Mituna na batangi
Engebene bato na mayele minzoto esilaka mpe epanzanaka, kasi mpo na nini Yisaya 40:26 elobi ete “moko te [minzoto] ezali kozanga”?
Na verset oyo, Jehovah azali na mposa te ya komonisa soko atikaka to elimwisaka minzoto, kasi alingi nde komonisa ete azali mayele mingi mpe azali na nguya.
Mosakoli Yisaya apesaki epai na mokonzi Ezekiase likebisi ya Nzambe oyo elobaki ete Bababilonié bakokumba Bayuda na boombo. (Yisaya 39:5-7) Bababilonié bakokaki kokanga libota ya Nzambe libela na libela? Te. Jehovah akanaki ete akosikola bango nsima na mbula 70, mpe asalaki bongo. Eloko te ekoki kokanga Ye oyo akoki ‘komeziré mai nyonso na tandu na loboko na ye, mpe akoki komeziré makolo na misapi na ye misembolami’. Azali ata na mposa te ya kotuna likanisi ya moto, mpamba te na miso na ye, “mabota mazali lokola litanga kati na katini”. (Yisaya 40:12-17) Mpo na komonisa nguya na ye ya makasi koleka, Jehovah azali kobenda likebi na nguya na ye monene kati na biloko bizalisimi, nguya oyo Ezekiase ayebaki uta kala. (Yisaya 37:16, 17) Nzambe alobaki:
“Boye okokokisa ngai na nani ete ngai nazala lokola ye? Oyo na Bulee alobi boye. Botombola miso na bino likoló mpe bomona! Nani asalaki yango? Ye oyo akobimisa ebele na bango na motuya, akobyanga bango nyonso na nkombo; mpo na monene na nguya na ye mpe mpo ete azali na makasi kati na nguya, moko te azali kozanga.”—Yisaya 40:25, 26.
Bato na mayele babengami ba astronomes balobi ete ezali na bamiliare na minzoto kati na galaksi na biso ebengami ete Voie lactée mpe ezali na bankama na bamiliare na bagalaksi. Nzokande, Nzambe ayebi monzoto mokomoko na nkombo na yango, mbala mosusu na monoko ya Nzambe. Ayebi kotambwisa yango. Lokola général oyo azali kotala mampinga na ye, Jehovah akotalaka minzoto. Soko ekomi ntango ya kotala minzoto moko te ‘ekozanga’. Lokola ayebi ezalela ya monzoto mokomoko, ata ekomi ete bamosusu kati na yango esili mpenza, yango ekokamwisa te Ye oyo ayebi makambo manso.—Tala Yisaya 34:16.
Ba astronomes mpe bafizisié bakanisaka ete minzoto ekufaka mpe epanzanaka. Na mokanda na ye Des astres, de la vie et des hommes, Robert Jastrow alobeli liteya moko ezali kolimbola likambo yango: “Makamwisi na nikleere mazali kosalema kati na minzoto yango ya sika mpe na kosalelaka hydrogène, yango ezali kobimisa biloko mosusu ya Molongo. Mbala mosusu, makamwisi yango mazalaki kosuka se na nzela mpe monzoto ezalaki kokufa. Lokola ezangaki liziba na nguya ya nikleere, esilaki yango moko, mpe na nsuka epanzanaki. Ntango epanzanaki, ebwakaki na mapata biloko binso biye bisalamaki na kati na monzoto ntango ezalaki naino na bomoi.”
Basili kokanisa ete soko hydrogène ya minzoto etumbami ekobongwana na biloko milai ya motane, mpe na nsima ekobongwana na biloko mikusemikuse ya mpembe, nsima ekokoma supernovae, mpe na nsuka mosusu ekokoma minzoto ebengami étoiles à neutrons to madusu ya moindo.
Atako bato mingi bazali kondima yango, ndimbola oyo ekoki kobongwana na mikolo mikoya. Tala na ndakisa makambo makomamaki na New York Times ya le 24 Janvier 1989: “Bato na mayele bazali kokanisa ete etikali moke bakomona makambo ya ntina mpo na oyo ebengami ete ‘eleko ya molili’ ya molongo, eleko oyo ebandaki minite misato nsima na kopanzana oyo esalamaki ntango mokili ezalisamaki mpe oyo eumelaki kino ntango bagalaksi minene ebimaki. . . . Lokola elembeteli moko te emonisi likambo yango, ebandeli ya likamwisi yango ezali kotungisa mpenza bato na mayele. James Trefil, fizisie na université George Mason ya Fairfax (Virginie, Etats-Unis) akomi: ‘Kolimbola biloko bizingi biso ezali mokakatano eleki monene mpo na sianse ebengami cosmologie. Soki totali malamu, ekoki mpenza kozala na bomoi te; nzokande ezali mpenza komonana.”’
Engebene John Mather, ye azali astrofizisié, alobi ete: “Lisolo ezalaki kolobela makambo oyo masalamaki mbala mosusu na “minite yango misato”. Nzokande tala makambo makomamaki na ntina yango: “Lokola amonaki ete mopanzi moko na nsango kati na baoyo bazalaki kotuna ye azalaki kokanga ntina ya makambo yango te, M. Mather akataki lisolo na ye mpe alobaki ete: ‘Ya solo, wana ezali se makanisi mpamba’. Elingi koloba ete mateya wana matongami se na makanisi.”
Ya solo, mayele ya basiantifike ezali na ndelo mpe bolukiluki na bango ezali na ndelo. Kasi ezali bongo te mpo na Mozalisi. Mayele na Ye mpe nguya na ye ezali mpenza kokamwisa biso. Mpo na yango mokomi na nzembo alobaki: “Ye akotanga motuya na mioto na likolo, akobianga yango nyonso na nkombo na yango. Nkolo na biso azali monene monene, mpe azali na nguya mingi; mayele na ye ekoki kotangama te. . . .Aleluya!”—Nzembo 147:4, 5, 20.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]
Photo NASA