Makambo mazali koleka na mokili
Bakatolike mpe batisimo
Na mokili ya France, lingomba ya katolike ekomi kobatisa mingimingi mikolo, ekomi zulunalo Le Monde. Zulunalo oyo emonisi ete “motuya ebakisamaki na boumeli ya mbula minei”. Bafrançais mikolo koleka 4 000 baoyo balingi kozua batisimo bazali sikawa kokende na bituluku oyo bisalami mpo na kobongisama. Ndambo na misato na mikolo yango bazali basi. Bazali na mibu kati ya 20 na 40, mpe ndambo na minei kati na bango bazali bauta ya ekolo France te.
Kobongisama na bango mpo na batisimo ekoki koumela mbula mibale to misato. Guy Cordonnier, sango oyo azali kotalela mateya wana kati na régió ya Versailles, alobaki: “Mpo na kobatisama, ekoki te bobele koloba ete ondimi Nzambe. Esengeli koyekola lolenge ya kozala na bomoi kati na lisangá.”
Solo, batisimo ya mikolo ezali eloko ya sika te. Yesu ye moko azuaki batisimo na mbula 30. Likambo ya koloba ete ekoki te bobele koloba ete ondimi Nzambe yango mpe ezali ya sika te. Yesu apesaki etinda na baklisto ‘kozalisa bayekoli, kobatisaka bango mpe kolakisa bango’ ete batosa mibeko na ye.—Matai 28:19, 20.
Ata bongo, lokola lingomba ya Katolike epesaka batisimo na bana mike uta bikeke mingi, etemelo na yango mpo na batisimo ya mikolo ezali bokeseni. Bakonzi ya mangomba balobi ete esengeli ata bambula mibale mpo na kobongisa mokolo mpo na batisimo, kasi epai mosusu balobi ete esengeli kobatisa bana mike. Bazali kondimisa ete batisimo ezali kopetola bango na lisumu lisango; nzokande, ntoma Yoane akomaki: “Makila na Yesu . . . makopetolaka biso na masumu nyonso.” (1 Yoane 1:7) Lokola bana babotami sika bakoki kozala na kondima te epai na Nzambe mpe na makila masopamaki na Klisto, mpo na nini kobatisa bango?
Maloba oyo bayokaka te
Engebene zulunalo Daily Yomiuri, ankete moko esalamaki na compagnie d‘assurances moko ya mokili ya Japon epai na basi 3 800 baoyo babala, ankete yango emonisi ete pene na katikati na motuya na bango “bayoki te mibali na bango koloba na bango ete ‘nalingi yo’ esili koleka mwa bambula”. Motuya na basi oyo bayokaka lisusu te maloba oyo ezali komata engebene bambula. Kati na basi oyo bazali na mibu kati ya 50 na 60, 82% balobaki ete bayokaka te maloba yango na monoko na mibali na bango. Ata kati na baoyo bazali na nse ya mibu 30, bobele 10% nde bazali koyoka mikolo nyonso bazali koloba na bango: “Nalingi yo.”
Kati na lisolo ya bolingo oyo etalaki elenge mobateli na mpate na elenge mwasi kitoko mosali na bilanga na régión ya kala ya Suneme, mokonzi na mayele Salomo alobi ete ezali mpo na ‘maloba ya bolingo’ nde elenge mobali alongaki motema na molingami wa ye. (Loyembo na Salomo 1:2) Soki basili kolonga mitema na basi na bango, mibali basengeli ntango nyonso komonisa bolingo epai na bango? Ezali bongo! Biblia epesi bango elendiseli oyo: “Bino mibali, bolingaka [bolanda kolinga] basi na bino, pelamoko Klisto alingaki Lisanga mpe amipesaki ye moko mpo na bango.”—Baefese 5:25.
Na butu ntango bakangaki ye, Yesu amonisaki mbala mingi bolingo na ye epai na bayekoli na ye. (Yoane 13:34; 14:19-21; 15:9, 10, 12) Mobali asengeli koyeba ete mwasi na ye azali na mposa ya kondimisama ete alingi ye. Asengeli mpe komikundola ete Klisto ‘amipesaki ye moko mpo na lisangá’, mpe amonisaki bolingo na ye mpo na lisangá ezala na maloba mpe na misala. Ntembe ezali te, mibali bakosala malamu na kolanda ndakisa ya Klisto.