Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/10 nk. 8-9
  • Lisese ya misolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisese ya misolo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • Lisese ya mbuma na paláta
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Ndakisa ya mina zomi
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Zwá liteya na ndakisa ya mina zomi
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Yesu bomoi na ye mpe mosala na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/10 nk. 8-9

Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

Lisese ya misolo

MBALA MOSUSU Yesu azalaki naino na ndako ya Zakai, epai kuna apemaki na ntango ya mobembo na ye mpo na kokende na Yelusaleme. Bayekoli na ye bakanisi ete, ntango bakokoma na Yelusaleme, akoloba ete ye azali Masiya mpe akotia Bokonzi na ye. Mpo na kosembola likanisi wana mpe komonisa ete Bokonzi ezali naino mosika, Yesu apesi lisese moko.

“Moto moko na lokumu atambolaki mobembo na mokili mosusu mosika mpo na kozwa Bokonzi mpe kozonga.” “Moto na lokumu”, ezali Yesu, mpe “mokili mosusu mosika”, ezali likoló. Na bokomi na ye na likoló, akozwa bokonzi na maboko ya Tata na ye.

Nzokande, liboso ete akende, moto na lokumu abengi baombo na ye zomi, mpe apesi na moko moko na bango ebende ya mosolo na wolo (mine), kolobaka ete: “Sala mombongo kino ekozonga ngai.” Na kokokisama ya liboso, baombo zomi bazali kolakisa bayekoli ya yambo ya Yesu. Na bokokani ya monene koleka, bango nyonso bazali elilingi na bato oyo bazali na elikya ya kozala batuki na libula elongo na ye kati na Bokonzi ya likoló.

Ebende ya mosolo na wolo ezali mosolo mingi, ntalo oyo ekokani na lifuti ya sanza misato ya mosali bilanga. Kasi mosolo yango elakisi nini? Mombongo ya motindo nini baombo basengeli kosala na yango?

Ebende ya mosolo na wolo ezali komonisa bozwi oyo bayekoli bapakolami na elimo bakoki kosalela mpo na kokomisa bato mingi batuki na libula ya Bokonzi na likoló kino ntango Yesu akozonga lokola Mokonzi kati na Bokonzi oyo elakami. Nsima na kosekwa mpe kobimela bayekoli na ye, Yesu apesaki bango ebende na mosolo yango ya elilingi mpo ete bazalisa bayekoli mingi oyo bakobakama bongo na kelasi ya Bokonzi na likoló.

Yesu abakisi: “Nde bato na ye na mboka bayinaki ye [moto na lokumu], mpe batindi bato na nsima na ye, koloba ete, ‘Tolingi moto oyo kozala mokonzi na biso te.”’ Bato na mboka na ye bazali Bayisraele, elingi koloba Bayuda, longola bobele bayekoli na Yesu. Nsima na kokende na Yesu na likoló, Bayuda yango banyokolaki bayekoli na ye, komonisaka bongo ete balingaki ye te mpo na kozala mokonzi likoló na bango. Ezali na boye nde basalaki lokola “bato na ye” baoyo batindaki bato nsima na ye.

Ndenge nini baombo zomi bazali kosalela bibende na mosolo na wolo epesami na bango? Yesu alimboli ete: “Wana esili ye kozwa bokonzi, azongi, mpe alobi ete baombo yango baoyo apesaki bango mosolo yango babiangama epai na ye ete ayeba soko moto na moto azwi boni na mombongo na ye. Oyo na liboso ayei koloba ete, ‘Nkolo, mosolo na yo ezwi misolo mosusu zomi. Alobi na ye ete, Malamu! Yo moombo malamu. Zala na bokonzi na mboka zomi, mpo ete ozalaki sembo na likambo moke.’ Oyo na mibale ayei koloba ete, Nkolo, mosolo na yo ezwi misolo mosusu mitano. Alobi na ye lokola ete, Yo, mpe zala liboso na mboka mitano.”’

Moombo oyo azali na misolo zomi ezali bongo kelasi moko to etuluku ya bayekoli, bakisa na bantoma, oyo esalamaki kobanda Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso kino lelo. Baoyo bazwaki misolo mitano likoló bazali mpe komonisa etuluku moko ya bato oyo, na eleko moko wana mpe na kotalela makoki na bango, bazali kokolisa bozwi ya mokonzi na bango awa na mabelé. Bituluku nyonso mibale bizali kosakola nsango malamu na molende mpe, na ntina yango, bato mingi ya motema sembo bazali kokoma baklisto. Baombo libwa basalaki mimbongo ya malamu mpe bakolisaki bozwi oyo epesamelaki bango.

“Kasi, Yesu abakisi, mosusu ayei na kolobaka ete: ‘Nkolo, tala mosolo na yo, oyo ebatelaki ngai na kati na litambala, mpo ete, nazalaki kobanga yo, mpo ete ozali moto makasi. Ozali kokamata yango ebombi yo te, mpe ozali kobuka yango ekoni yo te. Alobi na ye ete, Nakokweisa yo na monoko na yo mpenza, yo moombo mabe! Oyebaki ete ngai moto makasi, kokamata yango ebombi ngai te, mpe kobuka yango ekoni ngai te. Mpo na nini otiaki mosolo na ngai na banke te? Bongo na koya na ngai mbele nazwi yango na litomba. Alobi na bango batelemi wana ete, Longola mosolo yango na ye, mpe pesa yango na oyo azali na misolo zomi.’”

Kobungisama ya mosolo na elilingi elimboli mpo na moombo mabe kobungisama ya esika kati na Bokonzi ya likoló. Ezali lokola abungisaki libaku kitoko ya koyangela likoló na bingumba zomi to mitano. Tala lisusu ete moombo abengami moombo mabe ezali te mpo ete asalaki libunga moko ya mabe, kasi ezali mpo ete akolisaki te bozwi ya Bokonzi ya nkolo na ye.

Na ntango oyo ebende ya mosolo na wolo ya moombo mabe epesami epai na moombo ya liboso, mwa koimaima esalamaki: Nkolo, azali na misolo zomi! Nzokande, Yesu ayanoli: “Bakopesa biloko mosusu na oyo azwi, nde mpo na oyo azangi, bakokamata na ye yango ezali na ye. Lisusu, mpo na bayini na ngai yango, baoyo bazalaki na mposa ete nazala mokonzi na bango te, kamba bango awa mpe boma bango na miso na ngai.” Luka 19:11-27; Matai 28:19, 20.

◆ Likambo nini epusaki Yesu na kopesa lisese ya misolo?

◆ Nani azali moto na lokumu mpe mokili epai ye azali kokende ezali nini?

◆ Bato na mboka ya mobali na lokumu bazali banani, mpe ndenge nini bazali komonisa koyina na bango?

◆ Baombo bazali banani, mpe mosolo elimboli nini?

◆ Mpo na nini moko na baombo abengami moombo mabe, mpe kobungisama ya mosolo na ye elimboli nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto