Babilone monene ngambo na yango
NA ntango ya kolandana ya ba assemblées oyo esalemaki na 1988-1989 kati na mokili mobimba, bamilió ya ba Témoins de Jéhovah bazwaki ekateli moko kati na yango balobi ete bazali komona mabe mingi mpe ezali kosala bango mpasi mingi na kotalela etamboli ya mbindo ya Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta, oyo boklisto ya mokili oyo azali mpenza momonisi na yango monene. Bato mosusu ya motema sembo bazali mbala mosusu komituna soki wana ezali mpenza ekateli eleki makasi te. Nzokande ezali mpenza bongo te! Ntango tozali kotalela molende oyo basakoli na Yisraele ya kala bakweisaki na yango losambo na bikeko mpe maloba na nguya oyo Yesu asalelaki mpo na kokweisa na yango bokosi ya mangomba ya eleko na ye, biso baoyo tozali ba Témoins de Jéhovah, tondimisami ete ekateli motindo yango ezali mpenza na nzela. Oyo eleki lisusu: yango ezali lisengami ya Nzambe.—Yisaya 24:1-6; Yilimia 7:16-20; Matai 23:9-13, 27, 28, 37-39.
Mpo na bantina nini tozali mpenza koyina etamboli mabe ya Babilone Monene? Tozali solo na bilembeteli ya makambo na kala oyo bizali komonisa ete mangomba bazangaki kokumisa Jéhovah, Mokonzi Monene ya solo ya molongo mobimba?
Babilone ya lelo ezali kotyola Nkombo
Nkolo Moyangeli ya molongo mobimba abombaki nkombo na ye te. Ye moko azali komimonisa penepene na mbala 7 000 kati na Biblia na nkombo Jéhovah, nkombo oyo azali kopesa likebi monene koleka. Mobeko ya misato kati na Mibeko zomi ezali koloba mpo na yango: “Okotanga nkombo na Jéhovah Nzambe na yo mpamba te, mpo ete Jéhovah akolongisa te oyo atangi nkombo na ye mpamba.” Na ngambo na ye, Yesu amonisaki ntina ya nkombo ya Tata na ye kati na libondeli ya Tata na biso, kolobaka: “Nkombo na yo ezala mosanto!”—Exode 20:7; Matai 6:9.
Mpo na oyo etali kokumisa nkombo ya Nzambe, boklisto ya mokili oyo epesaki ndakisa ata moko te. Ata Biblia ya roi Jacques (oyo babimisaki na 1611) ezali kosalela nkombo ya Jéhovah bobele mbala nsambo, yango moko to elongo na maloba mosusua. Mabongoli mosusu malimwisaki nkombo yango libela. Mangomba mingi bazali koboya kokumisa nkombo yango. Batombolaki nde Bosato “bosanto” na bango, mpe na makambo mosusu Marie, oyo bazali kobyanga ye mama na Nzambe, likoló na Nzambe ya Biblia. Ezali boye nde nkombo kitoko ya Jéhovah ezipamaki mokeb.
Na boyokani elongo na Koran, mokanda na bango ya bulee, ba musulmans bayebi bobele Nzambe moko, Allah, likambo oyo ezali kopesa bango lokumu. Nzokande, bazali kosalela nkombo na ye te, Jéhovah, nkombo oyo Biblia esilaki komonisa mwa mibu 2 000 liboso na kokomama ya Koran. Mpo na bahindous, bazali kosambela bamilió na banzambe mpe na banzambe-basi, kasi Jéhovah azali kati na bango te.
Losambo na Bayuda ezali mpenza na ngambo mpo na oyo etali nkombo na Nzambe. Na boumeli ya bankoto na mibu, Bayuda bamekaki kozala libota liponami ya Nzambe. Nzokande, mpo na oyo etali bonkoko na bango, bakweisaki mpenzampenza nkombo ya solo ya Nzambe.
Tala ntina, lokola tozali ba Témoins ya Nkolo ya Molongo mobimba, tosengeli komonisa koyina na biso mpo na motindo oyo Babilone Monene ezali kotika pembeni nkombo na bulee ya Nzambe.
