Tokokisa ezaleli na bulee kati na nsomo na Nzambe
‘Tomipetola mpenza na mbindo nyonso na nzoto mpe na elimo mpe tokokisa ezaleli na biso na bulee kati na nsomo na Nzambe.”—2 BAKOLINTI 7:1.
1. Ndenge nini toyebi ete baanzelu bazali kokumisa bosantu ya Jéhovah?
JÉHOVAH azali Nzambe mosantu. Na makoló, baanzelu oyo bazali na esika ya liboso bazali kokumisa bosantu na ye na makasi nyonso. “Bulee, bulee, bulee! Jéhovah na bibele, mokili mobimba etondi na nkembo na ye.” Wana ezalaki maloba makasi ya baserafé oyo mosakoli Yisaya amonaki na emononeli, na ekeke ya 8 liboso na ntango na biso. Na nsuka ya ekeke ya yambo ya ntango na biso, ntoma Yoane amonaki bimononeli bitali makambo masengelaki kokokisama na eleko na biso, na “mokolo na Nkolo”. Amonaki mpe ayokaki bikelamu minei ya bomoi kosakola ntango nyonso zongazonga na kiti na bokonzi na Jéhovah: “Mosantu! Mosantu! Mosantu! Nkolo Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, Oyo azalaki mpe azali mpe akozala seko.” Na kolobaka mbala misato liloba mosantu, bikelamu yango ya elimo ya Jéhovah bizalaki komonisa bosantu monene ya Mozalisi oyo ekokani na ya ekelamu mosusu te.—Yisaya 6:2, 3; Emoniseli 1:10; 4:6-8.
Bosantu mpe koponama
2. (a) Wapi ndimbola mibale ya bosantu, mpe na nini Jéhovah azali mosantu kati na makambo yango mibale? (b) Na maloba nini Moïse akumisaki bosantu ya Jéhovah?
2 Na ndenge esalelami kati na Biblia, liloba mosantu ezali kolakisa ezalela, bobele ezalela ya eloko oyo ezali peto te mpo na makambo matali lingomba, kasi lisusu oyo eponami, to ebulisami. Jéhovah azali peto na nivo ya likoló mpenza; akabolami mpenza na banzambe nyonso ya mbindo ya mabota. Ezali lolenge oyo ya bosantu na ye nde Moïse akumisaki ntango alobaki kati na nzembo moko: “E Jéhovah, nani azali lokola yo kati na banzambe? Nani azali lokola yo, na lokumu kati na bulee?”—Exode 15:11.
3. Kati na makambo nini Bayisraele basengelaki kozala peto mpe ndenge nini Jéhovah asalisaki bango mpo na yango?
3 Jéhovah, Nzambe mosantu, azalaki kosenga Bayisraele na Kalakala, libota na ye awa na mabelé, ete bazala basantu mpe. Lisengi yango etalaki bobele banganga-nzambe te mpe Balevite te, kasi etalaki libota mobimba. Jéhovah alobaki epai na Moïse: “Lobela lingomba nyonso na bana na Yisraele ete: ‘Bino bokozala bulee mpo ete ngai Jéhovah Nzambe na bino nazali bulee.’” (Levitike 19:2) Na ntina yango, Jéhovah apesaki epai na Bayisraele mibeko oyo elingaki kosalisa bango na kotikala peto kati na elimo, na bizaleli, na makanisi, na mosuni mpe na lingomba, bopeto oyo ya nsuka etalaki bongo losambo na bango kati na tabernakle mpe na nsima ekomaki kati na tempelo.
Libota liponami
4, 5. (a) Likambo nini ekomisaki Yisraele libota oyo ebulisami? (b) Nini esengami na Yisraele na elimo, mpe na maloba nini ntoma Petelo amonisi yango?
4 Na ntango nyonso oyo babatelaki mibeko ya Nzambe, Yisraele amikabolaki na mabota na bizaleli mabe oyo mazingaki bango. Amimonisaki lokola libota oyo liponami to ebulisami, mpo na mosala ya Jéhovah, Nzambe mosantu. Moïse alobaki na bango: “Ozali libota na bulee mpo na Jéhovah Nzambe na yo, Jéhovah Nzambe na yo aponaki yo ete ozala libota na ye mpenza kati na mabota nyonso mazali na nse.”—Deteronome 7:6.
