Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/10 nk. 5-7
  • Lisekwa: mpo na nani mpe ntango nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisekwa: mpo na nani mpe ntango nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bato bazali kokufa?
  • Bakufi bazali ndenge nini?
  • Lisekwa mpo na bomoi na mabelé
  • Lisekwa: liziba na elendiseli
  • Lisekwa: ntango nini?
  • Elikya ya solosolo mpo na bato olingaka oyo bakufá
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Likambo oyo ekosukisa liwa!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Elikya ya solosolo
    Nini ekómelaka biso soki tokufi?
  • Lisekwa ekozala!
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/10 nk. 5-7

Lisekwa: mpo na nani mpe ntango nini?

LIKAMBO lisalami na mobu 32 na ntango na biso, na mboka Betania, epai Lazare afandi elongo na bandeko na ye ya basi mibale, Malata mpe Marie. Basi oyo mibale batindaki nsango epai na Yesu ete Lazare abeli maladi. Lokola Yesu alingi Lazare mpe bandeko na ye ya basi, azwi nzela mpo na kokende na mboka Betania. Na nzela, alobi na bayekoli na ye ete: “Moninga na biso Lazare, alali mpongi, kasi nakei kolamusa ye.” Bayekoli bakanisi ete Yesu alobi mpo na mpongi ya solo. Ezali mpo na yango Yesu alimboleli bango malamumalamu ete: “Lazare akufi.”​—Yoane 11:1-15.

Nsima ya mikolo minei na kufa ya Lazare, Yesu na bayekoli na ye bakomi. Ntango amonaki Marie na bato mosusu kolela, Yesu ‘alelaki’, yango nde ezali komonisa ete azalaki na mawa mpe na bolingo mozindo. (Yoane 11:17, 35) Nzoto ya Lazare etiamaki na lilusu na kati ya libanga. Yesu atindi ete balongola libanga oyo ezalaki kokanga monoko na yango. Nsima na kobondela Tata na ye, agangaki na mongongo makasi: “Lazare, bima libanda!” Mpe Lazare abimi. Oyo nde esengo mpo na bandeko na ye ya basi!​—Yoane 11:38-45.

Likambo oyo epesi bantina makasi ya kolikya na lisekwa. Mingimingi, ata bongo, liwa ezali monguna monene oyo azali kobotola biso balingami na biso, kozanga ete tomona Yesu akoka kosekwisa bango na ntango oyo. Toyebi malamu ete mingi kati na balingami na biso bazalaki bato na kolongobana mpe bato malamu. Motuna tozali komituna sikawa ezali:

Mpo na nini bato bazali kokufa?

Soki tolingi kozwa eyano ya solo mpe ya sikisiki na motuna oyo, tosengeli kozonga na ebandeli ya bomoi ya moto, kati na elanga ya Edene. Mpo na komeka botosi ya Adam, Nzambe apekisaki ye kolya mbuma na nzete moko. Soki Adam na Eve balei mbuma yango, Nzambe akebisaki bango, ete ‘bakokufa solo’. (Genese 2:17) Ntango Satana asenginyaki bango, bazangaki botosi epai na Nzambe: na yango balongaki te komekama oyo na ntina, mpe babukaki kufa.

Mpo na nini kopesa etumbu ya makasi boye mpo na likambo oyo ezali komonana ya moke? Ya solo, likambo basalaki ezalaki moke, kasi lisumu na bango ezalaki monene; babongaki kokufa. Ezali mpo ete bango bato na kokoka, Adam na Eve, batombokelaki Mozalisi na bango. Babungisaki kokoka na bango, mpe Nzambe akweisaki bango na etumbu na kufa. Nzokande, Nzambe asalaki ete kokweisama oyo na sembo elongolama mpo na bakitani ya Adam. Ndenge nini abongisaki likambo yango? Ntoma Paulo akomaki ete “Klisto Yesu (. . .) amipesaki ye moko lokola lisiko likokani mpo na banso”.​—1 Timoté 2:5, 6; Baloma 5:17.

Bakufi bazali ndenge nini?

Lazare akufaki longwa mikolo minei. Soki okufaki, kasi na solo ozalaki nde na bomoi mikolo minei kati na mokili moko ya elimo mpe nsima basekwisi yo, mbele okozala na mposa te ya koyebisa makambo omonaki? Lazare, ye, alobaki te ete azalaki na mokili mosusu. Biblia endimisi ete: “Bakufi bayebi eloko te.”​—Mosakoli 9:5; Nzembo 146:3, 4.

Lokola ezali boye kanisa mpo na oyo elandi. Bamilió na bato bandimi ete epongelo ezali, atako liloba oyo ezali te na kati ya Biblia. Lisusu bamosusu bandimi ete lifelo ya moto ezali. Nzokande, likanisi ya kotumba moto kati na moto seko ekoki koyela yo te na makanisi, ata soki azali monguna. Lokola yo moko okoboya kosala likambo motindo oyo ya mabe koleka, okanisi ete Mozalisi na biso oyo atondi na bolingo akoki konyokola mibali mpe basi kati na moto ya lifelo? Kanisa naino mpo na likanisi na kolendisa oyo Biblia epesi mpe totangaki yango awa na likolo: bakufi “bayebi eloko te”.

