nde ezaleli kitoko!
14. Maloba nini ya boboto Paulo alobaki mpo na Priska mpe Akila?
14 Kobanda na verset ya 3 kino 15, Paulo apesi mbote na baklisto soki ntuku mibale na bankombo na bango, bakisa mpe bamosusu ebele oyo atangi bango moto na moto to na etuluku. (Tanga ba versets 3, 4) Omoni bondeko ya Paulo mpo na Priska (to Prisile; tala Misala 18:2) mpe Akila? Babalani oyo batyaki bomoi na bango na likama mpo na ye. Sikawa Paulo azalaki kopesa basalani na ye elongo mbote na botondi, mpe kopesa bango matondi mautaki na masangá ya bapakano oyo bakomaki baklisto. Oyo nde kolendisama Akila mpe Prisile bazwaki na mbote yango oyo epesamaki na motema moko!
15. Ndenge nini Paulo amonisaki makanisi malamu na ye mpe komikitisa na ye na kopesaka mbote na Andronikuse mpe Yuniase?
15 Ekoki kozala ete Paulo akomaki moklisto mbula moko to mibale nsima na liwa ya Klisto. Na eleko oyo akomaki mokanda na ye epai na Baloma, esilaki koleka bambula mingi uta Klisto azalaki kosalela ye na mosala monene, oyo ya ntoma epai na bapakano. (Misala 9:15; Baloma 1:1; 11:13) Kasi tala elimo na ye malamu mpe komikitisa na ye. (Tanga verset 7) Apesi mbote na Andronikuse mpe Yuniase, “bato na lokumu kati na bantoma [batindami]”, mpe andimi ete basaleli Klisto ntango mingi koleka ye. Ata elembo moke ya zuwa ezali te kati na maloba na ye.
16. (a) Na maloba nini ya esengo Paulo alobaki mpo na baklisto ya Rome? (b) Mpo na nini tokoki kondimisama ete mbote yango nyonso ezalaki elembo ya “bondeko oyo ezangi bokosi?
16 Toyebi mpenza eloko te mpo na baklisto ya liboso na nkombo Epenete, Amfiatuse mpe Sitakise. (Tanga ba versets 5, 8, 9). Kasi bobele na motindo Paulo apesi bango misato mbote, tokoki kondimisama ete bazalaki bato na bosembo. Bazalaki na motuya mingi mpo na Paulo na boye ete abengi mokomoko na bango “molingami na ngai”. Paulo asaleli mpe maloba ya lokumu mpo na Apele mpe Rifise, na kolobaka ete Apele “ameseni na mosala na Klisto” mpe Rifise azali “moponami kati na Nkolo.” (Tanga ba versets 10, 13.) Oyo nde maloba kitoko mpo na baklisto yango mibale! Mpe ndenge toyebi elobeli na solo ya Paulo, tokoki kondimisama ete masanzoli yango mabongaki mpenza na bango. (Tala 2 Bakolinti 10:18) Epai mosusu, Paulo abosani te kopesa mbote na mama ya Rifise.
17. Na maloba nini Paulo amonisi ete azalaki kokumisa bandeko na ye baklisto ya basi?
17 Yango etindi biso tolobela lokumu oyo Paulo apesaki epai na bandeko na ye baklisto ya basi. Longola mama na Rifise, atangi basi baklisto mosusu motoba. Tomonaki liboso maloba ya boboto oyo asaleli mpo na Fwebé mpe Priska. Kasi tala na bondeko nini ye apesi mbote na Marie, Trifine, Trifoze mpe Peresisi. (Tanga ba versets 6, 12.) Emonani ete apesaki likebi mingi na basi baklisto yango ya molende oyo “basalaki misala mingi” mpo na bandeko na bango. Oyo nde ndakisa malamu Paulo atikeli biso, na ndenge azalaki solo kokumisa bandeko na ye ya mibali mpe ya basi, atako bazalaki na mabunga!
Tokaniselaka bandeko na biso mabe te
18. Ndenge nini tokoki kosala molende na komekola Paulo, kasi likambo nini ekozala na ntina?
18 Mpo na nini okomekola Paulo te na komekaka kozala na mwa maloba ya lokumu mpo na moklisto mokomoko ya mobali to ya mwasi oyo azali mosangani ya lisangá? Mpo na bamoko, yango ekozala mpasi mingi te mpo osala yango. Kasi mpo na bamosusu, mbala mosusu ekosengela na yo okanisa mwa ntango moke. Mpo na nini okoluka te kolekisa mwa ntango elongo na bango mpo na koyeba bango malamu koleka? Na ntembe te, okomona ete bazali na bizaleli kitoko mpenza, mpe mbala mosusu bakokoma kosepela na yo lisusu mingi koleka liboso.