5 Esengami mpe lisusu na Yisraele na elimo ete bazala peto mpe bamitangola na mabota. Ntoma Petelo akomaki epai na baklisto baponami na kozala Bayisraele na elimo: “Lokola bana na botosi, bondima te ete bizaleli na bino bilanda mposa mabe na bino na liboso, wana ezangaki bino mayele. Kasi bozala bulee na bizaleli nyonso na bino pelamoko oyo abyangi bino azali mpe bulee. Mpamba te esili kokomama ete, Bokozala bulee mpo ete ngai nazali bulee.”—1 Petelo 1:1, 14-16.
6, 7. (a) Totangi nini kati na Emoniseli mokapo 7 na ntina na “ebele monene”, mpe nini esengami mpenza epai na bango? (b) Tokotalela nini na baparagrafe oyo ekolanda?
6 Mokapo ya nsambo ya Emoniseli elobeli basangani ya “ebele monene” “batelemi liboso na kiti na bokonzi [ya Jéhovah] mpe liboso na Mwana na Mpate, balati bilamba mpembe”. Totangi lisusu ete “basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango mpembe na makila na Mwana na Mpate”. (Emoniseli 7:9, 14) Bilamba na bango ya mpembe elimboli ete Jéhovah azali komona bango ete bazali peto mpe sembo mpo na kondima na bango kati na makila na Klisto na nzela na yango asikolaki mokili. Na yango, ezala baklisto bapakolami, ezala “bampate mosusu” basengeli kotikala peto na elimo mpe na etamboli mpo na kosambela Jéhovah na lolenge oyo ezali malamu.—Yoane 10:16.
7 Totalela sikawa na ndenge nini basaleli na Jéhovah basengelaki kala kosenzela na bopeto na bango mpe na bosantu na bango, mpe mpo na nini mitinda bobele wana mikoki kosalelama mpo na libota na Nzambe na mikolo na biso.
Bopeto ya elimo
8. Mpo na bantina nini Bayisraele basengelaki komikabola na mangomba na Kanana?
8 Bayisraele basengelaki komibatela na likebi nyonso na misala mabe ya mangomba ya mabota mosusu. Na nzela na Moïse, Jéhovah alobaki epai na Yisraele: “Okeba na ntina na yo mpenza ete osala kondimana na bato na mokili mokoingela yo te ete yango ekoma motambo na kati na yo te. Bokobebisa bitumbelo na bango mpe bokobuka makonzi na bango [yango esalelamaki mpo na nzambe na pite], mpe bokokata bikeko na Asela na bango, mpo ete okosambela nzambe mosusu te, mpo ete Jéhovah, nkombo na ye Zua-na-kobatela, (azali Nzambe na zua na kobatela) [to, “Nzambe oyo azali kosenga komipesa mobimba”, engebene Traduction du monde nouveau, ebimeli na Lingelisi ya 1984 oyo ezali na mitindami, makomi na nse na lokasa]; na ntina ete osala kondimana na bato na mokili yango te, mpamba te bakozala solo na etamboli na mbindo elongo na banzambe na bango mpe bakotumba mbeka epai na banzambe na bango.”—Exode 34:12-15.
9. Mitinda nini ya sikisiki Bayisraele ya sembo oyo batikaki Babilone na 537 liboso na ntango na biso bazwaki?
9 Bikeke mingi na nsima, Jéhovah apemisaki Yisaya mpo ete aloba maloba oyo na esakweli epai na batikali na Bayisraele na sembo oyo balingaki kozonga longwa na Babilone kino na mboka na Yuda: “Bolongwa! Bolongwa! Bokima na esika yango, bosimba eloko na mbindo te; bobima na kati na ye, bomibulisa bino mpenza, bino bokokumba biloko na Jéhovah [elongo na yango losambo na peto elingaki kozongisama kati na temple na Yelusaleme].”—Yisaya 52:11.
10, 11. (a) Mitinda nini ekokani na yango Bayisraele ya elimo bazwaki na ekeke ya liboso? (b) Ndenge nini mitinda yango mitosamaki mingimingi kobanda 1919 mpe 1935, mpe na lolenge nini mosusu baklisto bapakolami mpe baninga na bango bazali kobatela bopeto ya elimo?