Engebene Makomami, motuya ya bato oyo bakoyangela elongo na Klisto na likoló ezali moke. Yesu abengaki bango ete bazali “etonga moke”. (Luka 12:32) Ntoma Yoane amonaki “Mwana na Mpate [Yesu Klisto] atelemi na ngomba na Siona [na likoló], bato nkoto mokama na ntuku minei na minei batelemi na ye elongo (. . .), baoyo basikolami na mokili”. (Emoniseli 14:1-3) Yango elimboli ete bato oyo bazalaki na mabelé, bakufaki mpe nsima basekwisamaki mpo na kozala na bomoi na likoló elongo na Klisto.

Kanisa malamu ete solo oyo na Biblia epesaki matomba na baoyo bayokaki yango na koyebaka ete: epongelo ezali te, lifelo ya moto mpe ezali te, mpe elikya ezali ete bakufi mosusu basekwi mpo na bomoi na likoló. Ata bongo, soki bato bazali kosekwa mpo na bomoi na likoló bazali mpenza moke, elikya nini bamosusu bazali na yango?

Lisekwa mpo na bomoi na mabelé

Yesu Klisto ye nde afungolaki, to abandisaki, nzela ya lisekwa mpo na bomoi na likoló. (Baebele 9:24; 10:19, 20) Na yango, Yoane Mobatisi akosekwisama mpo na bomoi na likoló te, mpo ete abomamaki liboso ete Yesu akufa mpe akoka kofungola nzela ya bomoi na likoló. Na yango, Yesu alobaki: “Moto moko te abimi kati na baoyo babotami na basi, oyo aleki Yoane Mobatisi; kasi ye oyo aleki moke kati na bokonzi na likoló aleki ye na monene.” (Matai 11:11) Likabo nini Nzambe abombeli mobali oyo na sembo lokola mpe bato mosusu bakufa baoyo bazalaki basembo lokola ye?

Fungola Biblia na yo na Luka mokapo 23 mpe tanga versets 39 kino 43. Moko kati na basali na mabe babomamaki na nzete esika moko na Yesu alobaki boye: “Yesu, wana ekokoma yo na bokonzi na yo, kanisa ngai.” Na yango Yesu apesaki ye elaka ete akozala na Paradis. Na likoló te, kasi kati na paradis na mabelé, paradis ekokani na paradis oyo na ebandeli.

Lisekwa: liziba na elendiseli

Elikya oyo endimisami na Biblia ezali elendiseli makasi, mpe lisusu ezali ya solo. Mpo na ntina nini? Mpo ete Jéhovah azali bolingo. (1 Yoane 4:8) Ntango apesaki nzela ete Mwana na ye akufa liwa ya nsoni, Nzambe amonisaki bolingo na ye oyo ezali na ndelo te. Mwa ntango moke liboso, Yesu alobaki: “Nzambe alingaki mokili [bato] na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko, mpo ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.”​—Yoane 3:16.

Yesu mpe alakisaki bolingo monene mingi na kopesaka bomoi na ye lokola lisiko mpo na bato oyo bakozala na kondima. Ye moko alobaki: “Mwana na moto ayei mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na [bato] mingi.”​—Matai 20:28.

Carole-Anne, oyo tolobelaki kati na lisolo ya liboso, abulunganaki mingi ntango akufelaki mbala moko kati na aksida bato mingi oyo ye alingaki. Kasi alendisamaki na koyeba ete balingami na ye bazalaki konyokwama te. Nini lisusu esalisaki ye kolonga mawa na ye? Bolingo oyo bandeko na ye ya mibali mpe ya basi ya elimo, Ba Témoins de Jéhovah balakisaki ye, mpe kobondisa na bango oyo euti na motema.​—Nzembo 34:18.

Mabondeli oyo apesaki epai na Jéhovah masalisaki ye mpe mingi. Mbala mingi, na butu, azalaki kolamuka mpe komiloba ete likambo yango ezalaki ndoto ya mabe, kasi mwa moke azalaki komona ete ezali likambo ya solo mpenza. Azalaki kokitisa motema na kobondelaka Jéhovah, likambo yango nde esalisaki ye na kokanga ntina mozindo na maloba oyo na ntoma Paulo: “Bomitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malombo mpe na matondi; mpe kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Klisto Yesu.”​—Bafilipi 4:6, 7.

