Babilone ebandeli ya losambo na lokuta
BABILONE akwei, akwei; bikeko nyonso na banzambe na ye abuki yango kino mabele!” Babilone ezalaki engumba ya ndenge nini, likambo oyo esakweli wana na Yisaya ezali kolobela mingi? Ezali wana eteni ya ntina mpo na boyebi na biso na oyo Babilone Monene ezali komonisa lelo.—Yisaya 21:9.
Babilone ya kala eyebanaki mpo na losambo ya banzambe-basi mpe ya banzambe-mibali na bapakano oyo esalelamaki kuna. Kati na mokanda na ye Mangomba kati na Babilone mpe na Assyrie (angl.), S. Hooke azali koloba: “Na Babilone Mardouk azalaki na esika ya liboso lokola mokonzi kati na banzambe mosusu. . . . Na eleko ya Nebukadanezare lI, bazalaki kokuta batempelo 58 to koleka oyo epesamaki mpenzampenza na banzambe, kozanga kolobela batempelo mosusu mingi oyo ezangaki kopesama [na nzambe moko ya sikisiki]. Na bongo tozali kososola mpo na komona mokumba monene oyo banganga bazalaki na yango kati na bomoi ya engumba monene wana.” Bato bazali koloba ete tempelo ya Mardouk na Babilone ezalaki na bisika mosusu 55 mpo na kosambela. Yango ememi biso na kokanisa na ba tempelo nyonso, bandako-nzambe ya mike mpe ya minene ya lelo, elongo na bisika na yango mingi mpo na kosambela na kati mpo na banzambe ya lokuta, basantu mpe bikeko ya Marie, boye te?
Babilone ezalaki ebandeli ya losambo na bikeko. Lisolo moko ezali komonisa ete banganga mpe basambeli “bazalaki kotya motema mingi epai na bikeko bibulisami, kotalelaka bikeko lokola biloko bikoki kosalisa bango mpo na kosolola na banzambe. Bazalaki kolatisa yango bilamba ya ntalo, minyololo na nkingo, ba bracelets na maboko mpe mpete na misapi; bikeko yango bizalaki kofanda na bisika ya kitoko mingi, bisika bazalaki kolongola yango mpo na kotambola na yango, na makolo, likoló na makalo oyo ekumbamaki na bampunda to na masuwaa”. Bokokani nini na losambo oyo epesami lelo epai na banzambe, na basantu mpe na bikeko ya banzambe-basi ya bahindous, ya baboudiste mpe ya Marie mpo na bakatolike, epai bazali kotambwisa bikeko na nzela, na mai mike to na bibale minene, lokola yango esalemaki na kala!
Ndimbola elandi, oyo euti bobele na encyclopédie moko oyo, ezali kopesa elembo mosusu ya bokokani oyo ezali kati na Babilone mpe mangomba ya lelo: “Basambeli na ye bazali kobenga ye na bankombo ya petee koleka: azali bobele nzambe-mwasi mpe moseka te, kasi lisusu mama na mawa, oyo azali koyoka mabondeli, oyo azali koloba [mpo na bolamu na biso] ye moto akelaki molongo mpe apesaki bomoi epai na bato.” Tokoki kokokanisa yango na libondeli oyo ya Santo Rosario (Le saint rosaire): “Tozali kotondo yo, Mokonzi-mwasi oyo aleki, mpo na bolamu oyo tozwaka mokolo na mokolo na loboko na yo ya bokabi; zala na boboto, Mama na biso, mpo na kobatela biso lelo mpe libela na libela na nse ya libateli na yo.”
Nani oyo bazali komonisa awa mpe kati na libondeli oyo? Mingi bakoyanola nokinoki: “Ngondo Maria.” Bobele ndambo moko nde ezali solo kati na eyano oyo. Libondeli etindami epai na Marie, kasi lokola mokanda Las Grandes Religiones Ilustradas ezali koyebisa biso yango, maloba ya liboso ezali komonisa Ishtar, “mwasi ya Bolingo”, nzambe-mwasi ya Babilone mpo na oyo etali kobota, ya bolingo mpe ya bitumba. Mbala mosusu bamonisaka ye “lokola mama moko azali komelisa mobotami na ye ya sika”. Tala ndakisa mosusu oyo ezali komonisa ete mangomba ya lelo makeseni mpenza mingi te na oyo ya Babilone ya kala.
Tokoki mpe kosala bokokani kati na likanisi ya molimo na moto mpe ya banzambe na mitó misato ya Babilone na kala mpe liteya ya kozanga kokufa na molimo mpe ya bosato ya mangomba na lelo. Ndakisa oyo endimisi boyebi na biso ya “Babilone Monene”, elembo ya solosolo ya nguya na mokili mobimba ya mangomba na lokuta oyo matambwisami na Satana.