10 Bobele bongo, Bayisraele na elimo mpe baninga na bango basengeli kosenzela ete bamibebisa te na koyokanaka na mangomba mazali kosambela bikeko na mokili ya lelo. Ntoma Paulo akomaki epai na baklisto bapakolami na lisangá na Kolinti ete: “Esambelo na Nzambe ezali na kondimana nini na bikeko? Mpamba te biso tozali Esambelo na Nzambe na bomoi. Pelamoko Nzambe alobaki ete, Nakofanda mpe nakotambola kati na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai. Yango wana, bobima na kati na bango, mpe bokabwana na bango. Nzambe alobi bongo. Bosimba eloko na mbindo te, mpe boye nakoyamba bino.”—2 Bakolinti 6:16, 17.
11 Uta 1919, batikali baklisto bapakolami oyo bapetolami mpe bayongolami babimaki na losambo na mbindo mpe na bikeko na Babilone Monene. (Malaki 3:1-3) Bayanolaki na libyangami oyo ya Nzambe: “Bino bato na ngai bobima na ye, ete bosangana na masumu na ye te, ete bozwa moko na malozi na ye mpe te.” (Emoniseli 18:4) Uta 1935, ebele monene na “bampate mosusu” oyo ezali se koyikana, bango mpe, bandimaki libyangami yango mpe batikaki mangomba ya lokuta oyo eutaki na Babilone. Baklisto bapakolami mpe baninga na bango bazali kosenzela lisusu na bopeto na bango ya elimo na koboyaka na makasi nyonso makanisi ya lokuta ya bapengwi.—Yoane 10:16; 2 Yoane 9-11.
Bopeto ya bizaleli
12. (a) Na nzela na mibeko nini Jéhovah atombolaki nivo ya bizaleli ya Bayisraele na likolo mpenza koleka oyo ya mabota mazingaki bango? (b) Mibeko nini mpenzampenza ya sikisiki mizalaki kotalela banganga-nzambe?
12 Na nzela na kondimana na Mibeko, Jéhovah atombolaki nivo ya bizaleli to etamboli ya Bayisraele na likoló mpenza koleka mabota na bizaleli na mbindo oyo mazingaki bango. Libala mpe libota ezalaki bibongiseli bibatelamaki kati na Yisraele. Mobeko ya nsambo kati na mibeko zomi epekisaki ekobo oyo, lokola pite, ekweisamaki makasi. (Deteronome 22:22-24) Mibeko mizalaki mpe kobatela baseka. (Deteronome 22:28, 29) Mitinda makasi mizalaki kotambwisa libala ya banganga-nzambe. Mpo na oyo etali nganga-nzambe monene, asengelaki kobala elenge mwasi oyo ayebaki naino mobali te.—Levitike 21:6, 7, 10, 13.
13. Baoyo batangami ete “mwasi” na Klisto bakokisami na nani mpe mpo na nini?
13 Ndenge moko mpe, Yesu Klisto, Nganga-nzambe Monene, azali na “mwasi” elingi koloba baklisto bapakolami 144 000, baoyo bakokisami na “baseka”. (Emoniseli 14:1-5; 21:9) Bazali komibebisa te elongo na mokili ya Satana mpe batikali peto na losambo mpe na etamboli. Ntoma Paulo akomaki epai na baklisto bapakolami na Kolinti: “Nazali na zuwa mpo na bino, lokola zuwa elongobani na mokano na Nzambe, mpamba te ngai, nasili kobalisa bino epai na mobali moko ete nakomisa bino epai na Klisto lokola moseka na libala.” (2 Bakolinti 11:2) Akomaki mpe lisusu: “Klisto alingaki Lingomba mpe amipesaki ye moko mpo na bango ete abulisa bango, awa esili ye kopetola bango na komwangisa na mai esika moko na Liloba. Na boye, Lingomba bamonana liboso na ye na nkembo, na kozanga libebi mpe liyuta mpe eloko nini mabe, kasi ete bazala bulee mpe na mwa libebi moke te.”—Baefese 5:25-27.
14, 15. (a) Na likambo nini lisusu kelasi ya mwasi esengeli kozala peto, mpe mokapo nini ya Biblia emonisi yango? (b) Mpo na nini ezali solo ete masengami matali bopeto matali mpe bampate mosusu?