Mpo na nini tozali koyina mateya oyo mauti na Babilone
Mpo na kozwa litomba mpe kosimba bamilió na bato kati na kobanga, basalelaki liteya ya bato na Babilone oyo elobi ete moto azali na molimo oyo ekufaka te. Uta bileko na kala, lingomba na lokuta ezwaki litomba na bobangi oyo mpasi wana ya seko ezalaki kobimisa kati na lifelo ya móto nsima na liwa. Na nzela na liteya yango babimisaki liteya mosusu ya kobangisa koleka, oyo ya konyokwama mwa ntango moke na móto kati na epongelo. Na bongo bato ya motema sembo bazali kofuta mosolo na ntina ete basambela mpo na bato bakufa, kozanga koyeba ete mosolo na bango ezali mpenza na ntina te mpo na kopesama! Mateya wana ya kotuka mazali ata na moboko moko te kati na Biblia.—Tala Yilimia 7:31.
Mpamba te, Biblia ezali koteya ete moto azali molimo ya bomoi, oyo ekufaka. Nsima ya kozanga botosi na ye, Adam azwaki etumbu mpo na konyokwama libela kati na móto ya lifelo te to na epongelo te, kasi asengelaki kokufa. Liloba na Nzambe ezali koloba na polele ete: “Masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa.” (Baloma 6:23; Genese 2:7, 17; 3:19) Kati na Makomami, elikya mpo na bakufi etongami te likoló na kozanga kokufa ya molimo, kasi nde likoló na elaka ya Nzambe ya lisekwa mpo na bomoi ya kokoka na mabelé oyo makobongwana paradis.—Yoane 5:28, 29; Emoniseli 21:1-4.
Bosato “bosanto” ezali liteya mosusu ya Babilone. Liteya wana ya Nzambe moko kati na bapersona misato ezwamaki mpenza te kati na bindimeli ya Baebele na Kala. (Deteronome 5:6, 7; 6:4) Ntembe ata moke ezali te ete Yesu, oyo ye moko azalaki Moyuda, andimaki mpe ateyaki ata mbala moko te ete azalaki Nzambe Mozwi-na-Nguya-nyonso, alobaki mpe te ete azwami kati na banzambe misato, lokola liteya wana ya bato na Babilone ezali kolakisa yango.—Malako 12:29; 13:32; Yoane 5:19, 30; 14:28; 20:17.
Mpo na yango, tozali kobwaka mateya ya kotuka oyo mauti na Babilone oyo mangomba na lokuta bazali koteya. Losambo na biso ezali kopesama bobele epai na Nzambe moko ya solo, Jéhovah, oyo tozali kosambela na nsima ya Mwana na ye, ye oyo akomaki “mbeka mpo na mbondi ya masumu“, bobele mpo na masumu ya baklisto bapakolami te, kasi lisusu mpo na oyo ya bato na mokili mobimba.—1 Yoane 2:2.
Mpo na nini tozali kobwaka bafilozofi oyo ezali kotemela Nzambe
Bapape mpe bakonzi na mangomba ya boklisto ya mokili oyo bazali komilelalela mpo na kobakisama ya bato oyo bandimaka Nzambe te. Ntalo monene ya bakonzi na mangomba bazali komona kati na likambo oyo mwango ya kolongisa ezalela na bango ya kopesa maboko kati na makambo ya politike ya mokili. Nzokande, motuna oyo mozali kotunama: Nani, na ekeke oyo ya nsuka, azipaki mpenzampenza miso likoló na bokesene mpe koponapona oyo ezali kati na bato, makambo oyo mapesi nzela na ezalela ya kozanga kondima Nzambe? Boklisto ya mokili oyo emibebisaki mpenza kati na ezalela wana. Na ndakisa, lingomba ya orthodoxe ya ba russes, ezalaki koyokana elongo na ba tsars to bakonzi ya politike na mokili ya Russie, baoyo bazalaki konyokola bato. Kozanga na bizaleli bitombwani ya boklisto epai na baoyo bazalaki komikumisa ete bazali bantoma na Nzambe eyaki kobakisama likoló na makambo oyo mapesi nzela na bokoli ya ezaleli na kozanga kondima Nzambe.
Mangomba na boklisto ya mokili bandimaki mpe liteya oyo ezali kofinga Mozalisi: liteya ya évolution (liteya oyo elobaka ete biloko binso bibimaki pwasa). Mangomba yango bazali koloba ete biloko na kokamwa oyo bizwami na mokili elongo na bomoi ndenge na ndenge, oyo eleki bamilió ete esalemaki na nguya moko ezangi komonana. Na yango bazali koloba ete kozala ya biloko ndenge na ndenge wana ezali kokitana ya libaku malamu. Filozofi yango ezali komonisa ete kozala ya Nzambe ezali na ntina te mpe ezali kolongola moto na mokumba nyonso ezala epai na nani. Na bongo bizaleli malamu ezali kokoma likambo ya moto na moto ye moko. (Nzembo 14:1) Kati na mabe mosusu, bazali sikawa kosopa bamilió na bazemi mbula nyonso, mpe yango kati na mikili oyo mizali komikumisa ete mizali ya boklisto!
Tozali kobwaka bafilozofi mpe misala wana oyo mikeseni na mokano ya Nzambe. Losambo na biso ezali kokende epai na Jéhovah, “ye oyo azali na bomoi libela na libela, Oyo mpe azalisi likoló na biloko na kati na yango, na mokili na biloko na kati na yango, na mai monene na biloko na kati na yango”.—Emoniseli 10:6; 19:6.
Mpo na nini tozali koyina mbuma oyo Babilone Monene azali kobota
Boklisto ya mokili etiaki likebi te na nsango ya makebisi oyo epesamaki na masangá nsambo kati na Emoniseli mikapo 2 mpe 3, nsango oyo ezali kokweisa mangomba mikemike to bokabwani, losambo na bikeko, pite, kolemba kati na elimo mpe kozanga kosenzela.
Kokota mpo na kotala ata esika nini ya losambo ekomonisa mpenzampenza kozanga nkaka kino na meko nini basambeli bazali kotombola ekelamo na esika ya Mozalisi. Ndenge nini? Na losambo ya bikeko na bango, mpe na nzela ya losambo oyo bazali kopesa epai na “basantu”, na banzambe-basi na bikeko ya Marie mpe na bikulusu.—Tala Nzembo 115:2-8;2 Bakolinti 5:7; 1 Yoane 5:21.
Maloba na Paulo mazali kolongisama kati na likambo na bango: “Ata bayebaki Nzambe, bakumisaki ye lokola Nzambe te. . . . Elobaki bango ete bazali na mayele, bakomaki bazoba; basenzaki nkembo na Nzambe oyo akobeba te mpo na bikeko na motindo na bato baoyo bakokufaka mpe bandeke mpe banyama na makolo minei mpe banyama bakolandalanda.”-Baloma 1:21-23.
Mpo na nini tozali kokweisa pite oyo ezali kongala kati na Babilone
Na boumeli ya mibu 20 oyo mileki, to bapesaki nzela, to bandimaki likambo ya kosangisa nzoto mibali na mibali (homosexualité), kotalelaka yango lokola ezalela moko oyo endimami kati na bomoi. Bamilió ya bato oyo basangisaka nzoto mibali na mibali bazali komimonisa polele mpe bazali kotambola sikawa kati na banzela, kosakola na lolendo nyonso ezalela na bango. Ndenge nini Jéhovah azali kotalela misala na bango?
Esili koleka sikawa penepene na mibu 3 500, Biblia elobaki maloba oyo kozanga kokakatana: “Okolala na mobali pelamoko na mwasi te. Ezali mbindo.” (Levitike 18:22) Lisusu, ekoki sikawa pene na mibu 2 000, ntoma Paulo amonisaki ete mitinda na Nzambe mpo na oyo etali bizaleli malamu ebongwani te ntango akomaki: “Na ntina yango Nzambe atiki bango kati na mposa na nsoni. Mpo ete basi na bango basenzi ezaleli na mwasi mpo na bizaleli bibongi te, mpe mibali na bango lokola, batiki kosangana na mwasi pelamoko ezaleli na mobali nde baziki na mposa mpo na bango mpenza. Babali bazali kosangana na babali na makambo na nsoni mpe bazwi kati na nzoto na bango libonza na makambo mabe na bango.”—Baloma 1:26, 27; 1 Bakolinti 6:9, 10; 1 Timote 1:10.
Nzokande, kati na boklisto ya mokili, bakonzi na bango oyo basangisaka nzoto mibali na mibali bazali mingi mpenza bakomaki bongo etuluku moko makasi mpo na kolendisa ezaleli yango kati na mangomba mingi ya minene. Bazali kosenga lotomo ya ezaleli ya bomoi na bango mpe lotomo ya ba ministres na losambo. Ndakisa oyo elandi emonisi malamu maloba na biso: le 24 août 1988, bakonzi na lingomba oyo ebengami Eglise unie du Canada, lingomba na protestá oyo ezali na bato mingi kati na mboka wana, bavotaki na ba voix 205 liboso na ba voix 160 mpo ete bato oyo basangisaka nzoto mibali na mibali to ba homosexuels bandimama mpo na kozwa mikumba kati na lingomba.