Babilone: monguna monene ya losambo na solo
Babilone ezalaki mpe monguna monene ya libota ya kala ya Jéhovah, Yisraele, oyo losambo na bango ya solo etyolamaki na yango. Babilone ebomaki tempelo ya Yelusaleme na 607 liboso ya ntango na biso, komemaka bisaleli nyonso ya motuya ya losambo na Jéhovah mpe kotyolaka to kobebisaka yango na ntango ya elambo ya Belesasala.—Danyele 5:3, 4.
Motindo moko, na eleko na biso, Babilone Monene azali monguna monene ya losambo na solo. Kati na mikili mingi epai monyokoli ya ba Témoins de Jéhovah ezali kongala, ezali bakonzi na mangomba nde bazali kongalisa yango, mbala mingi na nsima ya boyokani oyo basali elongo na bakonzi ya politike.
Ndakisa ya ntina ya botemeli oyo bakonzi na mangomba babimisi, mpe oyo ezongelami mbala na mbala uta kala, ememi biso na 1917. Mbula wana, basangani ya lisanga ya mokili mobimba ya Bayekoli na Biblia, lokola bazalaki kobenga kala ba Témoins de Jéhovah, babimisaki mokanda Le mystère accompli (angl.). Mwa bamoko na bankasa na yango batalelaki yango epai na bakonzi ya mangomba na Canada mpe na Etats-Unis, mikili oyo emikotisaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, lokola ezalaki nde kotombokisa bato. Bakonzi yango ya mangomba balukaki nokinoki koyebisa bamakango na bango ya politike mpo na kobima ya mokanda yango. Lokola Martin Marty azali koloba yango, kati na mokanda na ye La religion américaine moderne: l’ironie des religions (angl.), “Bakonzi na mangomba batemelaki ba Russellistes [ba Témoins] mpe basepelaki na koyoka etumbu ya boloko ya mibu 20, [mpo na efundeli ya lokuta ya kotombokisa bato] mpo na batambwisi ya ba Témoins de Jéhovah oyo esambiseli ekweisaki bango.”
Kasi ezalela ya bakonzi na mangomba ezalaki nini nsima na mwa basanza ntango bakambi wana balongisamaki? “Bosepeli ata moke emonanaki te kati na basangani ya Mangomba.” Bobele ba Témoins nde batosaki mitinda ya Biblia “kino kobenda likunya ya bokonzi to boyangeli oyo ezalaki kotambwisa bamboka ndenge na ndenge likoló ya lingomba na bango”. Ba Témoins bandima naino te kosala na bomoko elongo na mikonzi ya politike, ata na nse ya boyangeli ya nazi na Alemanye, to na nse ya bibongiseli ya bafasiste na ltalie, na Espanye to na Portugal.
Babilone amonisami polele mpe asambwé
Na bongo ezali mpenza na ntina ete Emoniseli ezali koloba mpo na Babilone ete “alangwé na makila na bapetwi mpe na makila na batatoli na Yesu” mpe ete “kati na ye makila na basakoli, na bapetwi mazwami, na makila na bango nyonso babomamaki na mokili.” Na boumeli ya bikeke, tozali kokuta bilembo ya koboma bato oyo mangomba ya mokili mobimba basalaki na kosanganaka na molende nyonso na bitumba na mokili mobimba to na kokangaka miso likoló na matata yango mpe likoló na monyokoli ya baklisto na solo.—Emoniseli 17:6; 18:24.
Babilone monene, lisanga ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta, ntango nyonso ezali kolinga biloko ya ntalo mingi mpe nguya to bokonzi. Kasi anzelu moko ayebisaki Yoane ete mokolo ya kobomama ya ndumba oyo monene ezali koya. Lisolo elobi boye: “Angangi na mongongo makasi ete, Ekwei! Babilone monene ekwei! Esili kokoma efandelo na bilimu mabe, na boloko na bilimu na mbindo nyonso, na boloko na bandeke nyonso na mbindo bayinami!”—Emoniseli 18:2.
Ntango nini Babilone ekokwea? Esili kokwea? Motindo nini ezali kokwea? Yango etali yo na nini? Biyano na mituna oyo ekotalelama na nimero ya Mosenzeli oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Las Grandes Religiones lllustradas (Bililingi ya mangomba minene): Asirio-Babilónica, volume 20, Mateu-Rizzoli, Barcelone, Espagne, 1963, page 53. Volume 19, pages 19, 20.