14 Basangani ya mwasi na Klisto basengeli kozala peto bobele na elimo te, kasi lisusu na etamboli. Paulo alobaki: “Bomizimbisa te, moto na pite mpe basambeli na bikeko mpe bato na ekobo . . . bakosangola Bokonzi na Nzambe te. Bamosusu na bino bozalaki bongo. Kasi bosili kosukwa, bosili kobulisama.”—1 Bakolinti 6:9-11.
15 Emonani polele ete masengami wana matali bopeto na etamboli mazali mpe kotalela bampate mosusu soko totaleli lolenge na bato oyo Jéhovah akoboya kokotisa na likoló na sika mpe na mabelé na sika oyo alakaki. Totangi boye: “Nde mpo na . . . bato babebi na bosoto, na babomi na bato, na bato na pite . . . , likabo na bango ekozala kati na libeke likopelaka na moto na sufulu, oyo ezali kufa na mibale.”—Emoniseli 21:1, 8.
Libala ya lokumu
16, 17. (a) Mikapo nini ya Biblia mimonisi ete esengami na makasi te kotikala monzemba mpo na kozala peto? (b) Ndenge nini moklisto akoki komonisa ete azali kobanga Nzambe na ntango oyo alingi kopona mobalani, mpe mpo na nini ekozala mabe na koboya kotosa etinda ya bantoma?
16 Basangani bapakolami na libota na mwasi mpe bampate mosusu basengami na makasi te ete batikala minzemba mpo na kozala peto na ezaleli na bango. Kotikala monzemba na makasi elongobani te na Makomami. (1 Timote 4:1-3) Kosangana ya mwasi na mobali ezali likambo ya mbindo te na kati ya libala. Liloba na Nzambe elobi: “Tika ete libala likumisama kati na bato nyonso mpe kosangana na mobali na mwasi ezala na mbindo te. Mpo ete Nzambe akosambisa bato na pite mpe na ekobo.”—Baebele 13:4.
17 Nzokande, moklisto oyo alingi ‘kokokisa ezaleli ya bulee kati na nsomo ya Nzambe’ ayebi ete akoki te kobalana ata na moto nini oyo motema na ye eponi. Liboso ete apesa toli epai na baninga na ye baklisto na ‘komipetola na mbindo nyonso na mosuni mpe na elimo, kokokisaka ezaleli na bulee kati na nsomo na Nzambe’, ntoma Paulo akomaki: “Bokangana na ekanganeli na bokesene te, esika moko na bato bazangi kondima. Mpamba te kokokana nini ezali kati na boyengebene mpe mabe? . . . Likabo nini ezali na mondimi mpe moto oyo azangi kondima?” (2 Bakolinti 6:14, 15; 7:1) Lokola azali mosangani ya libota ya peto ya Jéhovah oyo ebongisami, moklisto mobali to moklisto mwasi oyo alingi kobala akotosa etinda ya bantoma oyo esengi na kobalana “bobele kati na Nkolo.” Akopona bongo lokola mobalani moto oyo asili komipesa epai na Jéhovah mpe azali kosalela ye na bosembo nyonso. (1 Bakolinti 7:39) Na mikolo na biso, lokola na kala, ekozala mpenza bozoba mpo na basaleli na Nzambe na koboya kotosa toli oyo ya Biblia. (Tala Deteronome 7:3, 4; Nehemia 13:23-27) Wana ekomonisa ete tozangi nsomo oyo ebongi epai na Jéhovah, Nkolo na biso Monene.—Malaki 1:6.
18. Na lolenge nini mosusu baklisto bakoki kokumisa libala na bango?
18 Epai mosusu, kati na Yisraele, mibeko mizalaki kotambwisa makoki ya kosangisa nzoto kati na babalani. Mobali asengelaki te kosangisa nzoto na mwasi na ye na eleko oyo amonaka sanza. (Levitike 15:24; 18:19; 20:18) Na Yisraele na kala, mibali basengelaki kozala na ezaleli ya komikanga motema mpe kozala na bolingo. Baklisto basengeli mpe kosala motindo yango. Ntoma Pierre alendisi bango na kozala elongo na basi na bango “engebene boyebi” elingi koloba basengeli koyeba bomoto ya basi na bango ete bazali “motau”.—1 Petelo 3:7.