Mpo na nini tozali koyina pite ya elimo oyo Babilone azali kosala
Mokanda ya Emoniseli ezali komonisa polele pite oyo Babilone azali kosala elongo na “mikonzi ya mabelé”, bakonzi na politike ya mokili. Mwasi na pite amonisami lokola “afandi likoló na mai mingi”, oyo mazali komonisa “bikolo, na bibele; na mabota, na minoko.” (Emoniseli 17:1, 2, 15) Lokola bazali na boyokani ya penepene elongo na bakonzi ya politike, mangomba na lokuta bakokaki, na boumeli ya bikeke, kosalela na polele to na nsima ya bato mosusu bopusi na bango mpo na kozwa bato na boombo to koluka kozwa litomba likoló na bango.
Boyokani oyo Vatican asalaki elongo na bakonzi ya nazis mpe fascistes na ekeke ya ntuku mibale ezali ebele na bandakisa ya boyangeli oyo mangomba na lokuta ezali kosalela. Na yango, na nse na bopusi ya Mangomba, basambeli ya mangomba yango bazwamaki mpenza na boombo epai na bakonzi mabe ya politike. Na 1929, Vatican esalaki boyokani elongo na mokonzi mabe ya fasciste Benito Mussolini. Likambo nini elekaki nsima na Alemanye? Cardinal allemand Faulhaber azali koyebisa biso makanisi ya pape Pie XI. Engebene Cardinal yango, pape alobaki boye mpo na Hitler: “Nasepeli, azali mokonzi ya liboso oyo ‘atemeli polele boyangeli ya kominisme.” Faulhaber alobaki boye na nsima: “Mobembo na ngai na Rome endimisaki likambo oyo mbele nasengelaki kotiela ntembe uta mikolo mingi. Na Rome, national-socialisme mpe fascisme etalelami lokola nzela bobele moko ya komibatela liboso na communisme mpe na bolchevisme.”
Liboso na 1933, ba episkopo ya katolike ya Alemanye batemelaki filozofi ya nazi. Nzokande, lokola mokomi ya allemand Klaus Scholder ayebisi yango kati na mokanda na ye Mangomba mpe bokonzi ya Hitler (IIIe Reich) Anglais, ntoma to ambassadeur ya Vatican na Alemanye, Cardinal Pacelli, asengaki bango ete babongola likanisi na bango epai ya national-socialisme. Mbongwana yango eutaki wapi? Na likanisi to elikya ya boyokani kati na bokonzi ya Hitler mpe Vatican, boyokani oyo esalemaki le 20 Juillet 1933.
Klaus Scholder azali koyebisa: “Na ntango ya vote to boponami oyo esalamaki na le 12 Novembre [1933], Hitler azwaki matomba ya boyokani oyo boyangeli na ye (Reich) esalaki elongo na Babilone: azwaki bato mingi, mingimingi na bisika ya boponami (vote) oyo bakatolike bazalaki mingi.”
Atako mwa ndambo na bakonzi ya lingomba ya protestá bakweisaki boyangeli ya Hitler oyo azwaki bokonzi na 1933, mosika te mingongo na bango mizipamaki na konganga ya bato nyonso ya mboka. Scholder azali kolimbola: “Emonanaki polele ete lingomba na protestá ezalaki pene ya kotika ezaleli ya komibatela oyo bazalaki na yango kino na ntango wana mpe na nsima komitika kolongama na bango mpe na maladi ya bolingo ya ekolo. . . . Mpo na mbala ya liboso, Lingomba na protestá endimaki bokonzi ya Hitler kozanga kokakatana na maloba ya polele oyo eyokanaki epai na bato banso.” Na yango, na ndakisa ya Lingomba ya katolike, lingomba ya protestá emitekaki epai na bokonzi ya Hitler mpe ekomaki mosaleli na yango.
Lokola Lisolo na bato ezali komonisa yango, na boumeli nyonso ya bikeke mangomba na lokuta basalaki boyokani elongo na nguya oyo ezalaki koyangela, bokonzi oyo balendisaki lolendo na yango mpo na kopesa mpasi epai na bato. Bakonzi na mangomba, baoyo bazali na mposa ya bokonzi, ya konduka bozwi, bamonisaki ‘elimo na Klisto’ te. Biso baoyo tozali ba Témoins de Jéhovah, tozali koyina bondumba ya motindo wana kati na elimo.—Yoane 17:16; Baloma 15:5; Emoniseli 18:3.
Mpo na nini tozali koyina bosopi makila oyo etumolami na Babilone
Kati na mokanda ya Emoniseli, Babilone Monene afundami ete asopi makila mingi. Tozali kotanga: “Namonaki mwasi yango kolangwa makila na bapetwi mpe makila na batatoli na Yesu. Kati na ye makila na basakoli, na bapetwi mazwami, na makila na bango nyonso babomamaki na mokili.”—Emoniseli 17:6; 18:24.
Lisolo mobimba ya mangomba na lokuta esalami bobele na koyina mpe na bobomi; boklisto ya mokili, ezali na ngambo monene kati na bosopi wana ya makila. Bitumba mibale ya mokili mobimba bisalemaki kati na mikili oyo babengi yango ya boklisto. Na 1914 mpe na 1939, bakonzi na politike “baklisto” basalelaki minduki, mpe kati na mikili nyonso ya bitumba bakonzi na mangomba bapesaki lipamboli na bango na bitumba. Mokanda moko ya lokota na lingelesi (The Colombia History of the World) ezali koloba boye mpo na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba: “Solo etiolamaki to ekitisamaki motindo moko na bomoi, mpe ata mongongo moko moyokanaki te mpo na komonisa botemeli. Babateli na Liloba na Nzambe bazalaki kobongisa kotambola ya basoda. Etumba mobimba ekomaki elembo ya koyina mobimba.” (Ezali biso nde tolalisi maloba oyo). Ba omonyé ya basoda bakambaki basoda na bitumba na kolendisaka bolingo ya ekolo, nzokande bilenge ya ngambo nyonso mibale basilaki na kobomama. Mokanda bobele moko oyo ya istware elobi lisusu ete: “Kobebisa elimo ya bato na koteyaka bango bolingo eleki ndelo mpo na ekolo na bango. . . ezipaki nzela na nsima mpo na boluki kimya.”
Kati na mokili mobimba, mangomba ya lokuta mazali lelo se kobota koyina: matata mazali kongala, kati na Bayuda mpe bamusulmans, bahindou mpe ba sikhs, bakatolike mpe baprotestá, bamusulmans mpe bahindou, babudiste mpe bahindou. Ee, na mikolo na biso mpe, mangomba na lokuta mazali na ngambo monene ya ebele na makila oyo mazali kosopama, na ngambo mpo “baoyo nyonso babomamaki na mokili.”—Emoniseli 18:24.
Ntango bazali kotalela bilembo nyonso oyo bimonisami awa na likoló, ba Témoins de Jéhovah bamoni ete ekateli oyo bazwaki na 1988 na ntango ya ba assemblées na bango ezali mpenza na esika na yango mpe ebongi mpo na ntango oyo. Ezali mpenza na nzela, soki totondoli mangomba na lokuta lokola mwasi na pite oyo asopisi makila, Babilone Monene. Tozali koyebisa na mokili nzela bobele moko ya kokoma na kimya mpe na losambo ya solo: ezali ya komibalola epai na Jéhovah Nzambe, Nkolo Moyangeli ya molongo mobimba, na nsima na ye oyo atindaki awa na mabelé, Yesu, Klisto to Masiya. Yango elimboli kondima Bokonzi na Nzambe lokola boyangeli ya seko mpe ya sembo oyo bobele yango ekokoka kokokisa bamposa ya bato. Mpe yango elimboli lisusu ete oyo ezali ntango ya kotosa etinda oyo: “Bino bato na ngai bobima na ye [Babilone Monene], ete bosangana na masumu na ye te, ete bozwa moko na malozi na ye mpe te.”—Emoniseli 18:4; Danyele 2:44; Yoane 17:3.
[Maloba na nse ya lokasa]
b Mpo na bandimbola ya polele likoló na ntina mpe na oyo nkombo na Nzambe elimboli, tala brochure ya bankasa 32 Le nom divin qui demeure à jamais ebimisamaki na Société Watch Tower.