Mituna ya batangi
Moto asengeli kozala na mbula boni mpo akoka koponama mosaleli na misala?
Biblia epesi mbula te.
Ya solo, na Yisraele ya kala, Nzambe akataki bambula mpo na baoyo bazalaki kokokisa mikumba mikeseni. Mibali oyo bandimamaki na mosala ya soda basengelaki kozala na mibu 20; bazalaki kotinda bilenge te na bitumba; lokola yango ezali lelo kosalema na bisika misusu. Mbula ezalaki mpe likambo ezalaki kotalelama mpo na Balewi. Bakeata baoyo bazalaki kosala na hema na koyangana basengelaki kozala longwa na mbula 30 kino mbula 50. Mpo na nini? Bandelo oyo na bambula etalelaki baoyo bazalaki kokokisa “mosala ya makasi mpe mosala na kokumba biloko na hema na koyangana”. (Mituya 4:3, 47) Emonani ete Balewi bakokaki kobanda kosala misala mikemike longwa na mbula 25, kasi basengelaki kozela ete bakokisa naino mibu 30 mpo na kosangana na misala makasi mitali kopanza, komema mpe koyanganisa hema na koyangana, mokumba oyo ezalaki komonisa libaku monene koleka. (Mituya 8:24-26) Na nsima, lokola mosala oyo makasi ekokaki kosalema lisusu te na tempelo, Balevi bakomaki kobanda mosala na bango na mbula 20.—1 Ntango 23:24.
Kasi na ntango Jéhovah atikaki kosalela Yisraele na mosuni mpe abandaki kosalela Yisraele na elimo, atiaki ndelo na mbula ekoki mpo na basaleli na misala (diacres) oyo baponami kati na lisangá?
Tokoki kokanisa bongo soko totaleli makambo oyo malekaki kati na bikeke oyo bilandaki nsima. Kati na lingomba ya Katolike, diacre azali “ministre andimami, oyo alandi sango na nsima engebene ebongiseli ya bonzambe ndenge etiamaki na kati na Lingomba”. Na kati na mokanda na ye Histoire ancienne de l’Eglise chrétienne (Lisolo ya kala na Lingomba ya boklisto) (Angl.) Bingham amonisi ete: “Ba episkopo mpe ba presbytres [mibangé] . . . mingimingi bandimamaki te liboso na mbula 30; ba diacres, bango, bakokaki kondimama na mbula 25, kasi liboso na mbula wana te. Ezali ndelo etyamaki na mibeko ya Leta mpe na mibeko ya lingomba . . . Na lisolo mobimba ya Lingomba, emonanaki mingi te ete diacre aponama liboso na mbula 25.”
Kasi masengami nini makomami kati na Biblia? Masengami yango mapesami bobele kati na 1 Timoté 3:8-10, 12, 13: “Ekoki mpe na basaleli na misala ete bazala bato na sembo na bozito, na minoko mibale te, baoyo bakomelaka vinyo mingi te, baluli na mosolo te, basimba libombami na kondima na lisosoli na mpeto. Bango bamekama liboso, soko bakomonana na ekweli te, bazala basaleli na misala. Tika ete basaleli na misala bazala babali na mwasi moko mpe babatela bana na bango mpenza malamu. Mpo ete baoyo bakosalaka mosala malamu lokola basaleli na misala bakozua lokumu malamu bango mpenza mpe mpiko mingi kati na kondima na Klisto Yesu.”
Na mokapo oyo, mbula moko ya sikisiki epesami te mpo na koponama mosaleli na misala. Na yango, ntango bankulutu bayangani mpo na kotalela soki bandeko mibali kati na lisangá bakokisi masengami, basengeli komikundola ete etinda moko te ya Biblia eyebisi ete moklisto asengeli kozala na mibu 20, 25 to 30 liboso ete aponama mpe kosala lokola mosaleli. Biblia ezali koloba mpo na mibali oyo bazali kokokisa mokumba yango lokola “baoyo bazali kosalela” bandeko. Na yango, ekoki kozala bana mike te. Ezali yango Biblia endimisi na koloba ete basaleli na misala bakoki kozala bato babala mpe bazali na bana.
Lisusu, mibali oyo baponami lokola basaleli na misala basengeli ‘komekama mpo na komona makoki na bango’, mpe komonisa ete bakoki komema mikumba. Elingi koloba bobele te ete bakopesa bango mosala mpo na mwa ntango mpo na kotalela bango, kasi basengeli komonisa bokoli na bango kati na boklisto uta mikolo mingi (bazala bato basili kobatisama esili koleka mbula moko), kozala na mposa mpe kozala na makoki ya kokokisa mikumba oyo mipesameli bango. Soki elenge mobali moko na “bozito (sérieux)” amonisi bizaleli oyo, azali na komikitisa mpe akokisi masengami mosusu, bankulutu bakoki kotinda nkombo na ye, ata akokisi naino mbula 20 te. Bamosusu bakomi mikolo koleka ntango bazali komonisa polele ete bakokisi masengami mpo na ‘kosala na lolenge ya malamu mpe kozua lokumu malamu mpe mpiko mingi’.