Totambola na “Nzela na Bopeto”
19, 20. (a) Lobela nzela ya monene oyo bato mingi bazali kolanda. (b)Eloko nini esengeli kokesenisa libota na Jéhovah na mokili na Satana? (c) Na nzela nini ya monene libota ya Jéhovah ezali kotambola, nzela yango efungwamaki ntango nini, mpe bobele banani bazali kolanda yango?
19 Na kotalela nyonso oyo touti kolobela, emonani ete libulu mozindo ezali kokabola libota na Jéhovah mpe mokili ya Satana. Mokili ya sikawa etondi mpenza na etamboli mabe mpe emipesi na bisengo. Yesu alobaki: “Boingela na ekuke na nkaka. Mpamba te ekuke ezali monene mpe nzela ezali na esika monene oyo ekoleka kino libebi. Bazali mingi baoyo bakoingela na yango.” (Matai 7:13) Bato mingi bazali kolanda nzela yango ya monene oyo, engebene maloba na ntoma Petelo, etondi na “na mobulu mpe na mposa mabe, na komela vinyo, lokoso, molangwa mpe losambo na bikeko”, mpe ezali komema na “potopoto”. (1 Petelo 4:3, 4) Nsuka na yango ezali libebi.
20 Basaleli ya Nzambe, bazali kotambola mpenza na nzela mosusu, nzela ya peto oyo bato na peto bazali kotambola kati na yango. Mosakoli Yisaya asakolaki ete nzela yango ekofugwama na ntango na nsuka, na maloba oyo: “Balabala ekozala wana, nzela mpenza; ekobyangama ete, Nzela na bulee; baoyo na mbindo bakoleka wana te.” (Yisaya 35:8) Tala oyo tozali kotanga kati na mokanda Sécurité universelle sous le Règne du “Prince de paix” na ntina na esakweli yango: “Na 1919 nzela monene ya elilingi efungwamaki epai na basaleli na esengo ya Nzambe. Baoyo balingaki kozala peto na miso na Jéhovah babandaki kotambola na ‘nzela monene’, ‘Nzela na bulee’. . . . Atako ‘nsuka na biloko mabe’ esili kopusama mpenza, ‘nzela monene’ yango ebongisami na Nzambe ezali se ya kofungwana. Bibele na bato bazali na botondi . . . bakoti kati na nzela na paradis ya elimo, ‘Nzela na Bulee.’”a
21. Ndenge nini mpe mpo na nini basaleli ya Jéhovah basengeli komikesenisa na mokili ya Satana, mpe tokotalela nini na lisolo oyo ekolanda?
21 Ee, na mikolo na biso, batikali bapakolami na Yisraele na elimo elongo na baninga na bango, bampate mosusu, bazali kati na libota ekabolami na mokili na Satana, mokili oyo eyebi lisusu ezaleli na bulee te. Eloko moko te ezali bulee mpo na bibele na bato oyo batambwisami na Diable oyo bazali kolanda ‘nzela monene ekomamaka na libebi’. Bazali mbindo, bobele mpo na elimo mpe etamboli te, kasi mingimingi na nzoto, mpamba te bazali komitalela na bopotu. Nzokande, ntoma Paulo apesaki toli oyo: “Tomipetola mpenza na mbindo nyonso na nzoto mpe na elimo mpe tokokisa ezaleli na biso na bulee kati na nsomo na Nkolo.” (2 Bakolinti 7:1) Ndenge nini basaleli na Nzambe basengeli kosenzela na bopeto na bango ya makanisi mpe ya nzoto? Tokotala likambo yango na boyekoli oyo ekolanda.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mokapo 16, nkasa 134, 135.
Bozongeli
◻ Wapi ndimbola mibale ya liloba bosantu mpe mpo na nini tokoki koloba ete Jéhovah azali mosantu oyo aleki monene?
◻ Bayisraele basengelaki kozala libota ya bosantu kati na makambo mibale: tanga yango.
◻ Nini esengami epai na Bayisraele na elimo mpe baninga na bango, bampate mosusu?
◻ Nsomo ya Nzambe esengeli kosala nini epai na moklisto oyo azali koluka mobalani?
◻ Wapi nzela mibale oyo efungwameli bato, mpe mpo na nini esengeli kopona na polele nyonso kati na yango mibale?
[Elilingi na lokasa 9]
Liloba ya Nzambe elobi: ’‘Libala ekumisama.”