19. Mpo na nini tosengeli kokanisela bandeko na biso mabe te, mpe ndakisa malamu nini ya bolingo Jéhovah apesi biso?
19 Tosengeli te kokanisela bandeko na biso mabe. Bango banso balingi Jéhovah, soki bongo te mbele bamipesaki epai na ye te. Eloko nini epekisi bango bazonga na mokili mpe balanda banzela na yango ya petee? Ezali bolingo na bango mpo na Jéhovah, mpo na boyengebene na ye mpe mpo na Bokonzi na ye etambwisami na Klisto. (Matai 6:33) Na lolenge moko to mosusu, bango nyonso bazali kobunda etumba makasi mpo na kotikala sembo, yango wana Jéhovah alingi bango. (Masese 27:11) Ye andimi bango lokola basaleli na ye atako bazali na mabunga na bango. Lokola ezali bongo, biso tozali banani mpo topimela bango bondeko na biso?—Baloma 12:9, 10; 14:4.
20. (a) Engebene mokanda na Paulo epai na Baloma, bobele banani tosengeli kokeba na bango, mpe banani bakoki kopesa biso makanisi mpo na yango? (b) Longola bango, ndenge nini tokoki kotalela bandeko na biso nyonso?
20 Baoyo Paulo alobi na biso ete tokeba na bango ezali bobele “baoyo bakoyeisaka bokabwani mpe mabaku”, mpe baoyo bazali na etamboli oyo ezali kotemela ‘mateya mayekolaki biso’. Paulo apesi biso toli ete tokengela bato yango mpe topengwa na bango. (Baloma 16:17, M.N.) Na ntembe te bankulutu ya lisangá basilaki komeka kosunga bango. (Yuda 22, 23) Tokoki bongo kotyela bango motema mpo na koyebisa biso soki tosengeli kokima ndeko boye to oyo kuna. Longola bobele likambo yango, tosengeli kotalela ete bandeko na biso nyonso babongi mpo tomonisa bango bondeko oyo ezangi bokosi mpe tolinga bango na mozindo, na motema moko.
21, 22. (a) Likambo nini ebelemi? (b) Mbala mosusu tokozala na mposa ya banani mpenza, mpe uta sikawa tosengeli kosala nini? (c) Likambo nini tokotalela na lisolo oyo elandi?
21 Satana, badémo na ye mpe makambo nyonso ya mokili oyo ye azali kotambwisa, bazali kotemela biso. Etumba ya Armagedon ebelemi. Ekobanda na matumoli ya Gog de Magog. (Ezekiele mikapo 38, 39) Na ntango yango tokozala na mposa makasi ya bandeko na biso, mbala mosusu ekozala mpenzampenza baoyo tozali na boyokani makasi elongo na bango te. To bango nde bakozala na mposa mpenza ya lisalisi na biso. Na bongo ntango yango oyo mpo na kokolisa bolingo na biso mpe kokumisa lisusu mingi bandeko na biso.
22 Ya solo, soki tozali kokumisa bandeko na biso, tokopesa na bankulutu ya lisangá limemya oyo ekoki na bango. Bango mpe bakolakisa ndakisa malamu na likambo yango na komonisaka ete bazali kokumisa bandeko na bango nyonso, mpe mpenzampenza bankulutu mosusu. Yango ezali nde likambo oyo tokotalela na lisolo elandi.
Bozongeli
□ Elembo oyo emonisaka boklisto ya solo ezali nini?
□ Mpo na nini tosengeli kozala na bolingo mpo na bandeko na biso?
□ Ndenge nini tokoki kolingana na “mozindo”, to na “motindo ekolisami”?
□ Na Baloma mokapo 16, ndenge nini Paulo amonisi ete azalaki kokumisa bandeko na ye mibali mpe basi baklisto?
□ Mpo na nini tosengeli kokanisela bandeko na biso mabe te?
[Elilingi na lokasa 19]
Luka komona bizaleli kitoko epai na baoyo obendami epai na bango te.