Likambo likomelaki Shirley lizali kopesa ndakisa mosusu na kolendisa oyo ezali kozwama na elikya ya lisekwa. Mwana na ye mobali ya elenge, Riccardo, eteni monene na béton ekweyelaki ye na ntolo, motema na ye epasukaki mpe akufaki mbala moko. Nsima na likambo oyo, esalamaki na janvier 1986, Shirley alobaki na baninga na ye: “Ezalaki lokola ndoto.” Na lingomba katolike epai azalaki kokende, ayokaki maloba oyo: “Nzambe akosambisa bato na bomoi mpe bakufi.” Maloba oyo matindaki ye kokanisa: ‘Soki Nzambe akosambisa bato na bomoi mpe bakufi, ndenge nini tokoki koyeba epai bakufi bazali? Mpe soki bazali kokende na likoló, mpo na nini kosekwisa bango mpo na kosambisa bango lisusu? Mpe lisusu, ndenge nini bakoki kosekwisama soki bazali na bomoi na likoló?’ Esika moko te Biblia elobeli mpo na lisekwa ya bato na bomoi; ezali kolobela bobele mpo na lisekwa ya bakufi.

Shirley atunaki mituna oyo na mobali na ye, mpo ye ayebaki oyo Biblia ezali koloba. Ntango kaka ayokaki oyo Makomami mazali koloba mpo na likambo oyo, akataki kokende na lingomba na ye. Mosangani moko na libota na ye, oyo azali Témoin de Jéhovah, abandaki koyekola Biblia elongo na ye mpe mobali na ye na mars 1986, mpe bazwaki batisimo koza- nga koumela. Nsima na yango, ayaki koloba: “Ezali esengo mingi koyeba solo, kozala na elikya na lisekwa mpe koyeba Jéhovah ete azali Nzambe na kokamwisa!”

Lisekwa: ntango nini?

Kati na emonaneli moko, ntoma Yoane amonaki “ebele monene, oyo moto te akoki kotanga motuya na bango, bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso na bikolo nyonso, na minoko nyonso, batelemi liboso na kiti na bokonzi mpe liboso na Mwana na Mpate”. (Emoniseli 7:9) Lokola ebele monene ‘batelemi liboso na kiti na bokonzi na Nzambe’, ebongi kokanisa ete baoyo basali ebele monene yango babengami mpo na kozala na bomoi na mabelé. (Yisaya 66:1) Soki bamosusu kati na bango bakufi lelo, bakosekwisama ntango nini? Biblia ezali kopesa date te, kasi lisekwa na bango ekosalema nsima na etumba oyo ebelemi, na boumeli na yango Nzambe akolongola na mabelé baoyo nyonso bazali koboya koyokanisa bomoi na bango na mitinda na ye ya sembo. (2 Batesaloniki 1:6-9) Etumba oyo ekosalema liboso na Mokolo na Kosambisama mpe na lisekwa ya bato nyonso oyo Nzambe amoni ete babongi mpo na kozonga kozala lisusu na bomoi na mabelé. (Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Kokokisama na bisakweli na Biblia emonisi ete makambo oyo na esengo mpe na kokamwa makosalama nsima na mwa ntango moke.​—Emoniseli 16:14-16.

Mokolo moko, bayekoli na Yesu batunaki ye ete: “Elembo na koya na yo mpe nsuka na mokili ekozala nini?” Na eyano na ye, Yesu asakolaki mpo na bitumba, nzala, koningana na mabelé, malali mabe mpe kosakolama na nsango malamu na Bokonzi na mokili mobimba.​—Matai 24:3-14; Luka 21:7-11.

Esakweli oyo na kokamwa ekokisami uta 1914, mbula oyo Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki. Etumba oyo ebomaki batu mingi mpe ememaki nzala kati na bamboka mingi. Na Etumba na Mibale na mokili mobimba mpe nsima, ezalela na mokili mobimba ebebaki koleka.

Mpo na malali mabe, bato mingi bazali kokanisa ete SIDA ezali oyo eleki nsomo. “Malali mabe oyo epalangani mingi mpe ezali kopesama mingi kino bato na mayele bakokisi yango na malali oyo babengaki peste noire oyo ebomaki ndambo na minei ya bato na Mpoto na ekeke ya 14.”-Sélection du Reader’s Digest, Juin 1987.

Na kotalela makambo oyo na nsomo lelo, lisekwa ekozala likambo moko kitoko koleka! Na ntango oyo ekosalema, mabota oyo masili kokabwana mpo na liwa, lokola libota ya Carole-Anne na Shirley, bakozala na esengo mingi, mpo bakokutana! Ezali polele ete, mpo na mokomoko na biso, nzela na mayele ezali ete toyokanisa bomoi na biso na mokano na Nzambe banda lelo, mpo na kokokisa masengami ete tozala wana ntango lisekwa ekosalama.

[Elilingi na lokasa 7]

Engebene Biblia, lokola nzete oyo bakati ekoki kobima lisusu, bobele bongo Nzambe akoki kosekwisa bakufi oyo abateli bango na makanisi na ye.​—Yobo 14:7-9, 14, 15.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto